Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/15 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 8/15 lok. 4

Mayebisi

◼ Kobanda na sanza ya libwa, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala diskur ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Banzela ya Nzambe epesaka mpenza matomba!”

◼ Mosakoli mokomoko asengeli kopesa lapolo na ye ya mosala ya kosakola epai ya mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola to epai ya sɛkrɛtɛrɛ. Mokɛngɛli ya etuluku asengeli nokinoki kotinda balapolo yango epai ya sɛkrɛtɛrɛ. Tolendisi basɛkrɛtɛrɛ bátindaka lapolo ya lisangá (S-1) na nzela ya jw.org to na SMS (talá mokanda ya biro ya 05/04/2013 mpe ya 15/04/2014 mpo na koyeba nimero ya telefone oyo esengeli kosalela mpo na kotinda lapolo yango). Kosala bongo ekosala ete balapolo ya masangá nyonso esangisama na ntango ebongi, mingimingi na sanza ya nsambo mpe ya mwambe, mpo na kosangisa balapolo ya mosala ya mobu mobimba.

◼ Tozali na esengo ya koyebisa bino ete mwa babuku Teyá bana na yo mpe Okoki kozala na libota ya esengo esili kobima na monɔkɔ ya Alur. Masangá ekoki kosɛnga yango na nzela ya formilɛrɛ S-14. Kobanda na sanza ya nsambo 2015, Mosala na biso ya Bokonzi ekobanda mpe kobima na monɔkɔ yango.

◼ Na teritware ya filiale na biso, eteyelo ya babongisi-nzela ekosalema na sanza ya zomi na mibale 2015 mpe sanza ya yambo 2016. Mosika te, bakɛngɛli ya zongazonga bakozwa liste ya bandeko oyo bakokisi masɛngami mpo na kokɔta na eteyelo yango.

◼ Masangá esengeli kobenga na nimero 0815551100 mpo na kotinda lapolo ya Ekaniseli ya mobu 2015, soki batindi naino yango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto