Manaka mpo na pɔsɔ ya 2 Yanuali, 2012
PƆSƆ EBANDI NA 2 YANUALI, 2012
Loyembo 118 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 5 par. 1-8, etanda na lok. 39 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yisaya 24-28 (Min. 10)
No. 1: Yisaya 27:1-13 (eleka min. 4 te)
No. 2: Kotya ntembe te na bolingo oyo Yehova azali na yango mpo na yo—Yis. 57:15 (Min. 5)
No. 3: Bomoi ya moto ezali na ntina nini?—rs lok. 124 par. 2–lok. 125 par. 3 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Mayebisi. Na lisalisi ya maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo ezali na lokasa oyo, bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kobanda koyekola na moto na mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Yanuali.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 15: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Yanuali. Lisolo na bayangani. Na miniti moko to mibale, lobelá masolo mosusu oyo ekoki kosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, sɛngá bayangani báyebisa motuna oyo bakoki kotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakotánga. Bósala mpe bongo mpo na masolo ya ebandeli ya Lamuká!; mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Lendisá basakoli básala mpenza makasi mpo na kokabola Lamuká! na bisika ya mombongo. Sɛngá mokɛngɛli na mosala ya kosakola alobela bibongiseli oyo lisangá na bino ezwi mpo na yango. Bósala bilakiseli mibale mpo na ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko. Na elakiseli mpo na kokabola Lamuká!, bómonisa ndenge ya kokabola yango na bisika ya mombongo.
Loyembo 86 mpe libondeli