Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Avril nk. 18-22
  • Elikya oyo nazali na yango esungi ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elikya oyo nazali na yango esungi ngai
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Nkisi mpo na komibatela ezali mabe te”
  • “Mama na yo ya bolingo akufi”
  • “Ɛɛ Nzambe, soki ozali mpenza solo”
  • Makambo ya kokamwa na Ouganda
  • ‘Tángá yango banda ebandeli tii na nsuka’
  • Nazongi na Donetsk
  • “Piotr azali koluka yo”
  • Talelá mikolo ezali koya, kasi makambo eleká te
  • Nakómá na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na mama na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Yehova, omoni ngai!”
    Lamuká!—2005
  • “Nazali lisusu te moto ya mobulu”
    Biblia ebongolaka bato
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Avril nk. 18-22

Elikya oyo nazali na yango esungi ngai

LISOLO YA TATIANA VILEÏSKA

Esengo ya libota na biso ebebaki ntango babɛtaki mama na kati ya ndako na biso tii akufaki. Sanza minei na nsima, tata amibomaki. Na nsima namonaki mpenza ete bomoi ezalaki lisusu na ntina te. Kasi ndenge nini nazali awa mpo na kobɛtɛla bino lisolo oyo? Bótika nayebisa bino lisolo yango.

DONETSK ezali engumba ya ɛsti ya ekólo Ukraine, eyebani mingi mpo na baizini ya mabende mpe mabulu ya charbon. Engumba yango ezali na bato koleka milio moko oyo balobaka monɔkɔ ya Russe, bazali bato balingá mosala mpe bazali na boboto. Mingi kati na bango batalaka minzoto to basalelaka bikelakela, to mpe horoscope mpo na koyeba makambo nini ezali koya. Basusu bakendeke epai ya banganga​-nkisi, to koldun ndenge babengaka bango na lokota ya Russe. Bamosusu kati na bango balukaka kosolola na bakufi na likanisi ete bakoki kosalisa bango na ntango ya maladi to bobele mpo na komisepelisa.

Tata na ngai azalaki mosali ya basapato. Atako azalaki koloba ete andimaka te ete Nzambe azali, kasi azalaki kokanisa ete moto moko nde atyaki biso awa na mabele. Azalaki koloba ntango nyonso ete: “Tozali bobele bapaya na mabele oyo.” Mama azalaki kokende na losambo na eyenga nyonso ya Pasika, mpo ete, lokola ye moko azalaki koloba: “Soki Nzambe azali solo, esengeli mpenza kokende kosambela.” Nabotamaki na sanza ya Mai 1963. Yaya na ngai ya mwasi, Lioubov, mpe leki na ngai ya mobali Alexandre, ezali bana mosusu oyo bazalaki na libota na biso ya esengo.

“Nkisi mpo na komibatela ezali mabe te”

Piotr,a nɔkɔ na biso moko, azwaki likama na libulu ya charbon esika azalaki kosala mpe anyokwamaki mingi na bampota ya mɔ́tɔ oyo esɛngaki ete básalisa ye na lopitalo moko oyo etalelaka maladi yango. Lokola azalaki komibanzabanza mingi mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye, akendeki kokutana na koldun moko. Nganga​-nkisi wana atyaki nɔkɔ Piotr na boyokani na bilimu. Atako mwasi na ye na baboti na ye bayebisaki ye ete kokende epai ya nganga ezali malamu te, ayebisaki bango ete, ye ayebi makambo mingi koleka bango. Alobaki ete, “Nazali kaka komibatela. Kolɔka bato nde ezali mabe, kasi kozwa nkisi ya komibatela ezali mabe te.”

Piotr azalaki koloba ete akómi na nguya ya kosakola makambo ekoya mpe ya kobatela bato mpo na makama. Atako bongo, mwasi ya Piotr akimaki ye. Yango wana, Piotr abandaki koya kofanda na biso, ntango mosusu na boumeli ya mwa bapɔsɔ. Atyaki mpenza mobulu na libota na biso. Na nsima, Mama na Tata babandaki koswana mingi. Nsukansuka bakabwanaki mpe babomaki libala. Biso bana, tokendeki na ndako mosusu esika moko na mama, mpe Piotr, ndeko na ye ayaki kofanda na biso esika moko.

Lioubov abalaki mpe akendeki na Ouganda ekólo moko ya Afrika elongo na mobali na ye. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1984, Alexandre akendeki konje mpe ngai nasalaki mobembo ya pɔsɔ moko na engumba Gorlovka. Ntango natikaki ndako, ngai na mama tokabwanaki kaka mbangumbangu. Nazali mpenza sikoyo koyoka mawa ndenge tosololaki mingi te mpe natikalaki na ndako te! Kobanda wana, namoná mama lisusu te.

“Mama na yo ya bolingo akufi”

Ntango nautaki na Gorlovka, nakutaki ndako na biso ekangami na fungola, mpe bapolisi bakomaki na monɔkɔ ya ndako ete: moto akɔta te. Nayokaki nsɔmɔ makasi. Nakendeki epai ya bato ya ndako oyo ezali pene wana. Olga azalaki kokoka koloba te. Mobali na ye, Vladimir, alimbolelaki ngai na boboto mpenza ete: “Tania, likambo moko ya mawa esalemaki. Mama na yo akufi. Piotr abomi ye. Na nsima ayaki na ndako na biso, abengaki bapolisi na telefone, mpe na nsima akendeki komitika ye moko na bolɔkɔ.”

Bapolisi bayebisaki ngai ete nsango ya mabe wana ezali mpenza bongo mpe bapesaki ngai fungola nyonso ya ndako na biso. Nayokelaki Piotr nkanda makasi. Lokola nkanda elekaki, nazwaki biloko na ye, babuku na ye ya maji, natyaki yango na bolangiti moko mpe namemaki yango na elanga moko oyo ezalaki mosika te mpe natumbaki yango.

Ntango Alexandre azwaki nsango yango, ayokelaki mpe Piotr nkanda makasi ndenge ngai nayokaki. Mwa moke na nsima, Alexandre akɔtaki mosala ya soda mpe batindaki ye mosika. Tata ayaki kofanda na ndako elongo na ngai, mpe Lioubov autaki na Ouganda mpo na kofanda na biso mpo na mwa ntango mokuse. Na bantango mosusu, tozalaki mpenza kokanisa ete bilimu mabe ezali kotungisa biso. Mpe lisusu tata azalaki kolɔta bandɔtɔ ya nsɔmɔ na butu. Azalaki komiyoka ete soki babomá mama, ezali mpo na ye. Alobaki ete, “Soki nafandaka na ye esika moko, mbɛlɛ akufi te.” Eumelaki te, tata atungisamaki makasi mpenza na makanisi. Nsima ya liwa ya mama, esalaki kaka sanza minei, amibomaki.

Nsima ya kokunda tata, Alexandre azongaki na mosala ya soda, mpe Lioubov azongaki na Ouganda. Namekaki kobongisa bomoi na ngai lisusu na ndenge nabandaki kolanda mateya na Eteyelo ya kotonga bagbagba mpe kosala banzela na Makeïvka. Mpo na kokóma na eteyelo, esengelaki kosala kaka miniti 30. Natyaki lisusu tapi na ndako mpe nabongisaki lisusu ndako na kati, na likanisi ya kobosana makambo mosusu ya kala. Kasi nazalaki naino komona lokola ete bilimu mabe ezalaki kotungisa ngai.

“Ɛɛ Nzambe, soki ozali mpenza solo”

Alexandre asilisaki mosala na ye ya soda mpe ayaki kozonga na ndako. Kasi ngai na ye, tozalaki koyokana te. Ntango ye abalaki, ngai nakendeki kolekisa mwa basanza na Rostov, engumba moko ya ekólo Russie oyo ezwami na pembeni ya Mai Monene ya Azov. Ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 170. Nsukansuka, nazwaki ekateli ya kolongola biloko nyonso ya Piotr.

Natungisamaki makasi na makanisi, nakanaki mpe komiboma. Kasi maloba ya mama ezalaki ntango nyonso kozongela ngai na matoi na ngai ete: “Soki Nzambe azali, soki azali mpenza.” Mokolo moko na butu, nabondelaki mpo na mbala ya liboso. Namilelaki ete, “Ɛɛ Nzambe, soki ozali mpenza solo, nabondeli yo olakisa ngai ntina ya bomoi.” Mwa mikolo na nsima, nazwaki mokanda euti epai ya Lioubov, ye abengaki ngai nakende kotala ye na Ouganda. Yango wana, natikaki naino likanisi oyo nazalaki na yango ya komiboma.

Makambo ya kokamwa na Ouganda

Ezali mpasi na mokili kokuta bisika oyo ekeseni mingi mpenza lokola Ukraine na Ouganda. Mpɛpɔ oyo nakendeki na yango ekitaki na Entebbe na sanza ya Marsi 1989. Ntango nakitaki na mpɛpɔ ezalaki lokola nde nakɔtaki na esika oyo ezali na mɔ́tɔ makasi. Naino nayoka molunge ya ndenge wana te. Ezalaki mpenza likambo ya kokamwa te, mpamba te ezali mbala na ngai ya liboso ya kosala mobembo ya kobima na Union soviétique. Bato yango balobaka Lingelesi, monɔkɔ oyo ngai nayebaki te.

Nakɔtaki na Taksi moko oyo esalaki miniti 45 mpo na kokóma na Kampala. Bisika yango ekeseneki mpenza na oyo namesana na yango, mpe likanisi na ngai ezalaki ete nazali lisusu na mabele te! Kasi sofɛlɛ ya taksi yango azalaki kosɛkasɛka, azalaki moto ya boboto, mpe na nsuka amonaki ndako ya Lioubov na mobali na ye, Joseph. Ezalaki mpenza libɔndisi!

Lioubov azalaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Nasololaki naino na bango te, kasi ndeko na ngai ya mwasi azalaki motema likoló mpo na koyebisa ngai. Azalaki kolanda ngai bisika nyonso na ndako mpe azalaki koyebisa ngai makambo nyonso oyo ayekolaki, kobanda na Genese kino na Emoniseli. Mpo na koloba solo, ezalaki mpenza kopesa ngai nkanda!

Mokolo moko, Batatoli oyo bazalaki koyekola na Lioubov bayaki kotala biso. Moko na bango nkombo na ye ezalaki Marianne. Asololaki na ngai ata mbala moko te, mpamba te na ntango wana nayebaki mpenza Lingelesi malamu te. Kasi ndenge azalaki esengoesengo, miso na ye ezalaki komonisa boboto, ezalaki koyebisa ngai ete akoki kozala moto moko ya sembo mpe oyo azali na bomoi ya malamu. Alakisaki ngai elilingi moko ya Paladiso na kati ya mwa buku “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Alobaki na ngai ete: “Talá mwasi oyo, mwasi yango ezali yo, mpe oyo mosusu ezali ngai. Tofandi na kati ya Paladiso elongo na bato oyo nyonso bazingi biso. Ezali kitoko te?”

Batatoli mosusu ya Kampala mpe bazalaki koya kotala Lioubov na Joseph, lokola nde bayokanaki ete básala bongo moto na moto na ngala na ye. Bazalaki mpenza bato ya bolingo makasi kino etindaki nakanisa ete bazalaki kosala bongo mpo na kobenda likebi na ngai. Mwa bapɔsɔ na nsima nayanganaki na likita ya liboso: likita yango ezalaki Elambo ya Mpokwa ya Nkolo. (Luka 22:19) Atako nazalaki mpenza te kokanga ntina ya makambo oyo bazalaki koloba, nakamwaki lisusu mingi mbala oyo ndenge bato bazalaki na boboto.

‘Tángá yango banda ebandeli tii na nsuka’

Marianne apesaki ngai Biblia na lokota ya Russe, ezalaki mpe mbala ya liboso nazwa Biblia. Abondelaki ngai ete, “Tángá Biblia banda ebandeli tii na nsuka. Ata soki ozali kokanga ntina ya makambo nyonso te, tángá yango kaka!”

Likabo ya Marianne esimbaki mpenza motema na ngai, mpe nazwaki ekateli ete nalanda toli na ye. Nakanisaki ngai moko ete, ‘Bongo litomba nini ezali ya kozala kaka na Biblia soki namipesi te mpo na kotánga yango?’

Ntango nazongaki na Ukraine, namemaki mpe Biblia na ngai. Na boumeli ya mwa basanza oyo elandaki, nazalaki kosala na Russie, na Moscou, mpe nasalelaki ntango na ngai ya bopemi mpo na kotánga Biblia. Sanza libwa na nsima, nazongaki lisusu na Ouganda, ntango wana natángaki yango tii na katikati. Ntango wana nazalaki lisusu na Kampala, Marianne asalelaki Biblia mpo na komonisa ngai elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Paladiso! Lisekwa! Komonana lisusu na mama na tata! Namonaki ete oyo nazalaki koyekola ezali eyano na libondeli oyo nasalaki ntango nazalaki na Donetsk.​—Misala 24:15; Emoniseli 21:3-5.

Ntango toyekolaki lisolo oyo elobelaki bilimu mabe, nalandaki yango monɔkɔ polele. Biblia endimisaki likambo oyo nazalaki kokanisa yango banda kala. Nkisi ya malamu to oyo esalaka mabe te ezali te. Yango nyonso ememaka makama. Nazalaki na mposa ya bilembeteli mosusu te na kotalela oyo esalemaki na libota na biso moko. Nzokande nasalaki malamu kozanga koyeba ntango natumbaki biloko ya Piotr. Baklisto ya liboso mpe batumbaki biloko nyonso oyo ezalaki na boyokani na bilimu mabe ntango babandaki kosalela Yehova.​—Deteronome 18:9-12; Misala 19:19.

Wana boyebi na ngai ya Biblia ezalaki kobakisama, nandimaki mpenza ete nazwi solo. Natikaki komɛla makaya, mpe na sanza ya Desɛmbɛ 1990, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova. Lioubov azwaki batisimo sanza misato liboso na ngai, mpe Joseph ayaki kozwa na mobu 1993.

Nazongi na Donetsk

Na mobu 1991, nazongaki na Donetsk. Kaka na mbula wana, mosala ya Batatoli ya Yehova ya ekólo Ukraine endimamaki na mibeko ya Leta, elingi koloba bakokaki koyangana kozanga kobanga mpe kosakola na polele. Na nzela, tozalaki kosolola na moto nyonso oyo azalaki kopesa mwa ntango. Eumelaki te mpo tóyeba ete ata na mboka oyo bato mingi balobaki ete bandimaka Nzambe te, mingi bazalaki na mposa ya koyeba makambo etali Bokonzi ya Nzambe.

Na ebandeli ya bambula ya 1990, tozalaki na mikanda mingi te oyo elimbolaka Biblia, yango wana totyaki bibliotɛkɛ na babalabala nyonso ya Donetsk mpo ete bato bázwaka mikanda. Tobongisaki esika mpo tótandaka mikanda mpe mwa babuku. Eumelaki te, bato ya boboto oyo bazalaki koluka koyeba makambo na biso, bazalaki kotɛlɛma mpo na kotuna mituna. Baoyo bazalaki kosepela, bazalaki kozwa mikanda, mpe tozalaki kosɛnga bango tóyekola na bango Biblia na bandako.

Na mobu 1992, nakómaki mobongisi-nzela, mosakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova, mpe na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1993, babengaki ngai na biro ya Batatoli ya Yehova na Selters, na ekólo Allemagne mpo nabanda kosala na bandeko oyo babongolaka mikanda kuna. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1998, batindaki biso tókende kosala na ekólo Pologne, tózela kino bandako ya filiale na biso ya Lviv na Ukraine ekosila.

Bokoli ya libota ya Yehova na ekólo Ukraine ezalaki ya kokamwa. Na mobu 1991, na Donetsk, lisangá ezalaki kaka moko na Batatoli 110, kasi lelo oyo masangá ezali 24 mpe Batatoli koleka 3000! Ntango nakendeki na Donetsk na mobu 1997, nakutanaki kaka na makambo ya malamu te, kasi nakutanaki mpe na likambo oyo etungisaki ngai.

“Piotr azali koluka yo”

Na boumeli ya ntango oyo nazalaki na Donetsk, natungisamaki mingi ntango Motatoli moko na nkombo Youlia oyo ayebaki malamu libota na biso, ayebisaki ngai ete: “Piotr azali koluka yo. Alingi bósolola.”

Mokolo wana na mpokwa, nalelaki mingi na ndako mpe nabondelaki Yehova. Eloko nini Piotr azali kolukela ngai? Nayebaki ete alekisaki bambula ebele na bolɔkɔ mpo na likambo oyo asalaki. Nazalaki koyina ye mingi mpo na likambo oyo asalaki mpe nakanisaki mpenza ete ebongi te ete báyebisa ye makambo ya mokili ya sika oyo Yehova alaki. Nabondelaki mwa mikolo na ntina na likambo yango mpe nayaki koyeba ete ezali likambo na ngai te ya kokata soki moto boye to boye nde abongi mpo na kozwa bomoi ya seko. Namikundolaki elaka oyo Yesu Klisto apesaki mosali na mabe oyo abakisamaki na nzete penepene na ye, ete mosali na mabe wana akozala na ye elongo na Paladiso.​—Luka 23:42, 43.

Lokola makanisi wana ezalaki na motó, nazwaki ekateli ya komonana lisusu na Piotr mpe kopesa ye litatoli na ntina na Bokonzi ya Masiya mpe ebongiseli ya sika oyo Nzambe alaki. Ngai na bandeko baklisto mibale ya mibali tokendeki na adrɛsi oyo Youlia apesaki ngai. Ezalaki kuna nde mpo na mbala ya liboso kobanda mama akufaki nde namonaki mpenza lisusu Piotr na miso.

Ezalaki mpenza likambo. Namonisaki Piotr ete ngai nakómá Motatoli ya Yehova mpe Biblia esalisaki ngai nayeba mpo na nini na mokili oyo biso nyonso tokutanaka na makambo mpe mbala mosusu makambo ya nsɔmɔ oyo etali moto na moto. Namonisaki ye mpe mpasi oyo toyokaki ntango tobungisaki mama mpe lisusu tata na biso.

Piotr alobaki ete mongongo moko elobelaki ye ete aboma mama na ngai mpe abandaki kolimbola na mozindo makambo oyo elekaki na mokolo wana. Ntango nazalaki koyoka lisolo ya mabe mpenza wana, nkanda oyo nazalaki na yango, ebongwanaki nde mawa, mpo emonanaki ete akómaki motema likolólikoló lokola nyama oyo balingi báboma. Ntango Piotr asilisaki koloba, namekaki komonisa ye bilaka mosusu ya kitoko oyo ezali na Biblia. Amonisaki ete azalaki kondima Yesu, yango wana natunaki ye boye:

“Ozali na Biblia?”

“Naino te.” Kasi ayebisaki ngai ete asɛngaki Biblia.

“Mbala mosusu osili koyeba ete, na kotalela Biblia, nkombo ya Nzambe ya solo ezali Yehova.”​—Nzembo 83:18.

Ntango ayoki nkombo wana, Piotr akómaki na nsɔmɔ mpe alobaki ete, “Kotángela ngai nkombo wana te. Nakokoka koyoka nkombo yango te.” Atako tosalaki milende nyonso wana mpo na koyebisa Piotr bilaka kitoko ya Nzambe, yango ememaki ata litomba moko te.

Ntango nakei, likanisi moko eyelaki ngai polele na motó: Soki nayebaki Yehova te, nalingaki kobomama lokola mama na ngai, nalingaki komiboma lokola tata na ngai, to mpe balingaki kotinda ngai mpo na kosala makambo ya mabe mpenza lokola Piotr. Nazali mpenza kotɔnda Yehova mingi ndenge asali ete nayeba ye, Nzambe ya solo!

Talelá mikolo ezali koya, kasi makambo eleká te

Makambo oyo ya mpasi mpenza etikalá elembo na motema. Ata lelo oyo, mbala mosusu soki nakanisi makambo yango, epesaka ngai mpasi mpe natungisamaka na makanisi. Kasi ntango nayei koyeba Yehova mpe mikano na ye, kobikisama ebandaki. Solo ya Biblia eteyaki ngai ete natya likebi mingi te kaka na makambo oyo eleká, kasi natalela mingi mikolo oyo ekoya. Mpe oyo nde bomoi ya kitoko Yehova abombeli basaleli na ye!

Lisekwa ya bakufi ekozala na kati ya bomoi yango ya mikolo ezali koya awa na mabele, oyo ekokóma paladiso. Oyo nde esengo nakozala na yango ya koyamba baboti na ngai ntango bakozonga lisusu na bomoi! Tata na ngai azalaki mpenza na elonga ya koloba ete: “Tozali bobele bapaya na mokili oyo.” Mpe likanisi oyo mama na ngai azalaki kondima ete Nzambe azali solo, ezalaki mpenza likanisi moko ya malamu. Nazali na mposa ya makasi koleka ete nakoka koteya mama na tata na ngai solo ya Biblia ntango bakosekwa na ebongiseli ya makambo ya sika oyo Nzambe alaki.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi ye nkombo mosusu.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]

Mpo na mbala ya liboso kobanda mama akufaki, nakutanaki mpenza boye na moto oyo abomaki ye

[Elilingi na lokasa 21]

Nazali na katikati ya Marianne mpe Heinz Wertholz, bamisionɛrɛ oyo bayekolaki na ngai Biblia na Ouganda

[Elilingi na lokasa 21]

Ntango nazwaki batisimo na Kampala

[Elilingi na lokasa 22]

Na biro ya kobongola mikanda, na Pologne

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto