LISOLO YA BOYEKOLI 24
LOYEMBO 98 Makomami ekomami na elimo ya Nzambe
Tózwa mateya na esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa—Eteni 1
“Bósangana esika moko mpo nayebisa bino makambo oyo ekokómela bino na eleko ya nsuka ya mikolo.”—EBA. 49:1.
NA MOKUSE
Tokolobela esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa mpe mateya oyo tokoki kozwa na esakweli oyo etali Rubene, Simeone, Levi, mpe Yuda.
1-2. Yakobo asalaki nini pene ya liwa na ye, mpe mpo na nini? (Talá mpe elilingi.)
MBULA soki 17 esili koleka banda Yakobo, mosaleli ya Yehova ya sembo, alongwaki Kanana mpe ayaki na Ezipito elongo na bato ya libota na ye. (Eba. 47:28) Na bambula yango nyonso, Yakobo azalaki na esengo makasi ya komona lisusu Yozefe, mwana na ye oyo alingaki mingi, mpe kozala lisusu elongo na libota na ye mobimba. Kasi sikoyo, amoni ete mosika te akokufa. Na yango, ayanganisi bana na ye mpo na likita moko ya ntina mingi.—Eba. 49:28.
2 Na ntango wana, mbala mingi tata ya libota oyo amoni ete alingi akufa, azalaki koyanganisa bato ya libota na ye mpo na kopesa bango malako ya nsuka. (Yis. 38:1) Na likita yango akokaki mpe kopona moto oyo akotambwisa libota nsima ya liwa na ye.
Yakobo afandi na mbeto, azali kopesa bana na ye ya mibali 12 esakweli (Talá paragrafe 1-2)
3. Na kotalela Ebandeli 49:1, 2, mpo na nini maloba ya Yakobo ezali na ntina mingi?
3 Tángá Ebandeli 49:1, 2. Likita oyo Yakobo asalaki ezalaki kaka likita ya libota te. Lokola azalaki mosakoli, Yehova asalisaki ye alobela makambo ya ntina oyo ekokómela bana na ye mpe bakitani na bango na mikolo ezali koya. Yango wana, maloba oyo Yakobo alobaki na libaku wana etalelamaka lokola esakweli oyo apesaki liboso akufa.
4. Tokotalela nini na oyo etali maloba ya Yakobo? (Talá mpe etanda “Libota ya Yakobo.”)
4 Na lisolo oyo, tokotalela makambo oyo Yakobo alobaki na bana minei: Rubene, Simeone, Levi, mpe Yuda. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo oyo alobaki na bana mosusu mwambe. Ndenge tokomona yango, makambo oyo Yakobo alobaki etalaki kaka bana na ye te, kasi mpe bakitani na bango, oyo nsukansuka bakómaki ekólo Yisraele ya kala. Kotalela lisusu lisolo ya ekólo yango ekosalisa biso tómona polele ndenge maloba ya esakweli ya Yakobo ekokisamaki. Mpe na maloba na ye, tokozwa mateya ya ntina oyo ekomonisa biso ndenge oyo tokoki kosepelisa Tata na biso ya likoló, Yehova.
RUBENE
5. Mbala mosusu Rubene azalaki kozela kozwa nini?
5 Yakobo alobaki liboso na Rubene, ete: “Yo ozali mwana na ngai ya liboso.” (Eba. 49:3) Lokola Rubene azalaki mwana ya liboso, na ntembe te azalaki kozela ete azwa ndambo mibale ya biloko ya tata na bango. Mbala mosusu azalaki mpe kozela ete akóma mokonzi ya libota nsima ya liwa ya tata na bango, bongo na nsima mokumba yango etikala na molɔngɔ ya libota na ye.
6. Mpo na nini Rubene abungisaki lotomo na ye ya mwana ya liboso? (Ebandeli 49:3, 4)
6 Kasi, Rubene abungisaki lotomo na ye ya mwana ya liboso. (1 Nt. 5:1) Mpo na nini? Mpo mwa bambula liboso, nsima ya liwa ya Rashele, mwasi oyo Yakobo alingaki mingi, Rubene asangisaki nzoto na Bila. Bila azalaki mosaleli ya Rashele, mpe Rashele apesaki ye Yakobo mpo abota na ye bana. (Eba. 35:19, 22) Rubene azalaki mwana ya Lea, mwasi mosusu ya Yakobo. Mbala mosusu Rubene asangisaki nzoto na Bila mpo mposa makasi ya kosangisa nzoto elataki ye. To ekoki kozala ete asalaki yango mpo Yakobo alinga Bila te na esika ya Lea. Ezala bongo to te, likambo oyo Rubene asalaki ezalaki mabe mingi na miso ya tata na bango mpe ya Yehova.—Tángá Ebandeli 49:3, 4.
7. Nini ekómelaki Rubene ná bakitani na ye? (Talá mpe etanda “Esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa.”)
7 Yakobo ayebisaki Rubene ete: “Okozala moto ya lokumu te.” Maloba yango ekokisamaki. Esika moko te Biblia elobi ete moto moko ya libota ya Rubene akómaki mokonzi, nganga-nzambe, to mosakoli. Atako bongo, Yakobo awanganaki mwana na ye Rubene te, mpe bakitani ya Rubene bazalaki libota moko na mabota ya ekólo Yisraele. (Yos. 12:6) Nzokande, Rubene amonisaki bizaleli ya malamu na mabaku mosusu, mpe esika mosusu te Biblia elobi ete asalaki lisusu pite.—Eba. 37:20-22; 42:37.
8. Lisolo ya Rubene ekoki koteya biso nini?
8 Liteya mpo na biso: Tosengeli kosala makasi tólona komipekisa mpe tózala na ekateli ya koboya pite. Soki tokutani na komekama ya kosala lisumu, tosengeli kokanisa ndenge makambo oyo tokosala ekopesa Yehova, bato ya libota na biso, mpe bato mosusu mpasi. Tosengeli mpe kobosana te ete “nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Gal. 6:7) Kasi, likambo oyo ekómelaki Rubene ezali komonisa biso mpe motema mawa ya Yehova. Ya solo Yehova akobatela biso te na mbuma mabe ya mabunga na biso, kasi soki tobongoli motema, akopambola milende na biso mpo na kosala oyo ezali malamu.
SIMEONE NÁ LEVI
9. Mpo na nini Yakobo alobaki na Simeone ná Levi maloba oyo emonisaki ete asepelaki na bango te? (Ebandeli 49:5-7)
9 Tángá Ebandeli 49:5-7. Na nsima, Yakobo alobaki na Simeone ná Levi maloba oyo emonisi ete asepelaki na bango te. Mpo na nini? Mwa bambula liboso, mobali moko ya Kanana na nkombo Shekeme asangisaki nzoto na makasi na Dina, mwana ya Yakobo ya mwasi. Ezalaki likambo ya mabe, mpe bana mibali nyonso ya Yakobo bayokaki nkanda mpo na likambo oyo ekómelaki ndeko na bango ya mwasi, kasi Simeone ná Levi bapekisaki nkanda na bango te. Bakosaki Shekeme ná bato na ye ete bakosala kimya soki bango nyonso bandimi kokatama ngenga. Mibali ya Shekeme bandimaki. Wana mibali yango bazalaki naino na mpasi ya kokatama ngenga, Simeone ná Levi “bazwaki moto na moto mopanga na ye mpe bakendaki na engumba kozanga ete bato báyeba mpe babomaki mobali nyonso.”—Eba. 34:25-29.
10. Ndenge nini maloba ya esakweli ya Yakobo mpo na Simeone ná Levi ekokisamaki? (Talá mpe etanda “Esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa.”)
10 Yakobo abulunganaki makasi ndenge bana na ye mibale babomaki bato. Asakolaki ete bakozala esika moko te mpe bakopalangana na teritware mobimba ya Yisraele. Esakweli yango ekokisamaki nsima ya mbula koleka 200, ntango ekólo Yisraele ekɔtaki na Mokili ya Ndaka. Libota ya Simeone ezwaki libula na bisika ekeseni na kati ya teritware ya libota ya Yuda. (Yos. 19:1) Mpe libota ya Levi ezwaki bingumba 48 na bisika ndenge na ndenge na Yisraele mobimba.—Yos. 21:41.
11. Makambo nini ya malamu libota ya Simeone mpe ya Levi esalaki?
11 Bakitani ya Simeone mpe ya Levi bazongelaki te mabunga oyo bankɔkɔ na bango basalaki. Bato ya libota ya Levi bakangamaki na bosembo nyonso na losambo ya pɛto. Ntango Moize akendaki na Ngomba Sinai kozwa Mobeko epai ya Yehova, Bayisraele mingi bakómaki kosambela ekeko ya mwana-ngɔmbɛ, kasi Balevi bakendaki na ngámbo ya Moize mpe basalisaki ye mpo na koboma bato oyo basambelaki ekeko yango. (Kob. 32:26-29) Lisusu, Yehova aponaki libota ya Levi mpe apesaki yango libaku monene ya kobimisaka banganga-nzambe. (Kob. 40:12-15; Mit. 3:11, 12) Na nsima, na ntango ya kozwa Mokili ya Ndaka, libota ya Simeone esalisaki libota ya Yuda ntango babundisaki Bakanana, ndenge Yehova asɛngaki.—Bas. 1:3, 17.
12. Lisolo ya Simeone ná Levi ekoki koteya biso nini?
12 Liteya mpo na biso: Kosalaka makambo na nse ya nkanda te. Ntango basali yo to moto moko oyo olingaka likambo ya mabe, okoki koyoka nkanda. (Nz. 4:4) Kasi, tosengeli kobosana te ete Yehova asepelaka te soki tolobi to tosali makambo na nse ya nkanda. (Yak. 1:20) Ntango moto asali biso makambo ya kozanga bosembo, ezala na kati ya lisangá to te, ezali malamu tósalaka makambo na kolanda mitinda ya Biblia, mpe na ndenge yango tokobuka te mbuma mabe ya kosala makambo na nse ya nkanda. (Rom. 12:17, 19; 1 Pe. 3:9) Lisusu, ata soki baboti na yo bazali kosala makambo oyo ezali kosepelisa Yehova te, yebá ete osengeli kaka te kolanda ndakisa na bango. Mpe kokanisa te ete bomoi na yo ekobonga te mpe ete Yehova akoki te kopambola yo. Yebá ete Yehova akopesa yo mbano mpo na milende oyo ozali kosala mpo na kokende liboso mpe mpo na kosala oyo ezali malamu.
YUDA
13. Mpo na nini Yuda akokaki komitungisa ntango ekómaki ngala na ye ya koyoka tata na bango?
13 Na nsima, Yakobo alobaki na mwana na ye Yuda. Mbala mosusu ntango ayokaki makambo oyo tata na bango alobaki na bayaya na ye, Yuda amitungisaki. Mpo ye mpe asalaki mabunga mosusu ya minene. Emonani ete ye mpe akendaki kopunza engumba Shekeme. (Eba. 34:27) Apesaki mpe bandeko na ye mabɔkɔ mpo na kotɛka Yozefe mpe bakosaki tata na bango mpo na likambo yango. (Eba. 37:31-33) Na nsima, asangisaki nzoto na Tamara, mwasi ya mwana na ye oyo akufaki, mpo akanisaki ete azalaki mwasi ya ndumba.—Eba. 38:15-18.
14. Makambo nini ya malamu Yuda asalaki? (Ebandeli 49:8, 9)
14 Kasi, na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Yakobo apesaki Yuda kaka mapamboli mpe longonya. (Tángá Ebandeli 49:8, 9.) Yuda amonisaki ete azalaki komibanzabanza mingi mpo na tata na bango oyo akómaki mokóló. Lisusu amonisaki mpe motema mawa mingi epai ya Benyamina, leki na bango ya nsuka.—Eba. 44:18, 30-34.
15. Ndenge nini esakweli ya Yakobo mpo na Yuda ekokisamaki?
15 Yakobo asakolaki ete Yuda akozala mokambi ya bandeko na ye. Kasi, esakweli yango esengelaki kokokisama bambula ebele na nsima. Mbala ya liboso oyo Biblia elobeli Yuda lokola mokambi ezalaki mbula soki 200 na nsima. Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito mpe bazalaki na esobe mpo na kokende na Mokili ya Ndaka, libota ya Yuda nde ekendaki liboso. (Mit. 10:14) Mpe bambula mingi na nsima, mpo na kobundisa Bakanana na Mokili ya Ndaka, libota ya Yuda nde ekendaki liboso. (Bas. 1:1, 2) Mpe Davidi, moto ya libota ya Yuda, azalaki mokonzi ya liboso na molɔngɔ ya bakonzi oyo babimaki na libota yango. Kasi esuki kaka wana te.
16. Ndenge nini esakweli oyo ezali na Ebandeli 49:10 ekokisamaki? (Talá mpe etanda “Esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa.”)
16 Yakobo amonisaki ete Mokonzi oyo akoyangela bato nyonso mpo na libela akozala moto ya libota ya Yuda. (Tángá Ebandeli 49:10 mpe maloba na nse ya lokasa.) Mokonzi yango ezali Yesu Kristo, moto oyo Yakobo abengaki Shilo. Anzelu moko alobaki boye mpo na Yesu: “Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi nkɔkɔ na ye.” (Luka 1:32, 33) Yesu abengami mpe “Nkɔsi ya libota ya Yuda.”—Em. 5:5.
17. Ndenge nini tokoki komekola Yehova na ndenge na biso ya kotalela basusu?
17 Liteya mpo na biso: Yehova apambolaki Yuda atako asalaki mabunga mosusu ya minene. Kasi ekoki kozala ete bandeko ya Yuda bamitunaki soki Yehova amonaki nini epai na ye. Ata soki bamitunaki te, toyebi ete Yehova amonaki makambo ya malamu epai ya Yuda mpe apambolaki ye mpo na yango. Ndenge nini tokoki komekola Yehova? Ntango ndeko moko azwi mokumba moko ya monene, mbala mingi tokoki kotya likebi kaka na kozanga kokoka na ye. Kasi tosengeli kobosanaka te ete na ntembe te, Yehova asepelaka na bizaleli malamu ya ndeko yango. Yehova alukaka komona bizaleli malamu ya basaleli na ye. Biso mpe tólukaka kosala bongo.
18. Mpo na nini tosengeli kozala na motema molai?
18 Liteya mosusu oyo tokoki kozwa na lisolo ya Yuda ezali ete tosengeli kozala na motema molai. Yehova azangaka te kokokisa bilaka na ye, kasi asalaka yango ntango nyonso te kaka na ndenge oyo biso tozali kokanisa to na ntango oyo tozali kozela yango. Na ebandeli, bakambi ya ekólo ya Nzambe bazalaki bato ya libota ya Yuda te. Kasi na bosembo nyonso, bato ya libota ya Yuda bapesaki mabɔkɔ na baoyo Yehova atyaki mpo na kokamba, na ndakisa Moize moto ya libota ya Levi, Yosua moto ya libota ya Efraime, mpe Mokonzi Saulo moto ya libota ya Benyamina. Biso mpe tosengeli kopesa mabɔkɔ ata na moto nini oyo Yehova aponi mpo na kokamba biso lelo oyo.—Ebr. 6:12.
19. Toyekoli nini mpo na Yehova na lisolo oyo?
19 Na lisolo oyo, toyekoli nini na maloba ya esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa? Tomoni polele ete “ndenge oyo moto atalaka ekeseni na ndenge oyo Nzambe atalaka.” (1 Sa. 16:7) Yehova azali na motema molai mingi mpe alimbisaka mpenza. Akangaka miso te na etamboli ya mabe, kasi azelaka mpe te ete tósala makambo na ndenge ya kokoka. Kutu akoki ata kopambola baoyo basalaki mabunga ya minene na kala, soki babongoli mpenza motema mpe babandi kosala oyo ezali malamu. Na lisolo oyo elandi, tokotalela makambo oyo Yakobo alobaki na bana na ye mosusu mwambe ya mibali.
LOYEMBO 124 Tótikala sembo