Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/11 nk. 28-30
  • Osambisaka bobele likoló na oyo ezali yo komona?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osambisaka bobele likoló na oyo ezali yo komona?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa na Yesu
  • Ozali nde kosambisa na “sembo”?
  • Tolekisa ndelo te na makambo masengami na Nzambe
  • Kozanga kotalela bobele makambo mazali biso komona, ekozwilaka bolamu
  • Bato ya ndenge nyonso bakobika
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Kosambisa te na kolanda oyo ezali komonana na libándá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Otalaka bobele oyo emonanaka na miso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Osengeli kondima likanisi ya liboso oyo eyeli yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/11 nk. 28-30

Osambisaka bobele likoló na oyo ezali yo komona?

EPUSAMAKI ye na koyina, elenge moko na nkombo Heinz azalaki koluka koboma bokilo na ye ya mobali. Kasi akokaki kosala likambo yango te. Mbula mingi na nsima, azwaki ekateli ya komiboma, kasi akokisaki mpe likanisi yango te. Abandaki bongo koyiba mpe amipesaki na koteka drogue, mpe mpo na yango akotaki boloko. Nsima na yango, libala na ye ebebaki.

Lelo oyo, Heinz amelaka lisusu drogue te. Azali kozwa mosolo na ye na nzela ebongi, mpe azali na esengo na libota mpe na boyokani malamu elongo na bokilo na ye ya mobali. Ndenge nini mbongwana motindo yango esalemaki? Abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Mokemoke, makanisi na ye mabongwanaki.

Ntembe ezali te ete baoyo bayebaki Heinz na kala, bandimaki te ete akoki kobongwana. Esengo mpo na ye, mpe mpo na bamosusu mingi oyo bakokani na ye, Nzambe abwakaki ye te na kokanisáká ete akoki kobongwana te. Na yango, “Nzambe akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libanda nde Jéhovah akotalaka kati na motema”.​—1 Samwele 16:7.

Tala bokeseni monene kati na Nzambe mpe biso bato, mpamba te tozali na ezaleli ya kokanisela lolenge ya moto na makambo oyo tozali komona na miso. Mbala mingi tolobaka boye: “Ndenge namoni ye mpo na mbala ya yambo, azali malamu”. Na elobeli mosusu, totyaka ba etikete likoló na bato na kotaléláká makambo oyo tomoni epai na bango mpo na mbala ya yambo. Nzambe, mpo na ye, azali sembo mpe aponaponaka te, yango ezali bongo mpo na ye mpamba te, atangaka makambo mazali kati na mitema. Tala ntina atindaki Mwana na ye Yesu Klisto, awa na mabelé “mpo ete bato nyonso babika mpe ete bakóma na boyebi koyeba solo”. (1 Timote 2:4) Mpo na ebongiseli yango, baklisto bazali na libaku malamu ya kozala “basali elongo na Nzambe” na kosakóláká na molende nyonso nsango malamu ya Bokonzi epai na bato nyonso. (1 Bakolinti 3:9) Nzokande, boyebi na baklisto bozali na ndelo na yango: bayebaka makambo mazali na mitema te. Basengeli bongo te koponapona mpe kozwa makanisi nokinoki likoló na bato na kotaléláká bobele makambo oyo mazali bongo komonana na miso.

Yakobo, ndeko na Yesu, ayebaki likama oyo elimo yango ekokaki komema na lisangá ya boklisto ya liboso. Alobaki: “Bandeko na ngai, bozala na kondima epai na Nkolo na biso, Yesu Klisto na nkembo, na koponapona bato te. Mpamba te soko moto aingeli na eyanganelo na bino oyo azali na lopete na wolo na mosapi mpe alati bilamba kitoko mpe nsima mobola aingeli na bilamba bibebi; soko nde bokoyamba oyo alati bilamba kitoko, . . . Bozali kokatakata na mitema na bino mpenza te? Bozali kosambisa na makanisi mabe mpe te?” Mpo na biso, ekomelaka biso mpe tozwa makanisi mabe epai na bato mosusu oyo bayaka na Salle du Royaume mpo na mbala ya liboso?​—Yakobo 2:1-4.

Ndakisa na Yesu

Yesu azalaki kotalela bato te lokola basumuki oyo bakoki na kobongwana te, kasi lokola bato oyo bakokaki komonisa motema sembo mpo na kobongwana soki basalisi bango mpe soki bapesi bango elendiseli oyo bazali na yango mposa. Yango wana “amipesaki lokola lisiko mpo na bato banso”. (1 Timote 2:6) Ntango azalaki kosakola, azalaki komona te ete moto oyo azalaki na motema mobongi mpo na koyoka azalaki mpamba. Azalaki komimatisa soko moke te na lolenge na ye ya kotalela bato.​—Luka 5:12, 13.

Bafalisai bazali na elimo motindo mosusu. Totangi boye na ntina na bango: “Bakomeli na Bafalisai bamoni ete azali kolya na bato na masumu mpe na bakongoli na mpako mpe batuni bayekoli na ye ete, mpo na nini ye akolyaka na bakongoli na mpako mpe na bato na masumu? Yesu ayoki bongo mpe alobi na bango ete, baoyo na nzoto makasi bazali na bosenga na monganga te, kasi bobele babeli. Ngai nayei kobyanga bayengebeni te kasi bato na mabe.’”​—Malako 2:16, 17.

Ya solo, maloba oyo malimboli te ete Yesu akangaki miso na mabe mpe na moyibi ya basumuki wana mpe bakongoli na mpako. Ata bongo, ayebaki ete bato bakoki komipesa na misala mabe kozanga kokanela yango, to mpo na makambo mosusu oyo bazali kokoka te kotambwisa yango te. Azalaki bongo koyeba bolembu ya bazalani na ye mpe azalaki “koyoka mawa mpo na bango, mpo ete bazalaki lokola bampate bazangi mobateli”. (Malako 6:34) Bolingo na ye epusaki ye na kokesenisa misala mabe mpe motema na bango oyo ekokaki kozala malamu.

Ata na boyokani na ye na bayekoli, Yesu azalaki kotala bobele makambo mazalaki komonana na miso te. Bato yango bazalaki basumuki, oyo bazalaki mpe kosala mabunga mbala mosusu, kasi Yesu azalaki moto na makambo makasimakasi te, mpo na kopamela bango ntango nyonso na mabunga mikemike. Ayebaki ete bazalaki na mposa ya kosala malamu, mpe bazalaki na mposa ya lisalisi mpe ya kolendisama, mpe azalaki kosalisa bango na makambo yango. Na ntembe te, Yesu azalaki kotalela bato ndenge Nzambe akotalelaka bango. Omekaka kolanda ndakisa na ye ya malamu?

Ozali nde kosambisa na “sembo”?

Mokolo mosusu, Yesu azalaki liboso na etuluku moko na bato oyo bazalaki kokanisa ete bazalaki sembo mpe batombokaki na ndenge asalisaki moto moko na maladi mokolo na sabata. Apesaki bango etinda oyo: “Bokata na kolandaka makambo makomona bino te kasi bokata na ekateli na sembo.” Na esika ete basepela mpe bandima ete Yesu asalaki likamwisi na “kobikisaka moto”, “basilikaki makasi” mpe balobaki ete abuki mobeko na sabata. Bazalaki kolanda se makambo mazalaki bango komona na miso, komonisaka bongo makanisi na bango ya mabe. Na lolendo na bango, bazalaki kokanisa ete ekateli na bango ezalaki sembo nzokande ezalaki bongo te.​—Yoane 7:23, 24.

Biso mpe tokoki kosala libunga motindo yango. Na ndenge nini? Soko tozali kosepela te na ntango mosumuki moko abongoli motema azongi na lisangá to moto moko ayebani ete azali na etamboli mabe, abandi koyekola Biblia mpe abandi kosalisama na elimo. Tokoki kobanda kozwa ekateli mpo na bato na ntina na molato na bango oyo ebongi mpenza te mpe koloba ete bakokóma Batemwe te. Nzokande, mingi na baoyo bazalaki ba hippies mpe bato mosusu ya mobulu bazali sikawa baklisto ya solo. Lokola bato motindo wana bazali kosala mbongwana na bomoi na bango, tokoboya ko- talela bango bobele na makambo “mazali komonana na miso”, yango nde ekopekisa biso na kosepela na ezaleli malalmu ya mitema na bango.

Ekozala malamu koleka, mpe na boyokani na ndakisa na Yesu, kobondela mpo na bato yango mpe, kosalisa bango mpo ete bakola na elimo. Ekoki kozala mpasi mpo na kosepela na bato motindo yango. Kasi, soki Jéhovah azali kobyanga bango epai na ye na nzela na Klisto, bongo biso tozali banani mpo na koboya bango na ntina na makambo mazali biso komona na miso? (Yoane 6:44) Soko tozali kosambisa moto, wana ezali biso koyeba ata motema na ye te to ezalela na ye, tokoki komibendela lisambisi mabe.​—Tala Matai 7:1-5.

Na esika ya kosambisa na makasi nyonso bato wana ya sika, tosengeli kosalisa bango, kolendisa bango mpe kopesa bango toli na ndakisa na biso. Nzokande, soko tozali na boboto, tokoboya kokumisa koleka ndelo bato ya sika oyo mbala mosusu bayebani mingi na mokili. Wana ekokoma koponapona mpe elembo ya kozanga bokoli mpo na biso. Ata mpo na moto yango, ezalela wana ekosalisa ye na kozala na bopolo? Akotungisama na yango te?​—Levitike 19:15.

Tolekisa ndelo te na makambo masengami na Nzambe

Jéhovah akoyebaka makambo mazali kati na mitema, kasi biso tokoki koyeba bato mosusu malamu mpenza te. (1 Ntango 28:9) Soko toyebi likambo yango, tokokokana te na Bafalisai, oyo bazalaki kokanisa ete bazalaki sembo, mpe tokomeka te kokokisa bato na kolandaka masengami na biso moko ya bosembo, mpo ete bakokana na ndenge biso tozali kokanisa ete ezali sembo. Soko tozali kotala bato lokola Nzambe azali komona bango, tokosenga bango makambo koleka ndelo te na ndenge Nzambe azali kosenga bango yango. Tokolekisa ndelo na “makambo makomami te.” (1 Bakolinti 4:6) Wana ezali etinda bakengeli basengeli mpenza kobatela na motema.​—1 Petelo 5:2, 3.

Likambo etali molato ekosalisa biso na kolimbola likambo oyo. Biblia esengi boye ete-to Nzambe asengi ete - moklisto abongisa molato na ye, ezala peto, mpe emonisa ete azali na “bopolo mpe na makanisi malamu”. (1 Timote 2:9; 3:2) Nzokande, eleki mwa bambula, kosangana moko ya bankulutu ezalaki kotinda ete, balobi nyonso bazalaki kosala diskur na lisangá na bango balata simisi ya mpembe, atako basimisi mosusu ekokani na yango, ezalaki kondimama na mboka. Soki molobi moko mopaya alati simisi ya langi mosusu, bazalaki kosenga ye alata simisi moko ya mpembe oyo bazalaki kobomba na Salle du Royaume. Emonanaki polele ete baklisto yango bazalaki “kobakisa makambo oyo makomamaki te.” Tosengeli kokeba mpenza mpo ete topusa te na makasi, bato mosusu na kolanda bamposa na biso. Mpo na yango, toli ya Ntoma Paulo ezali mpenza na ntina: “Tika ete boboto na bino boyebana na bato banso.”​—Bafilipi 4:5.

Kozanga kotalela bobele makambo mazali biso komona, ekozwilaka bolamu

Soki tokangi ntina oyo ete biso tozali na likoki te ya koyeba makambo mazali na mitema, tokozala na boyokani malamu elongo na bato oyo bazingi biso, ezala na kati to na libanda ya lisangá. Ezalela motindo yango ekosalisa biso na kozanga kotya ntembe na mikano na bango, “mpamba te biso mpe, tozalaki bato na mobulu; na nkanza, topengolami nzela, baombo na mposa mabe mpe na bisengo na mpamba.” (Tito 3:3) Koyebaka bongo, tokomibongisa mpo na kosakola nsango malamu na bato nyonso, ata epai na baoyo bakoki komonana na miso ete babongi na yango te. Bango nde bakozwa ekateli soko basengeli kondima to koboya solo, boye te? Mpe biso tozali nde na mokumba ya kosakola yango epai na bato banso.

Ba Témoins de Jéhovah mingi lokola Heinz basepelaki na ndenge bayambamaki na lisangá ya boklisto na mibali mpe basi oyo balandaki makambo mazalaki bango komona te, mpe basambisaki te na mbala ya yambo engebene na oyo emonaki bango.

Tozwa likambo ya Frank. Mokolo na lomingo moko, akendaki na Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah. Ezalaki na sud ya Allemagne. Bato oyo bamonaki ye mokolo yango, bamonaki ye elenge oyo amibongisi malamu te, azalaki na mandefu; nsuki milai kino na mapeka, mpe na bilamba ya bosoto. Ayebanaki lokola molangwi na masanga mpe momeli na likaya. Azalaki mpe konyokola makango na ye mpe mapasa oyo babotaki. Ata bongo, ayambamaki malamu mpenza na yango ete ayaki na makita na poso elandaki. Bayangani bamonaki nini na mbala oyo mpo na moto yango? Elenge mobali amibongisi malamu, alati bilamba ya peto. Na poso ya misato, bamonaki elenge mobali oyo atikaki komela likaya, mpe ayaki elongo na makango na ye mpe bana na bango mibale. Na poso ya minei, bamonaki bilenge babalani oyo bautaki kobongisa libala na bango na miso ya Leta. Na poso ya mitano, bamonaki bilenge babalani oyo ba- kataki boyokani nyonso na lingomba na lokuta. Lelo oyo, elingi koloba mbula minei na nsima, mpo na kozongela maloba ya Témoin de Jéhovah moko, oyo okoki komona kati na Salle du Royaume ezaili, “libotana bizaleli malamu lokola soki bazali kolanda nzela ya boklisto uta bamubla mingi”.

Ezala ezipeli ya mokanda, ezala mpe efelo ya ndako, moko te ekoki mpenza komonisa ete makambo mazali na kati na yango mazali malamu to mabe. Bobele bongo, ndenge tozali komona moto, emonisaka mpenza te bomoto na ye ya solo. Baklisto oyo bazaili kosala makasi mpo na komona bato ndenge Nzambe azali komonela bango, bakosambisa te bobele mpo na mbala ya yambo. Nzambe atyaka likebi na “bomoto ebombami na motema”, mpe mpo na yango tokoki na kotonda ye.​—1 Petelo 3:3, 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto