LISOLO YA BOYEKOLI 25
LOYEMBO 96 Buku ya Nzambe—Eloko ya motuya mingi
Tózwa mateya na esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa—Eteni 2
“Apambolaki moto na moto na ndenge oyo ebongi na ye.”—EBA. 49:28.
NA MOKUSE
Tokolobela mateya oyo tokoki kozwa na esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa mpo na bana mwambe.
1. Tokotalela nini na lisolo oyo?
BANA mibali ya mobange Yakobo bazingi ye; bazali koyoka na likebi ndenge azali kopambola mokomoko na bango. Na lisolo oyo eleki, tomonaki makambo oyo Yakobo alobaki na Rubene, Simeone, Levi, mpe Yuda, mpe mbala mosusu maloba yango ekamwisaki bango. Na ntembe te, bamitunaki soki Yakobo akoloba nini na bana mwambe oyo batikali. Na lisolo oyo, tokotalela mateya oyo tokoki kozwa na maloba ya Yakobo epai ya Zebulone, Isakare, Dani, Gade, Ashere, Nafatali, Yozefe, mpe Benyamina.a
ZEBULONE
2. Yakobo alobaki nini mpo na Zebulone, mpe ndenge nini ekokisamaki? (Ebandeli 49:13) (Talá mpe etanda.)
2 Tángá Ebandeli 49:13. Yakobo amonisaki ete bato ya libota ya Zebulone bakofanda pembeni ya mbu, na ngámbo ya nɔrdi ya Mokili ya Ndaka. Yango ekokisamaki mbula koleka 200 na nsima, ntango bato ya libota ya Zebulone bazwaki mabele na bango ya libula. Teritware yango ezalaki na katikati, Mbu ya Galile na ngámbo moko mpe Mbu ya Mediterane na ngámbo mosusu. Moize asakolaki ete: “Sepelá, Ee Zebulone, ntango ozali kobima.” (Mib. 33:18) Mbala mosusu maloba yango elobelaki ndenge Zebulone ekozala na mokakatano te ya kosala mibembo mpo na mombongo, mpo teritware na yango ezali na katikati ya mbu mibale. Ezala bongo to te, bato ya libota ya Zebulone bazalaki na ntina ya kozala na esengo.
3. Nini ekoki kosalisa biso tósepela na oyo tozali na yango?
3 Liteya mpo na biso: Tokoki kaka kozala na esengo, ata soki tofandaka wapi to makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini. Mpo tókoba kozala na esengo, tosengeli kosepela na oyo tozali na yango. (Nz. 16:6; 24:5) Soki tozali kokanisa kaka biloko oyo tozali na yango te na esika tókanisa makambo ya malamu oyo tozali na yango, tokoki kobungisa noki esengo na biso. Yango wana, salá makasi omonaka makambo ya malamu oyo ozali na yango na bomoi na yo.—Gal. 6:4.
ISAKARE
4. Yakobo alobaki nini mpo na Isakare, mpe ndenge nini ekokisamaki? (Ebandeli 49:14, 15) (Talá mpe etanda.)
4 Tángá Ebandeli 49:14, 15. Yakobo apesaki Isakare longonya mpo azalaki makasi na mosala; akokanisaki ye na mpunda ya mikuwa makasi, nyama oyo ekoki komema mikumba ya kilo. Yakobo alobaki mpe ete Isakare akozwa mokili ya kitoko. Maloba yango ekokisamaki, mpo libula oyo bato ya libota ya Isakare bazwaki ezalaki mabele ya malamu mpe oyo ebotaka mbuma mingi, oyo ekendaki tii pene na Ebale Yordani. (Yos. 19:22) Na ntembe te basalaki mosala makasi mpo na kosala bilanga na mabele na bango, kasi basalaki mpe mosala makasi mpo na bolamu ya basusu. (1 Bak. 4:7, 17) Na ndakisa, libota ya Isakare ezalaki ntango nyonso pene ya kopesa mabɔkɔ na bitumba oyo ekólo ezalaki kobunda, na ndakisa ntango Mosambisi Barake ná mosakoli-mwasi Debora babundisaki Sisera.—Bas. 5:15.
5. Mpo na nini tosengeli kosalelaka Yehova mosala makasi?
5 Liteya mpo na biso: Soki tozali kosalela Yehova mosala makasi, akosepela na mosala na biso, kaka ndenge asepelaki na mosala makasi ya bato ya libota ya Isakare. (Mos. 2:24) Na ndakisa, tólobela bandeko mibali oyo basalaka mosala makasi mpo na kokɛngɛla lisangá. (1 Tim. 3:1) Bandeko yango babundaka mpenza na bitumba ya solo te, kasi basalaka mpenza makasi mpo na kobatela bandeko ya lisangá na makama ya elimo. (1 Ko. 5:1, 5; Yuda 17-23) Basalaka mpe mosala makasi mpo na kobongisa masolo mpe kosala yango na lisangá mpo na kolendisa bandeko.—1 Tim. 5:17.
DANI
6. Mokumba nini libota ya Dani ezwaki? (Ebandeli 49:17, 18) (Talá mpe etanda.)
6 Tángá Ebandeli 49:17, 18. Yakobo alobaki ete Dani azala lokola nyoka oyo eswaka banguna ya minene mingi koleka yango, na ndakisa mpunda oyo basalelaka na etumba ná motambwisi na yango. Dani asengelaki kozala na mpiko mpe pene ya kobundisa banguna ya Yisraele. Na mobembo na bango mpo na kokende na Mokili ya Ndaka, libota ya Dani ebatelaki ekólo Yisraele na ndenge “esalaki molɔngɔ ya bato oyo bakɛngɛlaka na nsima.” (Mit. 10:25) Yango ezalaki mokumba ya ntina mpenza, ata soki bato mosusu ya ekólo bazalaki komona te mosala nyonso oyo Badani bazalaki kosala na nsima na bango.
7. Ndenge nini tosengeli kotalela mokumba nyonso oyo tozwi na mosala ya Yehova?
7 Liteya mpo na biso: Esilá kokóma ete osala mosala oyo bato mosusu bazali komona mpenza te. Ekoki kozala ete opesaki mabɔkɔ na kotya bopɛto to kobatela Ndako ya Bokonzi, osalaki lokola volontɛrɛ na liyangani ya moke to ya monene, to okokisaki mokumba mosusu. Soki ezali bongo, longonya! Kobosanaka te ete Yehova amonaka nyonso oyo osalaka mpo na ye mpe azwaka yango na motuya. Mpe asepelaka mingimingi ntango ozali kosalela ye mpo na komonisa ete olingaka ye na motema mobimba, kasi te mpo ozali koluka ete basusu bákumisa yo.—Mat. 6:1-4.
GADE
8. Mpo na nini ezalaki mpasi te banguna bábundisa libota ya Gade na Mokili ya Ndaka? (Ebandeli 49:19) (Talá mpe etanda.)
8 Tángá Ebandeli 49:19. Yakobo asakolaki ete etuluku ya bapunzi bakobunda na Gade. Mbula koleka 200 na nsima, libota ya Gade ezwaki mabele na ɛsti ya Ebale Yordani, mpe zingazinga na yango ezalaki na bikólo ya banguna. Na kotalela esika yango, ezalaki mpasi te mpo banguna bábundisa bango. Atako bongo, bato ya libota ya Gade balingaki kofanda kuna mpo ezalaki na matiti ya malamu mpo na bibwɛlɛ na bango. (Mit. 32:1, 5) Yango emonisaki ete bato ya libota ya Gade bazalaki na mpiko. Longola yango, batyaki motema ete Yehova akosalisa bango na kobundisa ata monguna nini mpo bábatela mabele oyo Nzambe apesaki bango libula. Kutu, na boumeli ya bambula mingi, batindaki mampinga na bango ekende mpo na kosalisa mabota mosusu na bitumba mpo na kozwa eteni ya Mokili ya Ndaka na wɛsti ya Yordani. (Mit. 32:16-19) Batyaki motema ete Yehova akobatela basi na bango ná bana na bango wana mibali bakei kosalisa basusu. Yehova apambolaki bango mpo na mpiko na bango mpe ndenge bamipimelaki mpo na basusu.—Yos. 22:1-4.
9. Ndenge nini tokomonisa soki totyelaka Yehova motema?
9 Liteya mpo na biso: Mpo tókoba kosalela Yehova ntango tozali na mikakatano, tosengeli ntango nyonso kotyela ye motema. (Nz. 37:3) Lelo oyo, bandeko mingi bamonisaka ete batyelaka Yehova motema na ndenge bamipimeli makambo mosusu mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya botongi, kokende kosala esika mposa ezali mingi, to kokokisa mikumba mosusu. Basalaka yango mpo batyaka motema ete Yehova akokokisa ntango nyonso bamposa na bango.—Nz. 23:1.
ASHERE
10. Makambo nini libota ya Ashere esalaki te? (Ebandeli 49:20) (Talá mpe etanda.)
10 Tángá Ebandeli 49:20. Yakobo asakolaki ete libota ya Ashere ekokóma na bozwi, mpe esalemaki kaka bongo. Ashere azwaki mpe libula ya mabele oyo ezalaki kobota mingi koleka na Yisraele mobimba. (Mib. 33:24) Mabele na bango ezalaki mpe na ndelo ya Mbu Mediterane mpe esangisaki libongo ya Sidone epai bato ya Fenisia bazalaki koya kosala mombongo. Kasi bato ya libota ya Ashere babenganaki Bakanana te na mabele yango. (Bas. 1:31, 32) Ekoki kozala ete bopusi mabe ya Bakanana mpe bozwi ya libota ya Ashere nde esalaki ete bázala lisusu na molende makasi te mpo na losambo ya pɛto. Na ndakisa, bato ya libota ya Ashere bayaki te kopesa mabɔkɔ ntango Mosambisi Barake alukaki bato mpo na kobundisa bikólo ya Bakanana oyo esanganaki. Na yango, libota yango ezangaki komona elonga ya likamwisi oyo esalemaki “pene na mai ya Megido.” (Bas. 5:19-21) Na ntembe te bato ya libota ya Ashere bayokaki nsɔni ntango bayokaki loyembo ya bolongi oyo Barake ná Debora bayembaki na lisalisi ya elimo santu; loyembo yango ezalaki mpe na maloba oyo: “Ashere afandaki mpamba pembeni ya mbu.”—Bas. 5:17.
11. Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kotalelaka biloko ya mokili na bokatikati?
11 Liteya mpo na biso: Tolingaka kopesa Yehova nyonso oyo tozali na yango. Mpo na yango, tosengeli te kozala lokola bato ya mokili, oyo bakanisaka ete konduka biloko mpe bomɛngo nde likambo oyo eleki ntina na bomoi. (Mas. 18:11) Tosengeli ntango nyonso kotalela mbongo na bokatikati. (Mos. 7:12; Ebr. 13:5) Tosengeli kotika te ete koluka biloko ya mokili oyo tozali mpenza na mposa na yango te ezongisa biso nsima na mosala ya Nzambe. Kasi, tosengeli koluka kopesa Yehova ntango mpe makasi na biso mingi sikoyo; toyebi ete alaki biso bomoi ya malamu mpe oyo ezangi mitungisi na mikolo ezali koya.—Nz. 4:8.
NAFATALI
12. Ekoki mbala mosusu kozala ete lipamboli ya Nafatali ekokisamaki ndenge nini? (Ebandeli 49:21) (Talá mpe etanda.)
12 Tángá Ebandeli 49:21. “Maloba ya kitoko” oyo Yakobo alobaki mpo na Nafatali ekoki mbala mosusu mpe komonisa ndenge oyo Yesu azalaki koloba na mosala ya kosakola. Yesu, moto oyo ayebanaki lokola moteyi malamu, alekisaki ntango mingi na Kapernaume na etúká ya Nafatali; yango wana ebengamaki “engumba na ye.” (Mat. 4:13; 9:1; Yoa. 7:46) Mpe Yisaya asakolaki ete Yesu akozala “pole moko monene” mpo na bato ya Zebulone mpe ya Nafatali. (Yis. 9:1, 2) Na nzela ya mateya na ye, Yesu azalaki “pole ya solosolo oyo engɛngisaka bato ya ndenge nyonso.”—Yoa. 1:9.
13. Maloba nini oyo esepelisaka Yehova tokoki kolobaka?
13 Liteya mpo na biso: Makambo oyo tolobaka mpe ndenge oyo tolobaka yango ezalaka na ntina mpo na Yehova. Wapi “maloba ya kitoko” oyo esepelisaka Yehova? Ya liboso, kolobaka solo. (Nz. 15:1, 2) Ya mibale, kolendisa basusu na maloba na biso, kozala pene ya kopesa bango longonya, kasi kowela te koloba mabe na bango to komilela. (Ef. 4:29) Tokoki mpe komityela mokano ya kokolisa makoki na biso ya kobanda masolo oyo ekoki kosalisa biso tópesa litatoli.
YOZEFE
14. Ndenge nini maloba ya esakweli ya Yakobo epai ya Yozefe ekokisamaki? (Ebandeli 49:22, 26) (Talá mpe etanda.)
14 Tángá Ebandeli 49:22, 26. Na ntembe te Yakobo azalaki kosepela mingi na Yozefe na ndenge “akabwanaki na bandeko na ye.” Yakobo abengaki Yozefe “mwana ya nzete oyo ebotaka mbuma.” Nzete yango ezalaki ye moko Yakobo, mpe Yozefe azalaki mwana na ye. Yozefe azalaki mwana mobali ya liboso ya Rashele, mwasi oyo Yakobo alingaki mingi. Yakobo amonisaki ete Yozefe akozwa ndambo mibale oyo Rubene, mwana mobali ya liboso ya ye ná Lea, abungisaki. (Eba. 48:5, 6; 1 Nt. 5:1, 2) Esakweli yango ekokisamaki na ndenge bakitani ya bana ya Yozefe, Efraime ná Manase, bazwaki mabele mibale ya libula mpo batalelamaki lokola mabota mibale.—Eba. 49:25; Yos. 14:4.
15. Yozefe asalaki nini mpo na makambo ya kozanga bosembo?
15 Yakobo alobelaki mpe bato oyo babwakaka mbanzi, oyo bazalaki “kobwakela [Yozefe] mbanzi mpe kobombela ye nkanda na motema.” (Eba. 49:23) Bato yango ezalaki bandeko ya Yozefe oyo kala bayokelaki ye likunya, mpe likoló na bango nde akutanaki na makambo ebele ya kozanga bosembo. Kasi Yozefe ayinaki bandeko na ye te mpe apesaki Yehova foti te. Ndenge Yakobo alobaki yango, “litimbo [ya Yozefe etikalaki] na esika na yango, mpe mabɔkɔ na ye ezalaki kaka makasi mpe pɛpɛlɛ.” (Eba. 49:24) Yozefe akokaki kosalela litimbo na ye mpo na kosala bandeko na ye mabe, kasi atyelaki Yehova motema na mikakatano oyo akutanaki na yango, alimbisaki bandeko na ye, mpe kutu asalelaki bango makambo na boboto. (Eba. 47:11, 12) Yozefe atikaki ete mikakatano oyo akutanaki na yango ekómisa ye moto malamu koleka. (Nz. 105:17-19) Yango wana Yehova asalelaki ye na ndenge ya kokamwa mpenza.
16. Ndenge nini tokoki komekola Yozefe ntango tozali na mikakatano?
16 Liteya mpo na biso: Lokola Yozefe, tosengeli kotikaka ata moke te ete mikakatano ekabola biso na Yehova to bandeko na biso bakristo. Tóbosana te ete Yehova akoki kopesa nzela ete tókutana na makambo oyo ezali komeka kondima na biso mpo tósembolama. (Ebr. 12:7, msl.) Kosembolama to formasyo yango ekoki kosalisa biso tólona mpe tókolisa bizaleli ya bokristo, lokola motema mawa mpe kolimbisa. (Ebr. 12:11) Tóyeba ete soki toyiki mpiko, Yehova akopesa biso mbano ndenge asalaki mpo na Yozefe.
BENYAMINA
17. Ndenge nini maloba ya esakweli ya Yakobo epai ya Benyamina ekokisamaki? (Ebandeli 49:27) (Talá mpe etanda.)
17 Tángá Ebandeli 49:27. Yakobo asakolaki ete bato ya libota ya Benyamina bakozala na makoki ya kobunda lokola mbwa ya zamba. (Bas. 20:15, 16; 1 Nt. 12:2) “Na ntɔngɔ,” elingi koloba ntango bakonzi babandaki koyangela na Yisraele, libota ya Benyamina ebimisaki mokonzi ya liboso ya Yisraele, Saulo. Saulo abundisaki Bafilistia na mpiko mpenza. (1 Sa. 9:15-17, 21) “Na mpokwa,” elingi koloba na nsuka ya lisolo yango ya bakonzi, Mokonzi-mwasi Estere ná Mordekai, bango mibale bato ya libota ya Benyamina, babikisaki Bayisraele mpo bábomama te na Ampire ya Perse.—Est. 2:5-7; 8:3; 10:3.
18. Ndenge nini tokoki komekola libota ya Benyamina na oyo etali kopesa mabɔkɔ na bibongiseli oyo Yehova atye?
18 Liteya mpo na biso: Na ntembe te, bato ya libota ya Benyamina basepelaki ntango Saulo, moto ya libota na bango, akómaki mokonzi. Kasi, na nsima Yehova apesaki bokonzi epai ya Davidi, moto ya libota ya Yuda; mpe nsukansuka bato ya libota ya Benyamina bandimaki mbongwana yango. (2 Sa. 3:17-19) Bambula mingi na nsima, ntango mabota mosusu etombokaki, bato ya libota ya Benyamina bakangamaki kaka na libota ya Yuda mpe na mokonzi oyo Yehova atyaki. (1 Bak. 11:31, 32; 12:19, 21) Na bosembo nyonso, biso mpe tosengeli kopesaka mabɔkɔ na baoyo Yehova atye mpo na kokamba basaleli na ye lelo.—1 Tes. 5:12.
19. Litomba nini tozwi na esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa?
19 Esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa ezali na litomba mpo na biso. Ndenge tomoni yango esakweli yango ekokisamaki; yango ezali kokómisa kondima na biso makasi ete bisakweli mosusu mpe ya Liloba ya Yehova ekokokisama. Mpe kotalela ndenge bana ya Yakobo bazwaki lipamboli esalisi biso tómona malamu makambo oyo tokoki kosala mpo na kosepelisa Yehova.
LOYEMBO 128 Tóyika mpiko tii na nsuka
a Nsima ya kopambola Rubene, Simeone, Levi, mpe Yuda na kolanda ndenge babotamá, Yakobo alandaki lisusu te molɔngɔ ya kobotama ntango apambolaki bana mosusu.