Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/15 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 8/15 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 31 sanza ya mwambe 2015.

  1. Makambo nini ya kolendisa etali Yehova ezali na libondeli ya Salomo, mpe kokanisa na yango ekopesa biso matomba nini? (1 Bak. 8:22-24, 28) [6 sanza ya 7, w05 1/7 lok. 30 par. 3]

  2. Davidi atambolaki “na kozanga mbeba na motema”; ndenge nini ndakisa na ye ekoki kolendisa biso mpe tósala bongo? (1 Bak. 9:4) [13 sanza ya 7, w12 15/11 lok. 7 par. 18-19]

  3. Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na lisolo oyo elobeli ndenge Yehova atindaki mosakoli Eliya epai ya mwasi oyo mobali akufá na mboka Zarefate? (1 Bak. 17:8-14) [27 sanza ya 7, w14 15/2 lok. 14]

  4. Na ndenge nini komanyola na lisolo oyo ezali na 1 Bakonzi 17:10-16 ekoki kokómisa makasi ekateli na biso ya kotyela Yehova motema mobimba? [27 sanza ya 7, w14 15/2 nk. 13-15]

  5. Eliya atikaki te ete kolɛmba nzoto ezongisa ye nsima; ndakisa na ye ekoki koteya biso nini? (1 Bak. 19:4) [3 sanza ya 8, ia lok. 102 par. 10-12; w14 15/3 lok. 15 par. 15-16]

  6. Yehova asalaki nini ntango amonaki ete mosakoli na ye ya sembo Eliya alɛmbi nzoto, mpe ndenge nini tokoki komekola Nzambe na biso ya bolingo? (1 Bak. 19:7, 8) [3 sanza 8, w14 15/6 lok. 27 par. 15-16]

  7. Likanisi nini ya libunga Mokonzi Ahaba azalaki na yango, mpe ndenge nini bakristo bakoki koboya kosala libunga ya ndenge wana lelo oyo? [10 sanza ya 8, lv nk. 164-165, etanda; w14 1/2 lok. 14 par. 3-4]

  8. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo Elisha asɛngaki Eliya, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso ntango tozwi mokumba ya sika na mosala ya Bokonzi? (2 Bak. 2:9, 10) [17 sanza ya 8, w03 1/11 lok. 31 par. 5-6]

  9. Ndenge nini bilenge bakoki komekola kondima mpe mpiko ya mwana mwasi ya moke ya Yisraele oyo alobelami na 2 Bakonzi 5:1-3? [24 sanza ya 8, w12 15/2 lok. 13 par. 11]

  10. Bizaleli nini ya Yehu basaleli nyonso ya Yehova basengeli kosala makasi bámekola na ntango oyo ya nsuka? (2 Bak. 10:16) [31 sanza ya 8, w11 15/11 lok. 5 par. 4]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto