Mituna ya batángi
Ntango nini bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te”?
Ndenge tomonaki yango na “Mituna ya batángi” oyo euti kobima na nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,a mosika te Yehova akotya na mitema ya “maseke zomi” (banguya nyonso ya politiki) “likanisi na ye,” elingi koloba, ete bápesa nguya mpe bokonzi na bango epai ya “nyama mabe moko ya langi ya motane makasi”—ONU. Nyama yango ebengami mpe “elilingi ya nyama mabe.” (Em. 13:14, 15; 17:3, 16, 17) Na nsima, “maseke zomi” ná nyama mabe oyo euti kozwa nguya ekolongola mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba. Ntango nini bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te”?b Liboso to nsima ya kobebisama ya mangomba ya lokuta?—1 Tes. 5:3.
Na mokuse, toyebi na bosikisiki te ntango oyo bakoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” Soki toyebaki makambo nyonso, tolingaki kozala na ntina te ya kokoba kozala ekɛngɛ mpe kosɛnzɛla. Nzokande, Yesu apesaki mbala na mbala bayekoli na ye toli ete ‘bákoba kosɛnzɛla.’ (Mat. 24:42; 25:13; 26:41) Tótalela sikoyo na likebi esakweli oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe na mokanda na ye epai ya Batesaloniki.
Paulo akomaki: “Ntango oyo bato bakoloba: ‘Kimya, likambo ya kobanga ezali te!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko.” (1 Tes. 5:2, 3) Mbala mingi mikanda na biso elimbolaka maloba ya Paulo boye: Maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” ekolobama liboso kaka bolɔzi monene ebanda, oyo ekobanda na kobebisama ya Babilone Monene—lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba. Tolobaka mpe ete ntango kaka bakoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” nde tokoyeba ete bolɔzi monene elingi kobanda.
Kasi, nsima ya kotalela lisusu likambo yango na likebi mpenza, emonani ete ekoki mpe kozala na ndimbola mosusu. Mbala mosusu maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” ekolobama nsima ya kobebisama ya mangomba ya lokuta. Mpo na nini ekoki kozala bongo? Tótalela makambo oyo elandi.
Mangomba ya lokuta epesaka mabɔkɔ na bitumba ya bikólo. Biblia elobi: “Makila ya . . . baoyo nyonso babomamaki na mabele emonanaki epai na ye [“mwasi ya ndumba monene,” Babilone Monene].” (Em. 17:1, 5; 18:24) Banda kala, mwasi ya ndumba monene apesaka mabɔkɔ na bitumba ya bikólo mpe mbala mingi alendisaka misala ya terorisme. Na yango asalaka ete bitumba mpe mobulu ezala, kasi te kimya mpe kozanga kobanga. Yango ebimisi motuna oyo: Bikólo ekoloba nde maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” nsima ya kobebisa Babilone Monene? Ekoki kozala bongo, kasi toyebi mpenza te.
Nini ekosalema nsima ya maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te”? Paulo alobaki: “Na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko.” (1 Tes. 5:3) Nɔti ya boyekoli na vɛrsɛ yango na Anglais elobi boye: “Awa Paulo amonisi ete ekozala na ntango moke kaka to mpe ntango ekozala te kati na maloba ‘kimya, likambo ya kobanga ezali te’ mpe kobebisama ya baoyo bakoloba yango. Libebi ekoya na mbalakaka mpe bakokoka kokima te.” Soki banguya ya politiki ya mokili ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” nsima ya kobebisama ya mangomba ya lokuta, boye kobebisama ya bikólo yango nyonso oyo ekolanda ekozala mpe na mbalakaka mpenza.
Basaleli ya Yehova bakosala nini mpo na makambo wana oyo ekosalema? Paulo alobaki: “Bandeko, bozali na molili te. Na yango mokolo wana ekobimela bino pwasa te lokola nde ebimeli miyibi.” (1 Tes. 5:4) Kanisá naino: Soki maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” elobami nsima ya kobebisama ya mangomba ya lokuta, wana basaleli ya Yehova bakoyeba ete kobebisama ya bikólo ekómi pene. Kasi, mpo na bikólo, libebi na bango ekoya lokola moyibi, elingi koloba, na mbalakaka, kozanga kolaka.
Boye makambo nini tokoki kozela? Mosika te, “maseke zomi” ná nyama mabe oyo ezwi nguya mingi ekobebisa mangomba ya lokuta. Yango nde ekozala ebandeli ya bolɔzi monene. Toyebi mpe ete na ntango moko boye, bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te.” Ntango nini ekoloba yango? Tolobeli makambo mibale. Ya liboso: Mbala mosusu bikólo ekoloba yango liboso ya kobebisama ya mangomba ya lokuta. Ya mibale: Ekoki kozala ete ekoloba yango nsima ete banguya ya politiki ebebisa mangomba ya lokuta. Tosengeli kozela mpo na komona oyo ekosalema. Mbala mingi tokangaka malamumalamu ntina ya bisakweli ya Biblia ntango ezali kokokisama to nsima ya kokokisama na yango.—Talá mpe Yoane 12:16.
Liboso ete ntango yango ekoka, oyo ezali na ntina mingi mpo na biso ezali te ntango oyo maloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te” ekolobama, kasi ezali nde ya kotikala sembo epai ya Nzambe. Tosengeli ‘kozala ekɛngɛ mpe kobatela makanisi na biso,’ mpo tókoka komibongisa malamu mpenza na nyonso oyo ekosalema.—1 Tes. 5:6.
a Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 11/2025.
b Maloba oyo ntoma Paulo asaleli emonisi ete mbala mosusu bakoloba yango mbala moko te, kasi mbala mingi.