Manaka mpo na pɔsɔ ebandi na 7 sanza ya 9
PƆSƆ EBANDI NA 7 SANZA YA 9
Loyembo 3 mpe libondeli
Boyekoli ya Biblia na lisangá:
cl mok. 30 par. 1-9 (Min. 30)
Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Bakonzi 12-15 (Min. 8)
No. 1: 2 Bakonzi 13:12-19 (Eleka min. 3 te)
No. 2: Dorkasi (Dorcas)—Motó ya likambo: Bakristo ya solosolo basalaka misala mingi ya malamu—it-1-F nk. 668-669 (Min. 5)
No. 3: Makambo nini ezali na mikanda ndenge na ndenge ya Makomami ya Grɛki ya bokristo?—igw lok. 31 (Min. 5)
Likita ya mosala:
Motó ya likambo ya sanza: “Mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.”—Yosua 24:15.
Min. 10: Mosala oyo tosalaki. Lisolo na bayangani. Sɛngá basakoli bálobela matomba oyo bazwaki ntango basalelaki makanisi ya lisolo “Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tópesaka bato ya sika formasyo.” Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango.
Min. 10: Mabota na bino ezalaka na momeseno ya koyangana na makita? Diskur ekouta na Baebre 10:24, 25. Sololá na libota moko oyo ezali na bana. Ndenge nini tata ya libota yango amonisaka ete makita ezalaka na esika ya liboso? Ndenge nini moto mokomoko apesaka mabɔkɔ mpo libota mobimba eyanganaka na makita? Ntango nini babongisaka biyano ya kopesa? Milende nini basalaka mpo na koya na makita? Na nsuka, lendisá bandeko nyonso báyaka mbala na mbala na makita mpe bapesaka biyano.
Min. 10: Okoki kolona mboto ya liteya moko ya Biblia epai ya bato ya libota na yo? (Misala 10:24, 33, 48) Lisolo na bayangani ekouta na Buku ya mobu 2015, nkasa 87, paragrafe 1-2; mpe lokasa 90, paragrafe 1-3. Sɛngá bayangani bálobela mateya oyo bazwi.
Loyembo 118 mpe libondeli