Manaka mpo na pɔsɔ ya 30 Augusto
PƆSƆ EBANDI NA 30 AUGUSTO
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
lv mok. 16 par. 15-22, etanda na lok. 194
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: 2 Bakonzi 9-11
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: “Olakisaka bato lokasa ya nsuka?” Lisolo elongo na bayangani. Bósalela toli moko ya lisolo yango na elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ. Na nsima poná lisolo moko to masolo mibale na Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ mpe tuná bayangani bálobela mituna mpe bavɛrsɛ oyo bakosalela mpo na kokabola yango. Bósala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kokabola Lamuká! yango.
Min. 20: “Okoki kopesa litatoli ya libaku malamu!”—Eteni 2. Ekosalema na mituna mpe biyano banda na paragrafe 9 tii na 13 mpe etanda na lokasa 6.