“Nasepelaka na yango te”
1 Na bisika mosusu, bato mingi balobaka bongo ntango tolingi koyebisa bango nsango malamu. Nini ekosalisa biso tólɛmba te soki bato ya teritware na biso bazali kosepela na makambo ya Nzambe te? Ndenge nini tokoki kolamwisa mposa ya bato mpo básepela na nsango malamu?
2 Kobungisa esengo te: Soki toyebi ntina oyo bato mingi basepelaka na makambo ya Nzambe te, yango ekosalisa biso tóbungisa esengo te. Bato oyo bateyá bango ete biloko nyonso ebimá yango moko to baoyo bakolá na bisika oyo bato balobaka ete Nzambe azali te, bakoki mpenza kozwa Biblia na motuya te. Ekoki kozala ete kondima ya bato mosusu elɛmbá mpo na bokosi oyo bamoná na mangomba. Mpo na bato mosusu, kolɛmba mpe kozanga elikya esali ete básepela lisusu na makambo ya Nzambe te.(Ef. 2:12) Basusu ‘batyaka likebi te’ mpo mitungisi ya bomoi ezali kolɛmbisa bango.—Mat. 24:37-39.
3 Ata soki bato mosusu baboyaka koyoka biso, tokoki kozala na esengo ntango tozali kosakola, mpo toyebi ete milende na biso ekumisaka Yehova. (1 Pet. 4:11) Longola yango, kosakola solo, ata epai ya bato oyo bayebi motuya na yango te, ekómisaka kondima na biso makasi. Tósala makasi mpo na kotalela bato ya teritware na biso ndenge Yehova atalelaka bango. Ayokelaki bato ya Ninive mawa, mpo ‘bayebaki kokabola kati na lobɔkɔ na bango ya mobali mpe lobɔkɔ na bango ya mwasi te.’ (Yona 4:11) Bato ya teritware na biso bazali na mposa ya nsango malamu! Yango wana, tosengeli kolɛmba te; kasi tosengeli nde koluka ndenge nyonso ya kolamwisa mposa na bango mpo básepela na nsango ya Biblia.
4 Lobelá makambo oyo ezali kotungisa bato na esika bofandi: Mbala mosusu, mpo na kobanda lisolo, okoki kobimisa likambo moko oyo ezali kotungisa bato na esika bofandi, mpe kotuna moto soki akanisi nini na likambo yango. Yoká ye ntango azali koloba, na nsima monisá ye nsango ya kobɔndisa oyo ezali na Biblia mpo na likambo yango. Nsima ya likama moko, Motatoli moko akendaki ndako na ndako mpo na komonisa mpenza mawa na ye. Alobi boye: “Na mbala moko, bato babandaki koloba. Nasalaki masolo mingi ya kitoko mokolo yango mpamba te namonisaki bosepeli na makambo oyo etali bomoi na bango.”
5 Makambo nyonso oyo ezali kotungisa bato ekosila na Bokonzi ya Nzambe. Luká koyeba likambo nini ezali kotungisa moto oyo ozali kosolola na ye. Ntango mosusu, akopesa yo nzela oyebisa ye nsango ya elikya oyo ezali na Biblia. Soki apesi yo nzela te, ntango mosusu akondima koyoka “ata mbala mosusu.”—Mis. 17:32.