Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/10 lok. 2
  • Masolo ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masolo ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Ozali kosalela yango malamumalamu?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo ya sika oyo ekobanda kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Masolo oyo ekosalisa biso mingi na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kobanda koyekola Biblia na bato oyo totikelaka bazulunalo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 12/10 lok. 2

Masolo ya sika mpo na kobanda koyekola na bato Biblia

1. Masolo nini ya sika ekobanda kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpe ebongisami mpo na nini?

1 Kobanda na sanza ya Yanuali, masolo ya sika ekobanda kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpo na kosalisa biso tóbanda koyekola na bato Biblia. Ekozala na motó ya likambo: “Yekolá na Liloba ya Nzambe.” Atako bato mosusu na teritware bakosepela kotánga lisolo mokomoko oyo ekobima, masolo yango ebongisami mpenza nde mpo na kosolola na bato.

2. Wapi makambo mosusu oyo ekozala na masolo yango?

2 Makambo oyo ezali na masolo yango: Motó ya likambo mpe mitó ya makambo mike ekomami lokola mituna oyo tokotuna moto ntango tozali kosolola na ye. Bavɛrsɛ ya ntina epesami, kasi bakomi maloba na yango te; basali bongo mpo moto amesana koyekola mbala moko na Liloba ya Nzambe. Baparagrafe ezali mikuse mpo tókoka kotalela yango na moto ata soki totɛlɛmi na porte na ye. Lisolo mokomoko elobeli buku Biblia eteyaka mpo na kosalisa yo obanda koyekola na moto na buku yango ntango okomona ete ebongi kosala bongo.

3. Ntango tozali kosakola ndako na ndako, ndenge nini tokoki kosalela masolo yango mpo na kobanda koyekola na moto Biblia ata ntango totɛlɛmi na porte na ye?

3 Ndenge ya kosalela yango: Ntango ozali kolakisa bazulunalo, okoki kotuna motuna moko oyo ekoki kobenda likebi ya moto na likambo oyo balobeli na lisolo yango. Na ndakisa, lisolo oyo ebimi na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali elobeli valɛrɛ ya Biblia. Okoki kotuna boye: “Omonaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe to ezali kaka buku moko ya malamu? [Tiká ye apesa eyano.] Nazali na likanisi moko oyo ekosepelisa yo na likambo yango.” Lakisá motuna ya liboso, tángá paragrafe ya liboso, mpe bótánga vɛrsɛ oyo bapesi. Tángá lisusu motuna, mpe sɛngá ye apesa eyano. Yekolá na ye makambo mwa mingi, mpe salelá mituna oyo ezali na moindo makasi mpo na kosolola na moto yango. Liboso ya kokende, lakisá ye motuna oyo elandi, mpe bóyokana mokolo mpe ngonga oyo okozongela ye mpo bótalela motuna yango. Zongeláká ye pɔsɔ na pɔsɔ mpo bóyekolaka lisolo yango tii ntango okomemela ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sika. Mayele mosusu ezali ya kosɛnga moto obanda koyekola na ye Biblia na mbala ya liboso oyo okutani na ye. Na nsima, salelá lisolo wana ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kolakisa ye ndenge toyekolaka na bato Biblia.

4. Ndenge nini tokoki kosalela masolo wana ya sika ntango tozali kozongela bato?

4 Okoki mpe kosalela malamu masolo yango ya sika epai ya bato oyo otikelaka bazulunalo mpe bato mosusu oyo ozongelaka. Okoki kaka koloba: “Ezali na masolo ya sika oyo ekobanda kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Tiká nalakisa yo ndenge ya kosalela yango.” Tozali kobondela ete masolo wana ya sika esalisa bato mingi lisusu “bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Tim. 2:4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto