LISOLO YA BOMOI
Atako nazalaki nsɔninsɔni, nakómaki misionɛrɛ
NTANGO nazalaki mwana moke, nazalaki nsɔninsɔni mpe nazalaki kobanga bato. Kasi kendekende, Yehova asalisaki ngai nakóma misionɛrɛ oyo atyelaka basusu likebi. Ndenge nini asalisaki ngai? Liboso, na nzela ya batoli ya tata na biso. Na nsima, na nzela ya ndakisa malamu ya ndeko mwasi moko ya elenge. Mpe na nsuka, na nzela ya maloba ya boboto mpe motema molai ya mobali na ngai. Tiká nabɛtɛla bino lisolo ya bomoi na ngai.
Nabotamá na 1951 na engumba Vienne, na Autriche mpe baboti na biso bazalaki bato ya Lingomba ya Katolike. Nazalaki nsɔninsɔni makasi, kasi nazalaki kondimela Nzambe mpe kobondela mbala mingi. Ntango nakómaki na mbula libwa, tata na biso abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova; mwa moke na nsima mama mpe akómaki koyekola.
Elongo na ndeko na ngai ya mwasi, Elisabeth (na nsima)
Eumelaki te, tokómaki na lisangá ya Döbling, na Vienne. Tozalaki kosala makambo mingi elongo na kati ya libota. Tozalaki kotánga mpe koyekola Biblia, koyangana na makita ya lisangá, mpe kopesa mabɔkɔ na misala ndenge na ndenge na mayangani. Banda bomwana mpenza, tata na biso asalisaki ngai nalinga Yehova mingi. Kutu, libondeli na ye ezalaki ete ngai ná ndeko na ngai ya mwasi tókóma babongisi-nzela. Kasi na ntango wana, yango ezalaki mposa na ngai te.
NABANDI MOSALA YA NTANGO NYONSO
Nazwaki batisimo na 1965, ntango nazalaki na mbula 14. Kasi, nazalaki kokoka te kosolola na bato oyo nayebi te na mosala ya kosakola. Lisusu lokola nazalaki komimona ete nazali na ntina te, nasalaki nyonso mpo bilenge mosusu bándima ngai. Yango wana mwa moke nsima ya kozwa batisimo, nakómaki na baninga oyo bazalaki kosalela Yehova te. Nazalaki kosepela kozala elongo na bango, kasi lisosoli na ngai ezalaki kotungisa ngai mpo nazalaki kolekisa ntango mingi na bato oyo bazali Batatoli te. Kasi, nazalaki na makasi te ya kokabwana na bango. Nini esalisaki ngai?
Nayekolaki makambo mingi epai ya Dorothée (na lobɔkɔ ya mwasi)
Na eleko yango, Dorothée, elenge mwasi moko ya mbula 16 ayaki na lisangá na biso. Molende na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako ezalaki kokamwisa ngai. Nazalaki mwa moke mokóló na ye, kasi nazalaki na molende te na mosala ya kosakola. Nazalaki kokanisa boye: ‘Baboti na ngai bazali Batatoli, kasi Dorothée azali kaka ye moko na kati ya solo. Afandaka na mama na ye oyo abɛlaka, kasi abimaka ntango nyonso na mosala ya kosakola!’ Ndakisa na ye etindaki ngai naluka mpe kosala mingi mpo na Yehova. Mwa moke na nsima, ngai ná Dorothée tokómaki babongisi-nzela elongo. Liboso, tozalaki babongisi-nzela basungi mpe na nsima tokómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Ngai mpe nakómaki na esengo na mosala ya kosakola lokola Dorothée. Asalisaki ngai nabanda koyekola na moto Biblia mpo na mbala ya liboso. Nsima ya mwa ntango, kobanga na ngai ekitaki mpe nakómaki kobanda lisolo na bato na bandako na bango, na babalabala, mpe na bisika mosusu.
Na mbula na ngai ya liboso na mosala ya mobongisi-nzela, ndeko mobali moko na nkombo Heinz ayaki na lisangá na biso. Ayekolaki Biblia na Canada ntango akendaki kotala ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Batindaki Heinz na lisangá na biso na Vienne mpo azala mobongisi-nzela monene. Nasepelaki na ye kaka mbala moko. Kasi, ye azalaki kolinga kokóma misionɛrɛ, mpe ngai nazalaki na likanisi ya kozala misionɛrɛ te. Na yango, na ebandeli nalingaki te koyebisa ye ndenge oyo nazalaki komiyoka mpo na ye. Kasi na nsima, ngai ná Heinz tolinganaki, tobalanaki, mpe tokómaki babongisi-nzela elongo na Autriche.
NAMITYELI MOKANO YA KOKÓMA MISIONƐRƐ
Mbala mingi Heinz azalaki koyebisa ngai mposa na ye ya kokóma misionɛrɛ. Atyaki ngai mbamba te; kasi mpo na kolendisa ngai, azalaki kotuna ngai mituna, na ndakisa: “Lokola tozali na bana te, tokoki kosala mingi na mosala ya Yehova te?” Lokola nazalaki nsɔninsɔni, nazalaki kobanga kokóma misionɛrɛ. Ya solo, nazalaki mobongisi-nzela, kasi nazalaki komona ete kozala misionɛrɛ ezali mpasi mingi. Kasi, Heinz amonisaki motema molai mpe abatelaki kaka mokano yango. Alendisaki ngai mpe nabanda kotyela bato likebi mingi na esika namitungisaka kaka mpo na ngai moko. Toli na ye esalisaki ngai mingi.
Heinz azali kotambwisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisangá moke ya monɔkɔ ya Serbo-croate na Salzbourg, Autriche, na 1974
Mokemoke, nakolisaki mposa ya kokóma misionɛrɛ, mpe totondisaki formilɛrɛ mpo na Eteyelo ya Gileade. Kasi, mokɛngɛli ya filiale alobaki ete nayekola naino koloba Anglais malamu. Nsima ya kosala mbula misato mpo na kokolisa Anglais, tokamwaki ntango batindaki biso na lisangá moko ya monɔkɔ ya Serbo-croate na Salzbourg, na Autriche. Tosalaki na teritware yango mbula nsambo, mbula moko tosalaki mosala ya zongazonga. Monɔkɔ yango ya Serbo-croate ezalaki mpasi, kasi tozalaki na bayekoli ya Biblia ebele.
Na nsima na 1979, basɛngaki biso tósala lokola tokei konje na Bulgarie. Mosala ya kosakola epekisamaki na ekólo yango. Na yango, tobimaki na mosala ya kosakola te ntango tokendaki kuna. Kasi, tomemaki kaka na ndenge ya kobombana mikanda oyo babimisaki na ndenge ya mikemike mpo na bandeko basi mitano oyo bazalaki kofanda na Sofia, engumba-mokonzi. Nazalaki kobanga makasi, kasi Yehova asalisaki ngai na mokumba yango. Komona mpiko mpe esengo ya bandeko basi yango atako bazalaki na likama ya kokɔta bolɔkɔ epesaki ngai mpiko ya kosala makasi nakokisa mokumba nyonso oyo ebongiseli ya Yehova esɛngi ngai.
Nzokande, totondisaki lisusu formilɛrɛ mpo na eteyelo ya Gileade, mpe mbala oyo bandimaki biso. Tokanisaki ete tokokɔta eteyelo yango na monɔkɔ ya Anglais na États-Unis. Kasi na sanza ya 11/1981, babandaki mpe kosala Eteyelo ya Gileade na filiale ya Wiesbaden, na Allemagne. Na yango ezalaki na monɔkɔ ya Allemand, mpe ezalaki pɛtɛɛ nakanga ntina. Kasi bakotinda biso wapi?
TOKEI NA EKÓLO OYO EZALAKI NA BITUMBA
Batindaki biso na Kenya! Kasi biro ya filiale ya Kenya esɛngaki biso soki tokondima kosala nde na Ouganda, ekólo mosusu ya pembeni. Mbula koleka 10 liboso, Général Idi Amin akweisaki guvɛrnema ya Ouganda. Na bambula oyo elandaki, boyangeli na ye ya kokonza bato ebomisaki bankóto ya bato mpe enyokolaki bamilio ya bato. Na nsima, na 1979, bakweisaki lisusu guvɛrnema ya Ouganda. Bokoki komona ntina oyo nazalaki kobanga kokende na mboka ya ndenge wana. Kasi, Gileade esalisaki biso tóyekola kotyela Yehova motema. Na yango tondimaki kokende.
Bomoi na Ouganda ezalaki mabe mpenza. Mai, kura, mpe biloko mosusu ya ntina ezalaki te. Bato bazalaki koboma basusu mpe koyiba, mingimingi na butu. Bato bazalaki kofanda kaka na bandako, bazali kozela makambo ebonga, mpe mbala mingi kobondela, ete na butu miyibi bákɔtela bango te. Atako mikakatano wana, bandeko ya ekólo yango bazalaki kaka makasi na elimo!
Nazali kolamba na ndako ya libota ya ndeko Waiswa
Na 1982, ngai ná Heinz tokómaki na Kampala, engumba-mokonzi ya Ouganda. Sanza mitano ya liboso tofandaki na libota ya Sam ná Christina Waiswa elongo na bana na bango mitano mpe bandeko mosusu minei ya libota. Mbala mingi ndeko Waiswa ná mwasi na ye mpe libota na bango bazalaki kolya kaka mbala moko na mokolo, yango wana boyambi na bango esimbaki mpenza mitema na biso. Ntango tofandaki na libota ya ndeko Waiswa, ngai ná Heinz toyekolaki makambo mingi oyo esalisaki biso na bomoi ya misionɛrɛ. Na ndakisa, toyekolaki kobatela mai; tozalaki kosalela kaka mai moke mpo na kosukola mpe mai oyo tosaleli mpo na kolongola fulufulu ya sabuni, tozalaki kobwaka yango na twalɛti. Na 1983, ngai ná Heinz tozwaki ndako na biso moko kaka na Kampala na esika ya mwa kimya.
Tozalaki kosepela na mosala ya kosakola. Nazali koyeba lisusu ete na sanza moko, totikaki bazulunalo koleka 4000! Kasi likambo ya malamu koleka ezalaki ete bato bazalaki kondima solo. Bazalaki na limemya mpo na Nzambe mpe bazalaki kolinga koyoka makambo ya Biblia. Mbala mingi ngai ná Heinz tozalaki koyekola moto na moto na bato 10 to 15. Mpe toyekolaki makambo mingi epai ya bayekoli na biso ya Biblia. Na ndakisa, tozalaki kosepela ndenge bazalaki kotambola mpo na koya na makita pɔsɔ nyonso kozanga komilelalela, mpe bazalaki ntango nyonso na esengo.
Na 1985 mpe 1986, bitumba ebimaki lisusu mbala mibale na Ouganda. Tozalaki komona basoda ebele ya bana mike basimbi mandoki; bazalaki kotɛlɛma na bisika oyo bakangi banzela mpo na kotala bato liboso ya kolekisa bango. Na ntango wana, tozalaki kobondela Yehova apesa biso bososoli mpe motema kimya wana tozalaki kosakola mpo na koluka bato oyo bakosepela na solo. Mpe Yehova ayokaki mabondeli na biso. Mbala mingi kobanga na biso ezalaki kosila ntango tokutani na moto oyo andimi nsango ya Bokonzi.
Ngai ná Heinz elongo na Tatjana (na katikati)
Tozalaki mpe koteya bapaya oyo bayei na Ouganda. Na ndakisa, tokutanaki na Murat ná Dilbar Ibatullin, mwasi ná mobali oyo bautaki na Tatarstan (Na Russie) mpe toyekolaki na bango Biblia. Murat azalaki monganga. Babalani yango bandimaki solo mpe tii lelo bazali kosalela Yehova. Na nsima, nakutanaki na Tatjana Vileyska, mwasi moko ya Ukraine oyo azalaki kokanisa komiboma. Na nsima Tatjana azwaki batisimo, azongaki na Ukraine mpe na nsima akómaki mobongoli ya mikanda na biso.a
MIKAKATANO YA SIKA
Na 1991, ntango ngai ná Heinz tokendaki konje na Autriche, bandeko ya biro ya filiale ya kuna babengaki biso mpe bayebisaki biso ete batindi biso na mboka mosusu: Bulgarie. Ntango boyangeli ya Bakoministe ekweaki na Mpoto ya Ɛsti, mosala ya Batatoli ya Yehova ekomamaki na mikanda ya Leta na Bulgarie. Ndenge nalobaki yango, ngai ná Heinz tokendaki kuna liboso mpo na kokɔtisa mikanda na ndenge ya kobombana na ntango oyo mosala na biso epekisamaki. Kasi, sikoyo batindaki biso kuna tókende kosakola.
Bayebisaki biso tózonga na Ouganda te. Na yango, tozongaki te kokanga biloko na biso na Ouganda to kopesa bandeko mbote ya nsuka, kasi tokendaki na Betele ya Allemagne, tozwaki motuka mpe tosalaki mobembo tii na Bulgarie. Batindaki biso na etuluku moko ya basakoli soki 20 na Sofia.
Tokutanaki na mikakatano ya ndenge mosusu na Bulgarie. Ya liboso, toyebaki monɔkɔ na bango te. Ya mibale, mikanda oyo ezalaki na monɔkɔ ya Bulgare ezalaki kaka Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Mpe tozalaki kozwa te bato ya koyekola na bango Biblia. Atako mikakatano wana, bokoli ezalaki komonana na mwa etuluku na biso mpo bandeko bazalaki na molende. Bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse bamonaki yango, mpe bakómaki kolukela biso makambo mpenza.
Na 1994, balongolaki Lingomba ya Batatoli ya Yehova na mikanda ya Leta mpe bakómaki kotalela biso lokola mwa lingomba oyo epekisami. Bakangaki bandeko mosusu. Bapanzi-nsango bazalaki kotambwisa makambo ya lokuta mpo na biso, bazalaki koloba ete Batatoli ya Yehova babomaka bana, mpe batindaka Batatoli mosusu bámiboma. Ekómaki mpasi mpo ngai ná Heinz tóbima na mosala ya kosakola. Mbala mingi tozalaki kokutana na bato ya nkanda oyo bazalaki kogangela biso, kobengela biso bapolisi, mpe ata kobamba biso biloko. Likoki ezalaki te ya kokɔtisa mikanda na ekólo yango, mpe kofutela bandako mpo na kosala makita ekómaki mpasi. Na libaku moko kutu, bapolisi bakɔtelaki biso esika oyo tozalaki kosala liyangani. Ngai ná Heinz tomesanaki te na bato oyo bazalaki koyina basusu ndenge wana. Yango ekesanaki mpenza na Ouganda, epai bato bazalaki na boboto mpe kosepela na solo! Nini esalisaki biso tómesana na mbongwana yango?
Kolekisa ntango elongo na bandeko nde esalisaki biso tóbatela esengo. Bazalaki kosepela ndenge bayebaki solo mpe bazalaki na botɔndi ndenge tosalisaki bango. Bazalaki na bomoko mpe bazalaki kosalisana. Makambo oyo tokutanaki na yango kuna eteyaki biso ete tokoki kozala na esengo esika nyonso oyo batindi biso soki tokobi kotyela bato likebi mingi.
Na Betele ya Bulgarie, na 2007
Kasi na nsima, makambo ebongaki. Bakomaki lisusu Batatoli ya Yehova na mikanda ya Leta na 1998, mpe eumelaki te mikanda ya monɔkɔ ya Bulgare ekómaki mingi. Na nsima, na 2004, basalaki molulu ya bofungoli biro ya filiale ya sika. Lelo, ezali na masangá 57 na Bulgarie, mpe basakoli 2953. Na mobu ya mosala oyo eleki, bato 6475 bayanganaki na Ekaniseli. Na ntango moko boye ezalaki kaka na bandeko basi mitano na Sofia, kasi lelo ezali na masangá libwa! Tomoni mpenza ndenge ‘oyo ya moke ekómi nkóto.’—Yis. 60:22.
MIKAKATANO NA BISO MOKO
Nakutaná na mikakatano ebele ya kolɔngɔnɔ ya nzoto. Na boumeli ya bambula, nabɛlaki mbala ebele maladi oyo esalaki ete baselile ekóma mingi na esika moko ya nzoto. Mbala moko kutu esalaki ngai bongo na motó. Basalisaki ngai na radiothérapie mpe basalaki ngai lipaso oyo eumelaki ngonga 12 na Inde mpo bálongola baselile yango na motó na ngai. Tofandaki na Betele ya Inde tii ntango nayokaki malamu, mpe na nsima tozongaki na mokumba na biso na Bulgarie.
Na ntango yango, Heinz abandaki kobɛla maladi moko oyo emonanaka mingi te na nkombo Huntington, oyo bana bazwaka na makila ya baboti na bango. Azalaki kokoka te kotambola, koloba, mpe mabɔkɔ ná makolo ezalaki kosala malamu te. Ntango maladi yango ekómaki makasi, esɛngaki nasalisaka ye na makambo mingi. Na bantango mosusu nazalaki kolɛmba mingi mpe komituna soki nakokoka kokoba kosalisa ye. Kasi, ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Bobi azalaki mbala na mbala kosɛnga Heinz básakola elongo. Bobi azalaki komitungisa te ndenge Heinz azalaki kokoka te koloba to ndenge mabɔkɔ ná makolo ezalaki kosala malamu te. Bobi azalaki ntango nyonso kondima kosalisa Heinz soki ngai nakoki te. Atako ngai ná Heinz tobotá bana te na mokili oyo, tomonaki ete Yehova apesaki biso Bobi lokola mwana na biso!—Mrk. 10:29, 30.
Heinz azwaki mpe maladi ya kanser. Likambo ya mawa, mobali na ngai akufaki na 2015. Nabulunganaki mpenza ntango Heinz akufaki; nazalaki kondima te. Na makanisi na ngai, ezali lokola azali na bomoi! (Luka 20:38) Mbala mingi na kati ya mokolo nakanisaka maloba na ye ya boboto mpe batoli ya malamu oyo apesaki ngai. Nazali na botɔndi mingi mpo na bambula nyonso oyo tosaleli Yehova na bosembo biso mibale.
NAZALI NA BOTƆNDI MPO NA LISALISI YA YEHOVA
Yehova asungi ngai mpenza na mikakatano na ngai nyonso. Asalisi ngai mpe nalonga ezaleli na ngai ya nsɔninsɔni mpe nakóma misionɛrɛ oyo atyelaka bato likebi mingi. (2 Tim. 1:7) Na lisalisi ya Yehova, ngai ná leki na ngai ya mwasi tozali sikoyo na mosala ya ntango nyonso. Lelo, leki na ngai ná mobali na ye bazali na mosala ya zongazonga na teritware moko ya monɔkɔ ya Serbe na Mpoto. Yehova ayanoli mabondeli oyo tata na biso asalaki eleki bambula ebele!
Koyekola Biblia ngai moko epesaka ngai kimya ya motema. Nayekolá kobondela “na molende koleka” na ntango ya mikakatano, ndenge Yesu azalaki kosala. (Luka 22:44) Lolenge moko oyo Yehova ayanolaka na mabondeli na ngai ezali na nzela ya bolingo mpe boboto ya bandeko ya lisangá na ngai na Nadezhda, na Sofia. Babengisaka ngai tólekisa ntango elongo, mpe mbala mingi bamoniselaka ngai botɔndi, mpe yango epesaka ngai esengo makasi.
Mbala mingi, namanyolaka na lisekwa. Nakanisaka lokola namoni baboti na ngai liboso ya ndako na biso, babimi kitoko lokola na mokolo oyo babalanaki. Namonaka leki na ngai ya mwasi azali kolamba. Namonaka na makanisi Heinz atɛlɛmi pembeni ya mpunda na ye. Kokanisa ndenge wana elongolaka ngai makanisi ya mabe mpe esalaka ete motema na ngai ezala na botɔndi mingi epai ya Yehova.
Ntango nakanisaka bomoi na ngai mpe makambo oyo nazali kozela na mikolo ezali koya, nandimaka na motema mobimba maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 27:13, 14, ete: “Nalingaki kozala wapi soki nazalaki na kondima te ete nakomona bolamu ya Yehova na mokili ya bato ya bomoi? Tyelá Yehova elikya; zalá na mpiko mpe motema na yo ezala makasi. Ɛɛ, tyelá Yehova elikya.”
a Talá lisolo ya bomoi ya ndeko Tatjana Vileyska na Lamuká! ya 04/2001 nk. 18-22.