“Kimya mpe libateli” oyo ekotyama na bato te
Bala bakokoka ata makolo moko te kolya kimya ya solo mpe oyo ekoki koumela. Mpo na nini bongo? Mpo ete azali bango mpenza te nde bazali kolongola kimya, atako basopi makilá mingi na boumeli ya lisoló na bango. Ye oyo azali mpenza mobimisi ya makambo wana azali na nguya koleka moto. Ezali moto mosusu te bobele Satan le Diable, oyo Biblia emonisi ye lokolo “mozimbisi na bato na mokili mobimba.”—Emoniseli 12:9.
BIBLIA elobi ete: “Mokili mobimba mozali kolala na nsé na nguya na ye oyo mabe [Satana].” (1 Yoane 5:19, MN) Na yango, mpo na kokoka kotya kimya ya solo mpe libateli ya solo, esengeli kolimwisa Satan mpe ebongiseli oyo ye asili kosala na mokili, oyo emonani mpenza ete azali kotambwisa yango. (Tala Yisaya 48:22; Baloma 16:20.) Nzokande, bato bazali na likoki te na likambo motindo wana.
Bongo, lolenge nini kimya mpe libateli ekotyama? Na nguya na Ye oyo azali na makasi nsuka te, koleka Satana. Nzambe Mozwi—na nguya Nyonso asili kotya elaká mpo na kosukisa mosala na Satana likoló na bato. Ntango elaká wana ekokoka, “libebi na pwasa” likoya likoló na mokili oyo mozali na nsé na nguya ya Diable. (1 Batesaloniki 5:3-7) Makambo nyonso mazali komonisa ete yango ekosalema mosika te.
Kimya mpe libateli uta sikawa
Boni mpo na eleko na biso? Kimya mpe libateli ya solo ekoki kozwama na motindo mosusu. Lolenge nini? Na komekoláká bakonzi ya mangomba te, kasi na kolandáká mitinda mpe batoli na Nzambe.
Okoki mpenza kozwa kimya na motindo wana? Solo mpenza. Na ndakisa, ba Témoins de Jéhovah basili komona yango. Basili komona ete likoki ezali na kozwa kimya ya solo mpe libateli na ndenge ekoki. Na kolandáká mitinda na Nzambe oyo mikomami kati na Biblia, basili kolonga kosala lisangá ya mokili mobimba litongami na bomoko kati na kimya ya solo, ata soko basangani na yango bazali bato ya mposo nini, ya ekólo nini to monoko nini.—Nzembo 133:1.
Na kotósáká mibeko na Nzambe, na elilingi, basili ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe bazali koyekola lisusu etumba te.’ (Yisaya 2:2-4) Bazali koyoka libateli na bolingo na Nzambe mpe bandimisami ete bandeko na bango ya elimo bazali komibanzabanza mpo na bango. (Baloma 8:28, 35-39; Bafilipi 4:7) Soki ozali kobeta ntembe, tobyangi yo ete oya kotala bango kati na moko na ba Salles du Royaume na bango mpo na komona yango yo moko.
Kimya mpe libateli na mabelé mobimba
Nzokande, elaká na Biblia oyo esakoli kimya mpe libateli ya solo esuki wana te! Yango emonisi bobele lolenge oyo mokili mosengelaki kozala soki moto na moto alandaki mibeko na Nzambe. Kasi mosika te yango ekokokana.
Ntoma Paulo alobaki ete: “Ekoloba bango [baoyo bazali kosalela Nzambe te] ete: ‘Kimya ezali, makambo mazali te,’ [kokanisaká ete basili kotya mpenza kimya mpe libateli oyo bazali koluka ] wana libebi likokwela bango pwasa lokola mpasi ekoyela mwasi na zemi mpe nzela na kokima ekozala te.” (1 Batesaloniki 5:3) Nzambe akomonisa ete Satana azimbisi bato uta ntango molai. Ntango ekokoka ete alongola ye elongo na ebongiseli mabe ya mokili mobimba oyo eyangelami na ye. Bongo nde esakweli na Danyele ekokokana ete: “Na mikolo na mikonzi yango Nzambe na lola akotelemisa bokonzi bokobebisama soko moke te. Mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te. Ekobuka mpe ekosilisa bikonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Likambo yango likozala nde bokeseni epai na Nzambe? Soko moke te. Libebi na pwasa likoyela bobele baoyo babongi na yango, engebene kosambisama mpe mitinda na Nzambe. Okanisi ete Mozalisi akozwa ekateli na sembo wana ekokata ye likambo yango? Tokoki mpenza kotyela ye motema mobimba. Kosambisama yango ekosuka na likambo nini? Masese elobi ete: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili.” (Masese 2:21, 22) Moto moko akooka nde mawa mpo na kolongolama ya bato mabe?
Wana basali na mabe bakolongolama, bato bakokoka kozala na bomoi ya kimya mpe na libateli ya solo awa na mabelé mobimba, na nsé na boyangeli na lobiko ya Bokonzi na Nzambe. “Bakookisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai ; mpamba te mokili ekotonda na boyebi na Jéhovah lokola mbongé ekozipaka mai monene.” (Yisaya 11:9) Ozali kondima elaká oyo ya Biblia? Ondimisami ete mosika te makambo wana makokóma? Soko ozali kobeta ntembe, tozali kolendisa yo ete oyekola likambo yango na bozindo. Ya solo, bobele motindo oyo Nzambe akobongisa likambo yango nde ekopesa nzela na bato ete bazwa oyo bazali koluka: kimya mpe libateli ya solo.
[Bililingi na lokasa 8]
libota na Jéhovah lizali lelo na kimya yo solo mpe libateli na ndenge ekoki