Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 Augusto 2010. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Yuli tii na pɔsɔ ya 30 Augusto 2010.
1. Na ndenge nini komanyola na libondeli oyo Salomo asalaki na mokolo ya bofungoli ya tempelo ekobakisa botɔndi na biso mpo na bizaleli ya Nzambe? (1 Bak. 8:22-53]) [w05 1/7 lok. 30 par. 3; it-2-F lok. 872 par. 3]
2. Atako Davidi asalaki mabunga mingi, mpo na nini elobami ete atambolaki na miso ya Yehova “na kozanga mbeba na motema”? (1 Bak. 9:4) [w97 1/5 lok. 5 par. 1-2]
3. Mpo na nini mokonzi-mwasi ya Sheba alobaki mpo na Salomo ete: “Esengo na basaleli na yo oyo batɛlɛmaka ntango nyonso liboso na yo, mpo na koyoka bwanya na yo!”? (1 Bak. 10:4-8) [w99 1/11 lok. 20 par. 5-7]
4. Tokoki kokanisa nini na ndenge Yehova apesaki mitindo ete Abiya akundama na lilita ya malamu? (1 Bak. 14:13) [cl lok. 244 par. 11]
5. Likambo nini ezali kobenda likebi mpo na ntango oyo Eliya akendaki kokutana na Ahaba mpo na mbala ya liboso? (1 Bak. 17:1) [w08 1/4 lok. 19, etanda]
6. Maloba ‘kokakatana na makanisi’ oyo Eliya alobaki elimboli nini? (1 Bak. 18:21) [w08 1/1 lok. 19 par. 3-4]
7. Ndenge ndakisa ya Eliya emonisi yango, mpo na nini Yehova amonisaka basaleli na ye nguya na ye? (1 Bak. 19:1-12) [cl nk. 42-43 par. 15-16]
8. Mpo na nini Nabote aboyaki kotɛkela Ahabe elanga na ye ya vinyo, mpe likambo yango ekoki koteya biso nini? (1 Bak. 21:3) [w97 1/8 lok. 13 par. 18-20]
9. Na ndenge nini mwasi Moshuneme ‘amitungisaki’ mpo na Elisha? (2 Bak. 4:13) [w97 1/10 lok. 30 par. 6-8]
10. Mpo na nini Elisha aboyaki likabo ya Namane? (2 Bak. 5:15, 16) [w05 1/8 lok. 9 par. 2]