BATO OYO BIBLIA ELOBELI
Obadia—Kolisá ezaleli ya kobanga Nzambe lokola ye
Obadia azalaki mokambi ya ndako ya mokonzi mabe Ahaba, oyo atikaki ete losambo mabe ya Baala etonda na ekólo. Kasi, Obadia akolisaki mpenza ezaleli ya kobanga Yehova ‘banda bolenge na ye.’ (1 Bak. 18:1-13) Na yango ntango Yezabele mwasi ya Ahaba apesaki mitindo ete báboma basakoli nyonso ya Yehova, Obadia ayebaki ete asengelaki kozala na mpiko mpo na kopekisa likambo yango ya mabe esalema. Kobomba ata mosakoli moko ezalaki likama; kasi, Obadia abombaki basakoli 100 mpe apesaki bango bilei na boumeli ya ntango oyo nzala ezalaki makasi na Samaria! Kanisá ndenge oyo ezalaki mpasi kosala yango kozanga ete bankama ya basakoli ya lokuta oyo bazalaki kosalela mokonzi ná mokonzi-mwasi bámona ye.—1 Bak. 18:19.
Liteya nini tokoki kozwa epai ya mobali yango oyo azalaki kobanga Nzambe? Obadia azalaki kobanga Ahaba, kasi azalaki kobanga Nzambe mingi koleka. Yango nde epesaki ye mpiko ya kotya bomoi na ye na likama mpo na kobatela bandeko na ye. Soki bapekisi losambo ya solo esika tozali, tokoki mpe kokolisa ezaleli ya kobanga Nzambe. Kobanga Nzambe ndenge wana ekopesa biso makasi ya kosalisa bandeko na biso ya basi mpe ya mibali oyo bazali kokutana na mikakatano.