Manaka mpo na pɔsɔ ya 6 Sɛtɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 6 SƐTƐMBƐ
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Bakonzi 12-15
No. 1: 2 Bakonzi 13:1-11
No. 2: Makambo oyo tosengeli kosala mpo na kozwa elimo santu
No. 3: Wapi lolenge ebongi ya kobenga nkombo ya Nzambe: Yehova to Yawe, mpe mpo na nini ezali na ntina koyeba nkombo ya Nzambe mpe kosalela yango? (rs lok. 198 par. 1–lok. 201 par. 2)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Ntina oyo tozali basakoli ya lokuta te. Lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Comment raisonner, lokasa 155 paragrafe 3 tii na nsuka ya lokasa 157 par. 1. Bósala elakiseli moko oyo ekozongela moko ya makanisi oyo ezali na lokasa 156 mpe 157.
Min. 20: Bózala na bokatikati ntango bozali kosɛnga mbongo ya libala. Lisolo elongo na bayangani ekouta na w98 15/9 nk. 24-27. (Talá mpe km 00/2 lok. 2) Mwa mituna mpo na bayangani: Ndakisa ya Labana eteyi biso nini? Biblia epesi mitinda nini mpo na mbongo ya libala mpe mpo na nini mitinda yango elekisi ndelo te? Nani anyokwamaka soki baboti basɛngi mbongo ebele mpo na libala mpe yango ememaka makama nini? Bópesa mwa bandakisa ya mabala oyo basɛngaki mbongo na bokatikati.