Olakisaka bato lokasa ya nsuka?
Soki moto azwi zulunalo, mbala mingi atalaka lokasa ya liboso, na nsima abalolaka yango mbala moko na lokasa ya nsuka. Lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso ezalaka na mituna mpe maloba oyo ebendaka likebi mpe emonisaka nimero ya lokasa oyo moto akoki kokuta lisolo yango.
Tokoki kotala na lokasa yango mpo na kozwa makanisi ya malamu oyo ekosalisa biso tótuna mituna mpo na kobanda masolo. Soki tosakolaka na teritware moko mbala na mbala, tokoki kosalela mituna ekeseni na boumeli ya sanza mpo na kobanda masolo. Soki moto azali na ntango te, tokoki kolakisa ye na mokuse motuna moko kati na oyo ezali na lokasa ya nsuka mpe koloba boye: “Soki olingi koyeba eyano, nakoki kotikela yo bazulunalo oyo mpe tokosolola ntango okozala na ntango.” Mpo na kobanda lisolo, basakoli mosusu basepelaka kolakisa moto lokasa ya nsuka ya zulunalo mpe kosɛnga ye apona motuna moko oyo esepelisi ye. Na nsima, balakisaka ye esika oyo akozwa eyano mpe batángaka vɛrsɛ moko oyo babongisaki liboso. Okoki mpe kokanisa ndenge mosusu ya kosalela lokasa ya nsuka mpo na kosalisa bato básepela na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.