Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/11 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 12/11 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 Desɛmbɛ 2011.

1. Ndenge nini toli oyo ezali na Masese 30:32 ekoki kosalisa biso tóboya kopesa lisusu nkanda na moto oyo mbala mosusu tozokisaki? [w87-F 15/5 lok. 30 par. 11]

2. “Esengo” ya ndenge nini ekokisaka te mposa nyonso ya moto? (Mos. 2:1) [g 7/06 lok. 6 par. 1-2]

3. Atako nsima ya kotánga maloba ya Salomo oyo ekomami na Mosakoli 3:1-9 bato mosusu balobaka ete Biblia eteyaka ete makambo nyonso etángamá, ndenge nini makambo oyo akomaki na Mosakoli 9:11 emonisi polele ete makambo nyonso na bomoi etángamá te? [w09 1/3 lok. 4 par. 4]

4. Likama nini ezali ya kozala “moyengebene koleka ndelo”? (Mos. 7:16) [w10 15/10 lok. 9 par. 8-9]

5. Ndenge nini Loyembo ya Salomo 2:7 emonisi ete baoyo balingi kobala bakomonisa ete bazali na bwanya soki baweleli te kopona molongani? [w06 15/11 lok. 19 par. 1; w80-F 15/7 lok. 19 par. 7]

6. Na ndimbola nini “mbɛbu” ya Moshulame ‘ezali kotangisa mafuta ya nzoi oyo ezali na ndako na yango’ mpe ‘mafuta ya nzoi mpe miliki ezali na nse ya lolemo na ye’? (Loy. 4:11) [w06 15/11 lok. 19 par. 6]

7. Ndenge nini batitre lokola “Mopesi-Toli Monene,” “Nzambe ya Nguya,” mpe “Tata ya Seko” esalisi biso tókanga ntina ya bizaleli ya Yesu mpe mokumba oyo akozala na yango na mokili ya sika? (Yis. 9:6) [w91-F 15/4 lok. 5 par. 7]

8. Lelo oyo, banani bakoki kozala lokola “ekólo [ya Yisraele] oyo epɛngwi,” mpe banani bakoki kozala lokola “fimbo” oyo Yehova akosalela mpo na koboma ekólo yango? (Yis. 10:5, 6) [ip-1 lok. 145 par. 4-5; lok. 153 par. 20]

9. Mpo na nini esakweli ya Yisaya oyo elobaki ete ‘bato bakofanda na Babilone ata mokolo moko te’ ezali mpenza likambo ya kokamwa, mpe ndenge oyo esakweli yango ekokisamaki etindi biso tótya elikya na nini? (Yis. 13:19, 20) [g 4/08 lok. 9 par. 7-8]

10. Ntango nini Yesu azwaki “fungola ya ndako ya Davidi,” mpe ndenge nini azali kosalela yango? (Yis. 22:22) [w09 15/1 lok. 31 par. 2]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto