Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki bana bazali na ndako yango, lakisá buku Yekolá epai ya Moteyi Monene to Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Yanuali: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki moto yango asilaki kozwa buku yango mpe aboyi koyekola Biblia, mosakoli akoki kopesa ye zulunalo moko ya kala to mwa buku moko oyo ekosalisa ye.
◼ Na mobu 2013, Ekaniseli ekosalema mokolo ya mibale 26 Marsi.
◼ Soki sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá azwi formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43) oyo asengeli kotinda na lisangá mosusu oyo ezali kaka na engumba esika afandi, asengeli kosala nyonso mpo ayeba nkombo ya lisangá oyo ezali na teritware epai moto oyo asepeli na solo afandaka. Akokoma nkombo ya lisangá yango na formilɛrɛ S-43 liboso atinda yango kuna. Nzokande, soki asali nyonso mpo na koyeba nkombo ya lisangá yango kasi alongi te, akoki kotinda formilɛrɛ yango na biro ya filiale.