Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Juin nk. 14-19
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • TOYEBI TE NTANGO OYO NSUKA EKOYA
  • TOYEBI TE NDENGE OYO YEHOVA AKOKI KOSALISA BISO
  • TOYEBI TE MAKAMBO OYO EKOSALEMA LOBI
  • TOKOKI KOKANGA NTINA TE YA NDENGE OYO YEHOVA AYEBI BISO MALAMU
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na momonisi ya Betele
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Juin nk. 14-19

LISOLO YA BOYEKOLI 26

LOYEMBO 123 Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te

“Tokoki ata moke te kososola makambo nyonso oyo etali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”—YOBO 37:23.

NA MOKUSE

Ntango tozali komitungisa mpo na makambo oyo toyebi te, kotya makanisi na makambo oyo toyebi mpe kotyela Yehova motema nde ekosalisa biso.

1. Yehova apesá biso makoki nini, mpe mpo na nini?

YEHOVA akelá biso na likoki ya kokanisa, ya koyekola makambo, ya kozwa mayele, mpe ya komonisa bwanya. Mpo na nini akelá biso na makoki yango? Mpo alingi ‘tózwa boyebi ya Nzambe’ mpe tósalela ye na makoki na biso ya kokanisa.—Mas. 2:​1-5; Rom. 12:1.

2. (a) Likambo nini tosengeli kondima? (Yobo 37:​23, 24) (Talá mpe elilingi.) (b) Matomba nini tokozwa soki tondimi ete toyebi makambo nyonso te?

2 Ya solo Yehova apesá biso likoki ya koyekola makambo, kasi ezali na makambo mingi oyo toyebi te. (Tángá Yobo 37:​23, 24.) Tótalela ndakisa ya Yobo. Yehova atunaki Yobo mituna ebele oyo esalisaki ye amona ete ezalaki na makambo mingi oyo ayebaki te. Likambo yango etindaki ye amikitisa mpe esalisaki ye abongola makanisi na ye. (Yobo 42:​3-6) Biso mpe tokozwa matomba soki na bopɔlɔ nyonso tondimi ete toyebi makambo nyonso te. Kozala na bopɔlɔ ndenge wana ekotinda biso tótyela Yehova motema ete akomonisa biso makambo oyo tosengeli mpenza koyeba mpo esalisa biso tózwa bikateli ya malamu.—Mas. 2:6.

Pole oyo euti na mapata engɛngɛli Yobo wana Yehova azali koloba na ye. Elihu ná babɔndisi misato ya lokuta bazali pembeni wana.

Kondima ete ezali na makambo oyo toyebi te ekoki komemela biso matomba, ndenge moko na Yobo (Talá paragrafe 2)


3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na lisolo oyo, tokolobela mwa makambo oyo toyebi te, mpe ndenge oyo ekoki kokóma mokakatano mpo na biso. Tokomona mpe ntina oyo ezali malamu ndenge toyebi makambo mosusu te. Makambo oyo tokotalela ekosalisa biso tóndima mpenza ete Yehova, “Moto oyo akoká na boyebi,” ayebisaka biso makambo oyo tosengeli mpenza koyeba.—Yobo 37:16.

TOYEBI TE NTANGO OYO NSUKA EKOYA

4. Na kotalela Matai 24:​36, likambo nini toyebi te?

4 Tángá Matai 24:36. Toyebi te ntango nsuka ya mokili oyo ekoya. Ata Yesu, ntango azalaki awa na mabele, ayebaki te “mokolo yango mpe ngonga yango.”a Na nsima, ayebisaki bantoma na ye ete Yehova, oyo azali Nkolo-Ntango, atyá ntango oyo makambo mosusu ekosalema “na nse ya bokonzi na ye moko.” (Mis. 1:​6, 7) Na yango, Yehova atyá ntango ya nsuka ya mokili oyo, kasi biso tokoki koyeba ntango yango na bosikisiki te.

5. Tokoki mbala mosusu komiyoka ndenge nini lokola toyebi te ntango oyo nsuka ekoya?

5 Na kotalela makambo oyo Yesu alobaki, toyebi te ntango boni tosengeli kozela liboso nsuka eya. Yango ekoki kosala ete tókóma motema mokuse to tólɛmba nzoto, mingimingi soki tozelaka mokolo ya Yehova banda mwa bambula. Ekoki mpe kozala ete tolɛmbi mpo bato ya libota na biso to bato mosusu bazali kotyola biso mpo nsuka eyei nanu te. (2 Pe. 3:​3, 4) Mbala mosusu tozali komona ete soki toyebaki mokolo oyo nsuka ekoya, tolingaki kozala na motema molai mingi mpe tolingaki kozala na mokakatano te ya koyika mpiko ntango bazali kotyola biso.

6. Mpo na nini ezali malamu ndenge toyebi te ntango oyo nsuka ekoya?

6 Mpo na koloba solo, ndenge Yehova ayebisi biso te mokolo oyo nsuka ekoya, apesi biso nde libaku ya komonisa ete tosalelaka ye mpo tolingaka ye mpe totyeli ye motema. Tolingaka kosalela Yehova libela na libela kasi te na dati moko na makanisi, lokola nde kondima na biso epai na ye ezali na dati oyo yango ekosila ngala. Na esika tótya makanisi libosoliboso na ntango oyo “mokolo ya Yehova” ekoya, ekozala malamu tótya makanisi nde na makambo oyo mokolo yango ekosala. Kosala bongo ekosalisa biso tókoba kokangama makasi na Nzambe mpe tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosepelisa ye.—2 Pe. 3:​11, 12.

7. Makambo nini toyebi?

7 Ezali na ntina mingi tótya makanisi na makambo oyo toyebi; na ndakisa toyebi ete mikolo ya nsuka ebandaki na 1914. Yehova apesaki bisakweli ya Biblia oyo emonisi kaka te ete mikolo ya nsuka esengelaki kobanda na 1914, kasi elobelaki mpe ndenge makambo esengelaki kozala na mokili kobanda na mbula yango. Lokola bisakweli yango ekokisami, tondimaka ete “mokolo monene ya Yehova ekómi pene.” (Sef. 1:14) Toyebi mpe mosala oyo Yehova alingi tósala: tósakwela bato mingi mpenza ‘nsango malamu ya Bokonzi.’ (Mat. 24:14) Nsango yango ezali kosakolama na mikili soki 240 mpe na minɔkɔ koleka 1000. Mpo tósala mosala yango ya ntina mingi na molende, tozali na mposa te ya koyeba “mokolo yango mpe ngonga yango.”

TOYEBI TE NDENGE OYO YEHOVA AKOKI KOSALISA BISO

8. Maloba “mosala ya Nzambe ya solo” emonisi nini? (Mosakoli 11:5)

8 Toyebaka ntango nyonso te “mosala ya Nzambe ya solo.” (Tángá Mosakoli 11:5.) Maloba “mosala ya Nzambe ya solo” emonisi makambo oyo Yehova asalaka, to oyo atikaka ete esalema mpo na kokokisa mokano na ye. Tokoki koyeba te mpo na nini mpenza Yehova atiki ete likambo moko esalema, to koyeba likambo ya sikisiki oyo akosala mpo na kosalisa biso. (Nz. 37:5) Tokoki koyeba mosala ya Nzambe te, kaka ndenge toyebaka mpenza te ndenge oyo mwana akolaka na libumu ya mama, likambo oyo ezali naino kolekela ata bato ya siansi.

9. Kozanga koyeba ndenge oyo Yehova akosalisa biso, ekoki kosala biso nini?

9 Lokola toyebi te ndenge Yehova akoki kosalisa biso ekoki kosala ete tókakatana mpo na kozwa bikateli mosusu. Na ndakisa, tokoki mbala mosusu kokakatana komipimela makambo mosusu mpo na komipesa mingi na mosala ya Yehova, lokola kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ to kokende esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi. Mpe ntango tokokisi te mikano na biso ya elimo, to tozali koboma nzoto na mosala ya kosakola kasi tozali kozwa mbuma ya malonga te, to mpe tokutani na mikakatano na mokumba moko na mosala ya Yehova, mbala mosusu tomitunaka soki Yehova azali kaka kondima biso.

10. Bizaleli nini ya ntina tokómaka komonisa lokola toyebi te oyo Yehova akosala?

10 Kozanga koyeba mpenza makambo oyo Yehova akosala ekoki kosalisa biso tókolisa bizaleli ya ntina, lokola komikitisa mpe bopɔlɔ. Yango esalisaka biso tómona ete makanisi ya Yehova mpe ndenge na ye ya kosala makambo eleki mosika oyo ya biso. (Yis. 55:​8, 9) Etindaka biso mpe tótyela Yehova motema mobimba, tóndima ete akosala makambo na ndenge ya malamu koleka. Ntango mosala na biso ya kosakola eboti mbuma malamu to tolongi na mokumba moko oyo bapesaki biso, topesaka Yehova lokumu mpo na yango. (Nz. 127:1; 1 Ko. 3:7) Mpe ata soki makambo esimbi te ndenge oyo tozalaki komizela, tosengeli kaka komikundwela ete Yehova ayebi makambo nyonso. (Yis. 26:12) Na yango, tósalaka oyo biso tosengeli kosala, mpe tókoba kotya motema ete Yehova akosala oyo ya ye. Tótya motema ete Yehova akopesa biso litambwisi oyo tosengeli na yango, ata soki ekozala na ndenge ya likamwisi te ndenge azalaki kosala na bantango mosusu na kala.—Mis. 16:​6-10.

11. Makambo nini oyo toyebi ekoki kosalisa biso?

11 Toyebi ete Yehova azalaka ntango nyonso bolingo, sembo mpe na bwanya. Toyebi ete azwaka na motuya mingi makambo oyo tosalaka mpo na ye mpe mpo na bandeko na biso bakristo. Lisusu, toyebi ete apesaka ntango nyonso mbano na baoyo bazali sembo epai na ye.—Ebr. 11:6.

TOYEBI TE MAKAMBO OYO EKOSALEMA LOBI

12. Na kotalela Yakobo 4:​13, 14, likambo nini toyebi te?

12 Tángá Yakobo 4:​13, 14. Likambo monene oyo tosengeli kondima ezali ete toyebi te ndenge oyo lobi na biso ekozala. Na mokili oyo, “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekoki kokómela biso. (Mos. 9:11) Mpo na yango, tokoki te koyeba soki makambo oyo tokani kosala ekolonga, to ata soki tokozala na bomoi mpo na kosala makambo oyo tokani.

13. Kozanga koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya ekoki kosala biso nini?

13 Kozanga koyeba ndenge oyo bomoi ekozala na mikolo ekoya ekoki kokóma mokakatano mpenza. Na ndenge nini? Tokoki kobanda komituna soki makambo nini ekoki kosalema, mpe yango ekoki kosilisa biso esengo. Makama oyo esalemi na mbalakaka mpe bambongwana oyo tokanaki te ekoki kopesa biso mpasi mingi mpe nkanda mpenza. Mpe ntango makambo oyo tozali kozela esalemi te, tokoki komitungisa mpe kolɛmba nzoto.—Mas. 13:12.

14. Nini ekosala ete tózala mpenza na esengo? (Talá mpe bililingi.)

14 Ntango toyikaka mpiko na mikakatano, tomonisaka ete ata soki nini ekómi, tosalelaka Tata na biso ya likoló na bolingo, kasi te mpo na kozwa litomba moko boye. Masolo ya Biblia emonisi ete tosengeli te kozela ete Yehova abatela biso na mikakatano nyonso; emonisi mpe ete makambo oyo ekómelaka biso na bomoi etángamá te. Yehova ayebi ete tokoki kozala na esengo ata soki toyebi te makambo oyo ekokómela biso lobi. Tokozala na esengo soki tozali koluka toli na ye mpe kotosa ye. (Yir. 10:23) Soki tozali koluka litambwisi na ye ntango tolingi kozwa bikateli, tozali nde koloba: “Soki Yehova alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala boye to boye.”—Yak. 4:15.

Bililingi: 1. Tata moko ná mwana na ye bazali kobongisa sakosi oyo bakoki kokima na yango. Batye Biblia mpe biloko mosusu ya ntina. 2. Tata, mama, ná mwana yango bafandi na hema wana mbula ezali kobɛta. Bazali kosalela biloko oyo batyaki na sakosi yango.

Koluka litambwisi ya Yehova mpe kotosa ye ebatelaka biso mpenza (Talá paragrafe 14-15)b


15. Makambo nini toyebi mpo na mikolo ekoya?

15 Ata soki toyebi te makambo oyo mokolo mokomoko ekomema, toyebi ete Yehova alaki biso bomoi ya seko, ezala na likoló to awa na mabele. Toyebi ete akoki kokosa te, mpe ete eloko moko te ekoki kopekisa ye kokokisa bilaka na ye nyonso. (Tito 1:2) Kaka ye nde akoki ‘koyebisa ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te.’ Lokola makambo oyo asakolaki na kala ekokisamaki, makambo oyo asakoli mpo na mikolo oyo ezali koya mpe ekokokisama. (Yis. 46:10) Longola yango, toyebi malamu ete eloko moko te ekoki kopekisa Yehova kolinga biso. (Rom. 8:​35-39) Akopesa biso bwanya, libɔndisi, mpe makasi oyo tosengeli na yango mpo na koyika mpiko na likambo nyonso oyo ekómeli biso. Na yango, tokoki kotya motema ete Yehova akosalisa biso mpe akopambola biso.—Yir. 17:​7, 8.

TOKOKI KOKANGA NTINA TE YA NDENGE OYO YEHOVA AYEBI BISO MALAMU

16. Ndenge Nzembo 139:​1-6 emonisi yango, nini oyo Yehova ayebi mpe biso tokoki kokanga ntina na yango te?

16 Tángá Nzembo 139:​1-6. Mozalisi na biso ayebi nyonso oyo etali biso. Ayebi ntina oyo nzoto na biso, mayoki na biso mpe makanisi na biso ezali ndenge oyo ezali. Atyelaka biso ntango nyonso likebi. Ayebi makambo oyo tolobaka mpe oyo yango elingi koloba; ayebi makambo oyo tosalaka mpe ntina oyo tosalaka yango. Ndenge Mokonzi Davidi amonisaki yango, Yehova azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa biso mpe akoki kosala yango esika nyonso oyo tozali. Ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, Mozalisi ya likoló mpe mabele oyo aleki na nguya, atyelaka biso likebi mingi ndenge wana! Davidi alobaki: “Nakoki ata moke te kososola boyebi ya boye. Eleki likoló mingi, nakoki kokóma kuna te.”—Nz. 139:6.

17. Mpo na nini bato mosusu bakoki kozala na mokakatano ya kondima ete Yehova ayebi biso malamu?

17 Mbala mosusu, na kotalela ndenge oyo tobɔkwamá, mimeseno ya mboka na biso, to bindimeli na biso ya kala, ekoki kozala mpasi mpo tómona ete Yehova azali Tata ya bolingo oyo atyelaka biso likebi. To mbala mosusu tokoki kokanisa ete mabunga na biso ya kala ezali mabe mpenza na boye ete Yehova akolinga soki moke te koyeba biso, mpe ete azali mpenza mosika na biso. Ata Davidi mpe ayokaki bongo na bantango mosusu. (Nz. 38:​18, 21) To moto oyo azali kobunda mpenza mpo na kobongola bomoi na ye mpe kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe akoki mbala mosusu komituna: ‘Soki Nzambe ayebi ngai mpenza, mpo na nini alingi ete natika lolenge ya bomoi oyo ngai namoni ete ebongi na ngai?’

18. Mpo na nini tosengeli kondima ete Yehova ayebi biso malamu koleka biso moko? (Talá mpe bililingi.)

18 Tosengeli kondima ete Yehova ayebi biso malamu koleka biso moko, mpe ete akoki komona makambo ya malamu epai na biso ata soki biso moko tomonaka yango te. Nzokande, ata soki amonaka mabunga na biso mpe ayebaka ntina oyo tozali komiyoka to kosala makambo na ndenge moko boye, alingaka biso kaka. (Rom. 7:15) Ntango tokómi kondima mpenza ete Yehova amonaka malamu oyo tozali na yango, ekoki kopesa biso mpiko oyo esengeli mpo tósalela ye na bosembo mpe na esengo.

Bililingi: 1. Ndeko moko oyo alɛmbi nzoto azali kotala na fɛnɛtrɛ, mpe molili ezali mpo mbula ezali kobɛta. 2. Na Paradiso, ndeko yango azali kotambola na zamba elongo na baninga, azali kosepela na mokili kitoko.

Yehova asalisaka biso tóyika mpiko na makambo oyo ekanami te na ndenge asalisaka biso tókóma na kondima makasi na bilaka kitoko oyo alaki biso (Talá paragrafe 18-19)c


19. Makambo nini toyebi mpenza mpo na Yehova?

19 Toyebi ete Yehova azali bolingo. Ezali likambo ya kotyela ntembe te. (1 Yoa. 4:8) Toyebi ete mibeko nyonso oyo apesi biso emonisaka ete alingaka biso mpe ete alingi tózala na bomoi ya malamu mpenza. Toyebi mpe ete alingi tózwa bomoi ya seko, mpe apesaki lisiko mpo tókoka kozwa bomoi yango. Likabo ya lisiko endimisaka biso ete tokoki kosepelisa Yehova atako tozali bato ya kozanga kokoka. (Rom. 7:​24, 25) Lisusu, toyebi ete “Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.” (1 Yoa. 3:​19, 20) Yehova amonaka makambo na biso nyonso, mpe atyaka motema ete tokoki kosala mokano na ye.

20. Nini ekosalisa biso tómitungisa mpambampamba te?

20 Yehova abombeli biso ata likambo moko te oyo tosengelaki mpenza koyeba. Soki na bopɔlɔ nyonso tondimi ete ezali bongo, tokomitungisa mpambampamba te mpo na makambo oyo toyebi te, mpe tokoki kotya makanisi na makambo oyo ezali mpenza na ntina. Soki tosali bongo, tokomonisa ete totye motema mobimba epai ya Yehova, “Moto oyo akoká na boyebi.” (Yobo 36:4) Lelo, ezali na makambo mosusu oyo toyebi te, kasi ntango tokozala na bomoi ya libela na libela, Nzambe na biso akoteya biso makambo ebele, mpe tokoyekola makambo mingi ya kitoko oyo etali ye.—Mos. 3:11.

MATOMBA NINI TOKOZWA SOKI TONDIMI NA BOPƆLƆ NYONSO ETE TOYEBI TE . . .

  • ntango oyo nsuka ekoya?

  • nini ekosalema lobi?

  • ndenge oyo Yehova ayebi biso malamu?

LOYEMBO 104 Elimo santu ezali likabo ya Nzambe

a Lokola Yesu nde akokamba mampinga mpo na kobundisa mokili mabe ya Satana, ebongi mpenza tókanisa ete ayebi sikoyo dati ya Armagedone mpe ya ntango oyo ‘akolonga tii na nsuka.’—Em. 6:2; 19:​11-16.

b NDIMBOLA YA BILILING: Tata moko ná mwana na ye bazali kotya mwa biloko ya ntina na sakosi mpo bákima mbala moko libota mobimba na ntango ya likama.

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko oyo azali na mikakatano azali kokanisa esengo oyo akozala na yango na mokili ya sika.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto