Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/3 nk. 11-20
  • Tomizimbisa te na “kimya” oyo mabota bazali kobongisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tomizimbisa te na “kimya” oyo mabota bazali kobongisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge bakonzi ya politike mpe bato mosusu bakoyamba liloba yango
  • Lisangá oyo ezali kokosa bato
  • Totala epai na Jéhovah mpo na kozwa kimya
  • Tomizimbisa te
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • “Kimya mpe libateli” oyo ekotyama na bato te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ekimelo na bango ezali lokutá!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Libombami na nsomo elimbolami
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/3 nk. 11-20

Tomizimbisa te na “kimya” oyo mabota bazali kobongisa

“Bakoloba ete, Kimya ezali, makambo mazali te!”​—1 BATESALONIKI 5:3, MN.

1, 2. (a) Mpo na nini “kimya” esili kokoma nzela na mayele maleki mayele nyonso? (b) Mikili bakoyokana na likambo nini?

LELO bipai nyonso na mokili, ezali komonana polele ete kimya ezali te. Bato bazali kobanga makasi etumba ya misato ya mokili mobimba kati na mikili oyo bazali na bibundeli makasi, mingimingi bombe atomike. Kosalela ebundeli wana, ekoki koboma bato nyonso awa na mokili. Na yango, kimya ekomi bongo nzela ya mayele maleki mayele nyonso.

2 Ntembe ezali te, etumba ya misato ya mokili mobimba, na boumeli na yango bato bakosalela bibundeli motindo oyo, ekotika ata eloko moko te awa na mokili. Bakonzi mosusu ya politike mpe ya basoda oyo bazali komona malamu liboso, bazali kooka nsomo mingi mpo na yango, mpe balingi kozala na ngámbo te mpo na mpasi motindo oyo ya molongo mobimba. Yango wana mikili ya politike, ata bazali na boyokani te na mateya oyo bazali kolanda, bamoni malamu ete bayokana ata na likambo etali kimya, mpo na kolanda mayele ya mabota, engebene yango moto na moto azali na lotomo ya kozala na bomoi.

3. Na mokano nini mabota bakosakola ete “Kimya ezali, makambo mazali te!”?

3 Nzokande, mabota yango, bazali mpe kobengana. Yango wana, moto na moto azali kobomba mwa ndambo ya bibundeli bikoki na ye. Ntango bakoloba ete “Kimya ezali” mpo na bato nyonso, ekozala bobele bokosi; bakonzi bakozala na bolingo ya solo te mpo na bazalani na bango, na kotalelaka bango ete bazali bango nyonso basangani na libota bobele moko, libota ya bato. Mokano na bango ekozala nde koluka kokitisa mitema ya bazalani na bango bobele mpamba.​—1 Bates. 5:3.

Lolenge bakonzi ya politike mpe bato mosusu bakoyamba liloba yango

4, 5. (a) Motindo nini liloba yango ekoyambama? (b) Bakonzi na mangomba bakondima liloba yango, kasi tokoloba boni mpo na Nzambe?

4 Ntango liloba yango ekolobama, ekoyambama malamu epai na bato nyonso na mokili mobimba. Bakonzi na mangomba, mingimingi baoyo ya boklisto ya mokili oyo, katolike mpe protesta, bakoyamba liloba wana na esengo nyonso. Mpamba te, ata mopepe ezali kokenda wapi, bakonzi na mangomba bakolukaka nzela nyonso ete bandimama na miso ya bato mpe bazwa lisalisi mpe limemya epai na mikonzi na politike.

5 Nzokande, ata bakonzi na mangomba bandimi liloba wana oyo bakonzi na politike bakosakola, elingi koloba te ete Nzambe, nkolo ya molongo mpe ya mokili akondima mpe yango. Kati na bandako​—nzambe na bango, mbala mosusu basango mpe bapastele bakosambela makasi mpo ete Nzambe apambola meko ekamatami na bikonzi ya politike ya mokili mpo na kotya kimya na mokili mobimba. Kasi Nzambe ya molongo mobimba akondima mabondeli wana nyonso oyo bato kati na bandako—​nzambe bakoyanola ete “Ezala se bongo”? Nzambe, akoki kozala na boyokani na mokili mokabwani na makambo ya losambo, mokili oyo mabondeli mpo na kimya mazali kosalema engebene bindimeli ya bongolabongola ya mangomba makeseni oyo bazali kosala yango?

6, 7. (a) Na ndakisa ya Bayuda ya kala, motindo nini boklisto ya mokili oyo ezali kosala? (b) Ntango bakonzi na mangomba na boklisto na mokili oyo bakoyamba liloba oyo “Kimya ezali, makambo mazali te!”, ekobimisa nini?

6 Bato baleki kobondela Nzambe ete asunga bango, ezali mingimingi mikili oyo emitangaka ete bazali baklisto. Kasi Nzambe na molongo mobimba azali Nzambe na boklisto na mokili oyo te. Boklisto ya mokili bazali komitambwisa motindo moko na Bayisraele ya kala. Bango basepelaki lisusu na bokonzi ya Jéhovah te, bamonaki malamu kolanda mabota ya bapakano. Yango wana babimelaki Samwele, mosakoli ya Jéhovah, mpe basengaki ye ete apesa bango mokonzi. Samwele asepelaki ata moke te na lisengi yango, mpe esalaki ye mpasi mingi. Nzambe mpe asepelaki na yango soko moke te.

7 Jéhovah amonaki solo ete ezali nde ye bazali koboya. Babwakaki bokonzi na ye ya teokratike oyo azalaki na yango likolo na Yisraele. Yango wana alobaki boye epai na mosakoli Samwele: “Bazali koboya yo te kasi bazali koboya ngai ete nazala mokonzi likolo na bango lisusu te.” (1 Samwele 8:4-9) Ezalela ya Bayisraele ekokani na makambo boklisto ya mokili oyo ezali kosala na ekeke ya ntuku mibale. Na yango, ntango bakonzi na mangomba na mokili bakosepela na liloba oyo ete “Kimya ezali, makambo mazali te”, ekobimisa ata litomba moko ya malamu te, Nzambe akozala na bango elongo te.

Lisangá oyo ezali kokosa bato

8. O.N.U. ekozala na mokumba nini, wana ekokoka ntango ya sukola liloba yango, mpe na ndimbola nini lisangá yango ezali kozimbisa bato?

8 O.N.U. ekoki komikumisa ete ezali na mikili 159 misangani na yango, elingi koloba penepene mikili nyonso ya nse. Na ntango ekoki, mikili yango ekosangana mpo na konganga ete “Kimya ezali, makambo mazali te!” Kasi, ezali mawa mpo ete lisangá oyo ya mokili mobimba ezali nde kokosa bamiliare ya bato. Mpo na ntina nini? Mpamba te kimya yango, atako ekosakolama na lisungi ya mangomba nyonso ya mokili, elimboli te ete bato bakokoma na kimya elongo na Mozalisi ya molongo. Nzokande, ye azali na nguya ya kopesa bomoi to kolongola yango mpo na kosilisa makambo ya ntina monene, na likolo to na mabelé.

9, 10. Ezaleli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini mpo na oyo etali “kimya” mpe “kobatelama” oyo mabota bazali kobongisa, mpe mpo na nini?

9 Na esakweli ya Yisaya, Mozalisi alobi polele: “Likolo ezali kiti na ngai mpe mokili ezali etyelo na makolo na ngai.” (Yisaya 66:1) Na lisangá oyo bango basali, elingi koloba O.N.U., mikili bazali kokumisa Nzambe te. Bazali nde koluka kimya na motindo na politike, mpe bongo, bakoka koumelisa O.N.U. na bango. Nzokande, mpo na ba Témoins de Jéhovah, bango bakoki komekola mokili te mpe bakoki kotya elikya na bango te kati na meko oyo bato bazali kokamata mpo na kotya kimya kati na mabota. Basimbi na motema na bango maloba makomami na Yakobo 4:4: “Bino (basi na pite), boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe? Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini na Nzambe.

10 Ba Témoins de Jéhovah bazali kopekisa mabota te ete baluka kimya na bango. Nzokande, bakoki kolakisa kimya motindo wana te epai na ba millions na bato oyo bazali koluka ebombamelo, wana ekobima bolozi monene ya Lisolo ya bato, oyo ekotya nsuka na biloko mabe ya ntango oyo. (Matai 24:21) Mpamba te, ezali ebongiseli ya biloko ya sika elakami na Nzambe, yango nde ekotya kimya na mokili mobimba, na nse na bokonzi ya “Nkolo ya kimya”, Yesu Klisto.​—Yisaya 9:6, 7.

11. Nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ndenge nini bakonzi na mangomba bayambaki likanisi ya kosala Societe des Nations?

11 Lisolo ya makambo ya bato emonisi ete mikano ya bato mpo na kotya kimya milongi te. Tomikundola ete na nsuka na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na 1918, bato bazwaki likanisi ete basala Société des Nations mpo na kopekisa etumba mosusu ya mokili mobimba ete esalema te. Lisangá ya Mangomba ya Klisto na Amerike bakumisaki likanisi yango na maloba oyo: “Lisangá (Société) motindo oyo ezali bobele mpo na mosala na politike te: ezali nde Bokonzi na Nzambe awa na mabelé na lolenge na politike.” (Tala Réveillez-vous! ya le 8 octobre 1985 na lokasa 7.) Kasi Lisangá yango, oyo babengaki ete ezali Bokonzi na Nzambe na motindo na politike awa na mabelé, epesaki kimya ya koumela epai na bato awa na nse?

12. (a) Ndenge nini Emoniseli 17:3, 8 ekokanaki? (b) Nani afandi kino lelo likolo na “nyama na yauli na langi motane”, mpe mpo na ntango boni lisusu?

12 Société des Nations ekokani na “nyama na yauli ya langi motane” ya elilingi oyo elobelami na Emoniseli mokapo 17, mpe likolo na yango efandi mobange mwasi na pite, “Babilone Monene”. Yango ekweaki na “libulu mozindo” na 1939, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimaki, mpe mwasi na pite oyo afandaki likolo na mokongo na ye akitaki. Na nsima, na nsuka na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na 1945, basalaki O.N.U. mpo na kokitana na esika ya Société des Nations oyo ekufaki. O.N.U. ezali na mikili mingi misangani na yango koleka Société des Nations to S.D.N., ezali bongo na nguya mingi koleka yango mpe bato batyeli yango motema mingi koleka. Na yango, ntango “nyama na yauli na langi motane” na elilingi ebimaki “na libulu mozindo” na 1945, mwasi na pite na elilingi, “Babilone Monene”, amataki lisusu na mokongo na ye, mpe kozanga nsoni, afandi wana kino na mikolo na biso oyo. (Emoniseli 17:3, 5, 8) Kasi, lokola eyebisamaki na Emoniseli 17:16 kino 18:24, akofanda lisusu wana ntango molai te. Mpo na ntina nini?

13. (a) O.N.U. Ezali nini? (b) Yango emonisamaki na elilingi na nini uta kala?

13 O.N.U. ezali liboke ya mikili oyo bayini Jéhovah Nzambe mpe Batemwe na ye na mabelé. Ezali lisangá ya botemeli, mpamba te mikonzi na mokili bayangi mwango mabe mpo na kotelemela lisangá ya Jéhovah Nzambe na “nsuka na biloko na ntango oyo”. Lisangá yango emonisamaki na elilingi na botemeli oyo elobelami kati na Yisaya 8:12.​—Matai 24:3.

Totala epai na Jéhovah mpo na kozwa kimya

14. Na mokano nini bokonzi na mabota zomi ya Yisraele basanganaki na mokili ya Sulia, mpe likambo nini ekomaki kotungisa bokonzi na Yuda?

14 Liboso ya eleko ya Yisaya, mabota zomi na mibale ya Yisraele makabwanaki na likambo etali bokonzi. Kokabwana yango esalemaki nsima na boyangeli ya Salomo. Mabota zomi ya nord to na likolo, bamikabwanaki mpe bakendaki kosala oyo ebengamaki na nsima ete bokonzi na Yisraele, kapitale na yango ezalaki Samaria. Mabota mibale oyo matikalaki, libota ya Yuda mpe ya Benyamina, batikalaki kotosa bakitani ya Davidi ete bazala bakonzi na bango, oyo kapitale na bango ezalaki Yelusaleme. Na nsima, bokonzi na mabota zomi ya Yisraele ekomaki monguna na bokonzi na mabota mibale ya Yuda. Bokonzi ya Yisraele esanganaki na bokonzi ya Sulia, oyo kapitale na yango ezalaki Damas, kati na mokano na kokweisa bokonzi na Yuda mpe kozwa bango lokola baombo. Bokonzi na Yuda, esanganaki na mokili mosusu ya makasi mingi mpo na kokoka kotelemela libota ya Yisraele, oyo eutaki kosangana na Sulia, mokili moko ya bapakano?​—Yisaya 7:3-6.

15. (a) Bafandi mosusu na bokonzi na Yuda balingaki kosala nini, mpe kosalaka bongo, bamonisaki ete bazangi nini? (b) Na maloba nini mosakoli Yisaya akweisaki ezaleli na bango?

15 Na kati na bokonzi moke ya Yuda, bamoko bazalaki na kondima te epai na Jéhovah, Nzambe na mokili na bango. Na likanisi na bango, ebongaki baluka lisungi epai na mokili moko ya bopakano mpe ya nguya, koyanga mwango elongo. Komonaka ete likanisi na bango oyo ezali malamu, bamoko bazalaki koloba na bafandi mosusu ya bokonzi ya Yuda oyo bazalaki kokakatana ete bango nde basali “Mwango mabe”. Na yango bamonisaki ete bazali na kondima te mpe bazali kotya motema te epai na Jéhovah, Nzambe oyo temple na ye ezalaki na Yelusaleme. Mosakoli Yisaya apemamaki na Nzambe mpo na kokweisa mwango wana mabe. Tozali kotanga na verset 12 na mokapo 8 na mokanda na ye: “Loba te ete, Mwango wana, mpo na nyonso ekobyangaka bato oyo ete, Mwango: mpe banga te makambo mazali bango kobanga, zala mpe na nsomo te.”

16, 17. Na ntango ya kala, nini epesaki na libota ya Jéhovah kimya mpe kobatelama ya solo, mpe ndenge nini yango emonisamaki ntango Senakeliba mokonzi na Asulia ayaki mpo na kobundisa Yelusaleme?

16 Kondimama oyo ezalaki kati na bafandi na bokonzi na Yuda mpe na Jéhovah ememelaki bango kimya mpe kobatelama. Ezali yango emonisamaki ntango Senakeliba mokonzi na Asulia atindaka bato na ye misato mpo na koloba na mokonzi Ezekiase mpe na bato na ye ete babima epai na ye mpo akamata bango lokola baombo. Labasake, ntoma na mokonzi na Asulia atelemaki liboso na lopango na Yelusaleme mpe afingaki Jéhovah Nzambe, mpo na komeka kolembisa to koboma elikya oyo Bayuda batyaki epai na Jéhovah. Eyokaki ye mawa mingi mpo na bifingeli oyo bafingaki Jéhovah, Nzambe ya solo bobele moko oyo azali na bomoi, mpe emonaki ye likama monene oyo ezalaki koyela Yelusaleme mpo na limpinga makasi ya Baasulia, mokonzi Ezekiase akendaki na temple mpe amonisaki makambo yango nyonso liboso na Jéhovah Nzambe. Jéhovah asepelaki mpo ete Ezekiase amonisaki kondima makasi epai na ye mpe alukaki emoniseli ya bokonzi na ye ya molongo mobimba; yango wana apesaki eyano malamu na libondeli na ye. Mosakoli na ye Yisaya endimisaki lisusu eyano yango na maloba na ye. Kotosaka etinda oyo mokonzi Ezekiase apesaki, bazongisaki ata liloba moko te na maloba ya kobangisa oyo Labasake, ntoma na Baasulia, alobaki yango.​—2 Mikonzi 18:17-36; 19:14-34.

17 Labasake akamwaki mingi mpo ete bazongiselaki ye ata liloba moko te. Yango wana azongaki na camp epai na Senakeliba, oyo azalaki naino kobundisa mboka Libina. (2 Mikonzi 19:8) Nsima na koyoka rapport ya ntoma na ye, Senakeliba atindaka na Ezekiase mikanda mabe mpo na kokanela ye. Alobaki lisusu boye: “Tika te ete Nzambe na yo azimbisa yo, ye oyo okondima ye ete, Yelusaleme ekopesama na maboko na mokonzi na Asulia te.” (2 Mikonzi 19:9, 10) Kasi na butu wana, Jéhovah amonisaki ete maloba ya Labasake, ntoma ya Baasulia ezalaki bilobaloba ya mpamba, mpe ye moko ayanolaki na mikanda mabe oyo Senakeliba akomelaki Ezekiase. Jéhovah amonisaki ete aleki nzambe na mokonzi na Asulia. Tala nsuka na lisolo yango, ndenge tozali kotanga yango kati na 2 Mikonzi 19:35; “Na butu yango, anzelu ya Jéhovah abimaki mpe abetaki kati na efandelo na Baasulia bato nkoto mokama na ntuku mwambe na mitano. Elongwaki bango na mpongi na ntongontongo, tala bazalaki banso bibembe.” Baasulia oyo batikalaki, kati na bango ezalaki mokonzi Senakeliba mpe mbala mosusu Labasake bamonaki likambo ya nsomo na ntongo wana ntango balamukaki: bibembe epai na nyonso, baoyo bakufaki mpo na ntembe oyo babetelaki Jéhovah Nzambe.

18. (a) Na nsuka ya likambo, nini akomelaki Senakeliba mokonzi na lolendo? (b) Liteya nini ba Témoins de Jéhovah ntango na biso bazwi kati na lisolo oyo ya kala?

18 Nokinoki Senakeliba atelemaki mpe “azongaki na nsoni na elongi kino mokili na ye mpenza”, na Ninive, kapitale na ye, epai kuna bana na ye mibale babomaki ye. (2 Ntango 32:21; 2 Mikonzi 19:36, 37) Bokonzi ya Asulia ekanelaki lisusu lisangá ya Jéhovah te. Elonga wana ekumisaki solo bokonzi ya molongo mobimba ya Nzambe Oyo-Aleki​—Likolo. Epai mosusu, motindo Yelusaleme ebatelamaki, ezali ndakisa emonisi biso epai na nani ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso basengeli kotala na elikya nyonso mpo na kozwa kimya mpe kobatelama ya seko​—epai na mwango na politike te, kasi epai na Jéhovah Nzambe.

Tomizimbisa te

19. La Société akolanda kosala nini?

19 Mpo tozimbisama te, la Société akobanda kobimisa makebisi na ntango ekoki kati na mikanda oyo azali kobimisa. Baoyo bazali kotanga mikanda yango bakokosama te ntango mabota ya lelo bakobelela ete “Kimya ezali, makambo mazali te!”.

20. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bakoki ata moke te kolakisa bazalani na bango na kotya motema na “kimya mpe kobatelama” oyo ekosakolama mosika te? Na yango, oyo ekomi ntango ya kosenzela na nini?

20 Ba Témoins de Jéhovah bakoki ata moke te koyikisa mpiko na bazalani na bango mpo na “kimya” oyo mabota bakosakola yango na elikya nyonso: mpe bakoki ata moke te kobetela maboko baoyo bazali kobongisa “kimya” na mokili mobimba, soki balingi kobatela boyokani nyonso na mabota ya lelo. Bazali ntango nyonso komikundola ete “libota” ya sika, ekabwani na Société des Nations, ebotamaki nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na 1919. “Libota” oyo ya sika elandi kokola mpe kopalangana na mokili mobimba, lokola esakolamaki na Yisaya 60:22: “Oyo moke akokoma nkoto mpenza, oyo eleki moke akokoma libota na makasi. Ngai nazali Jéhovah: na ntango na yango, nakoyeisa yango mbango.” Ya solo, oyo ezali ntango mpo na moto nyonso akeba ete azimbisama te na “kimya” oyo mabota bazali kobongisa.

Bozongeli

◻ Motindo nini liloba “Kimya ezali, makambo mazali te!” ekoyambama?

◻ “Mwango mabe” oyo elobelami na Yisaya 8:12 ezali elilingi ya nini?

◻ Na ndimbola nini O.N.U. ezali kozimbisa bato?

◻ Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bakomitika kozimbisama te?

[Elilingi na lokasa 11]

O.N.U. akozala na liboso ntango mabota bakosakola ete Kimya ezali, makambo mazali te!

[Elilingi na lokasa 14]

Labasake, ntoma na mokonzi na Asulia afingaki Nzambe na Yisraele, kasi nsuka ya likambo emonisaki ete kimya mpe kobatelama ya solo ekoutaka bobele epai na Jéhovah Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto