Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Bósɛnzɛlaka!; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi...; Osengeli kondima Trinité?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! mpe Talá! Nazali kozalisa biloko nyonso biloko ya sika. Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, pesá ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe salá makasi obanda koyekola na ye Biblia.
◼ Kobanda na mokolo ya 30 Sɛtɛmbɛ, masangá nyonso ekotondisa lokasa Liste pour maintenance et sécurité de la Salle du Royaume (CN-14).
◼ Na pɔsɔ ya 6 Sɛtɛmbɛ, masangá ekotalela lisolo “Bózala na bokatikati ntango bozali kosɛnga mbongo ya libala,” oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. (w98 15/9 nk. 24-27) Tosɛngi na bandeko nyonso bátánga lisolo yango liboso mpo bápesa biyano ntango ekosalema.
◼ Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu oyo ezali na motó ya likambo: “Longolá miso na yo na makambo ezangi ntina!”