Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/2 nk. 18-23
  • Tozala ntango nyonso na likebi malamu na mateya na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozala ntango nyonso na likebi malamu na mateya na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tokosala nini mpo teritware “ezonga ya sika”
  • Totatola na mozindo
  • Baoyo bazali komilela
  • Tolonga mokakatano mobimi na kozanga bosepeli ya bato
  • Tokomisa mosala kino na nsuka
  • Totika te kosala oyo ezali malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Tósala mosala na biso ya kosakola malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Monisáká bizaleli malamu ntango ozali kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Ozalaka na teritware ya yo moko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/2 nk. 18-23

Tozala ntango nyonso na likebi malamu na mateya na biso

“Zala ntango nyonso na likebi malamu na yo moko mpe na mateya na yo. Oumela kati na makambo yango, mpamba te, ekosalaka yo bongo, okomibikisa yo moko mpe bayoki na yo.”​—1 TIMOTE 4:16.

1. Mpo na nini oyo ezali ntango te mpo na biso ete totelema se esika moko kati na mosala ya kosakola Bokonzi?

LOKOLA Jéhovah azali koyeisa mbango koyanganisama ya “bampate”, ezali solo ntango te mpo na basaleli na ye ya kotelema kati na mosala etali kosakola Bokonzi mpe kozalisa bayekoli. (Yisaya 60:8, 22; Matai 24:14; 28:19, 20) Tosengeli nde kosala engebene oyo Nzambe alingi kokokisa na eleko na biso. Awa nsuka ezali kobelema, tozali kokende kotala bazalani na biso mbala mingi lisusu. Atako mosala ya kotatola, oyo esalemi na basakoli mpe ba pionniers oyo bazali kobakisama ntango nyonso, esili kopalangana kati na mokili, mosala yango ya esengo ya kobuka mbuma ekobakisama lisusu.​—Yisaya 60:11; tala Nzembo 126:5, 6.

2. (a) Engebene Yisaya 40:28-31, na liziba nini ya nguya tokoki kozwa makasi ya kosilisa mosala ya kosakola Bokonzi? (b) Lelo, mpo na nini tosengeli mpenza kokeba na boye ete mosala oyo tozali kosalela Nzambe ezala malamu?

2 Na esika ete ‘tolemba’ mpo tozali kosakola mbala mingi kati na bateritware mosusu, tosengeli koyeba ete tosengeli sikawa kobondela Jéhovah apesa biso “nguya” oyo esengeli mpo na kosilisa mosala. (Yisaya 40:28-31; 1 Yoane 5:14) Na ntembe te, bamilió na bato oyo bazali kati na “ebele monene” ya “bampate mosusu” basili koyanganisama. Kasi bametode oyo emonanaki malamu mpo na kosalisa bato yango ete bandima solo ezali lisusu mpenza bongo te mpo na bamosusu lelo. (Emoniseli 7:9, 10; Yoane 10:16) Tosengeli bongo kopesa likebi monene na motindo ya mosala na biso oyo tozali kosalela Nzambe.

3. Nini ekoki kosalisa biso ete tosakola na esengo ya sika?

3 Na molende nyonso, tika ete tosala lisusu makasi tokoma basaleli ya makoki koleka. Tokosangana bongo na mosala ya kosakola na esengo ya sika. Kasi ndenge nini tokoki kokoma na yango? Tosengeli ntango nyonso kozala na likebi malamu na biso moko mpe na mateya na biso; kasi kosuka te na mosala ya lolenge bobele moko mikolo minso. (1 Timote 4:16) Bibebu na biso bisengeli te kopesa mingi koleka bobele “mbeka ya masanzoli” ya mpamba. (Baebele 13:15) Tosengeli kozala na etingya kati na mosala na biso. (Masese 22:29) Lokola ezali na ntina mingi ete toyebisa nsango na etingya, totalela mwa makambo matali mosala na biso ya Nzambe oyo tosengeli ‘ntango nyonso’ kozala na likebi malamu mpo na yango.

Tokosala nini mpo teritware “ezonga ya sika”

4. Ndenge nini tokoki “kozongisa sika” teritware oyo epesameli lisanga na biso?

4 Totalela likambo yango na lolenge ekoki kosalelama. Na bamboka mingi, bateritware mingi te, to ata moko te, ezangi kotalama to etalamaka mpenza te. Na bongo mpo na nini “koyeisa sika” te teritware oyo epesami na lisangá na biso? Na lolenge nini? Ntango tozali kotala bato mbala mingi, likoki ezali te ya komimonisa epai na bango lokola soki naino tomoná bango te mpe koloba na bango lisusu maloba oyo tozali na momesano ya koloba na bango. Ata boni, emonani ete bakoyeba biso soki tosilaki kosakola mbala na mbala kati na kartyé na bango. Mokanda Comment raisonner à partir des Ecritures ezali kopesa maloba ya bokoti na lisolo koleka ntuku minei oyo tokoki kosalela kati na mosala na biso ya Nzambe. Tomibongisa malamu mpo na kokangisa masolo yango ya sika mpe ya ntina elongo na bansango ya eleko oyo mpe elongo na makambo mazali koleka na mboka na biso, oyo ekoki kosepelisa bafandi ya teritware na biso. Na esika ya kosala lokola nde tozali kosenga bolimbisi mpo tozali kosakola mbala na mbala bobele na teritware moko, tozala na makanisi malamu mpe “tozongisa sika” teritware na biso na kosalelaka masolo ya kitoko. Nzokande, yango ekobimisa mbano soki bafandi ya teritware na biso bazali koyamba biso malamu te?

5. (a) Soki toyebi ete moto moko ayambaki biso malamu te ntango tolekaki mbala ya nsima, ndenge nini tokoki kozwa litomba na yango? (b) Maloba nini ya kobandela lisolo emonani malamu kati na teritware na bino? (c) Mpo na nini ezali litomba na koyoka mpe kokumisa molobani na biso ntango likoki ezali mpo na yango?

5 Soki omikundoli ete moto boye ayambaki yo malamu te mbala ya nsuka oyo okendeki kotala ye, ekoki kozala ete ozali na mposa te mpo na kozongela ye. Kasi mpo na nini okozwa te litomba na likambo yango? Na lolenge nini? Okoki kobanda na kokanisa na bokutani yango oyo elekaki, mpe kobandela na lisolo oyo ozalaki na yango elongo na moto yango. Okoki koloba: “Mbote, Citoyen Songolo!” Na nsima, soki omoni ete esengeli okoki kobakisa: “Ozali malamu?” Na nsima, okokoba mbala mosusu boye: “Ntango nalekaki na poso eleki, olobaki na ngai ete Lingomba na yo ekokisaka bamposa na yo nyonso ya elimo mpe ete ozali mosaleli na yango. Lokola nazali moko na bato bafandi pembeni na yo mpe napesaka motuya na lingomba, nalingi kotuna yo soki, engebene Lingomba na yo, tokoki kolikya kobika na eleko oyo ya bibundeli makasimakasi to ya nikleere?” Tika molobani na yo ayanola, mpe pesa ye longonya soki okoki kosala yango na bosembo. Soki okoyoka ye mpe okokumisa ye, mbala mosusu akobongola ezalela. Mbala mingi bato bandimaka ete tozongela bango soki tozali kotika bango baloba. Na ntembe te, tosengeli koyokanisa nsango na biso na oyo bazali koloba na biso.

6. (a) Ndenge nini tokoki kosala mpo bato bayeba ete tozongaka epai na bango mbala na mbala? (b) Mpo na yango, maloba nini ya ebandeli tokoki kosalela?

6 Na maloba na yo, okoki kosala na boye mpo bato bayeba ete tokotalaka bango mbala na mbala. Mpo na nini koloba na bango te: “Mbote, Citoyenne Songolo! Ozali malamu? Lelo, tozali kotala bafandi ya zongazonga na bino mpo na kolobela bango ntina ya . . . ” To mpe okoki koloba: “Mbote! Toyei kotala yo ndenge tosalaka yango poso na poso. Tozali na esengo ya kokutana na yo lisusu. Bato ya pembeni na bino basepeli na lisolo oyo tozali kolobela lelo.” Na nsima, koba lisolo. Lolenge yango ya kosala ekopesa yo mpe liyoki ete ozali kati na teritware ya “sika”. Maloba masalelami makokesena mwa moke ntango mosusu engebene mikili, kasi bandakisa yango ezali kopesa likanisi ya maloba oyo tokoki koloba. Meka kozwa litomba na yango; ekozala mpo na bolamu na yo.

7. (a) Na kokabwanaka na molobani na bango, ndenge nini batemwe mosusu basalaka mpo ayeba ete bakozongela ye lisusu?

7 Batemwe mosusu basalaka na lolenge ete moto ayeba ete tokozongela ye, na kokabwanaka na ye na maloba oyo: “Tokozala lisusu na esengo ya kozongela yo.” Epai na baoyo bazali naino kokakatana mpo na kosolola, okoki koloba: “Kosolola elongo na yo esepelisi ngai. Olobi makambo ya solo mpenza. Lisolo yango ezwi biso mwa baminite, kasi nde tolobeli bansango ya mabe te, lokola oyo tozali koyoka mingi mikolo nyonso. Ezalaki lisolo kitoko.” Na ntembe te okolinga kobongisa masolo mosusu oyo ekoki. Atako boni, na kolobaka na likanisi malamu, na boninga, mpe na kosalelaka masolo ya nguya, tosala na lolenge ete bato basilika te ndenge tozali kotala bango mbala na mbala.

Totatola na mozindo

8, 9. Tokoki kosala nini mpo na kolukaluka malamumalamu bato oyo babongi na nsango malamu?

8 Tokobatela esengo na biso soki tozali kokeba ete toluka malamumalamu baoyo babongi na nsango malamu. (Misala 8:25; 20:24) Na ndakisa, na nsuka ya poso to na mpokwa, moklisto moko akoki kotuna ete amona nkolo ya ndako, soki ezali mwasi to mwana nde moto afungoli ekuke. Na ntembe te, tokutaka mbala mingi mama ya ndako. Ekozala bongo malamu na kosolola na mokonzi ya libota. Tokokokanisa nsango yango na ye, na ndakisa na kolobelaka ye: “Mpo na yo, nini ekoki kopesa avenire ya esengo na libota na yo?” to mpe: “Tala ndenge Biblia ezali kokolisa bomoko ya libota”. Kokakatana te na kokumisa ye mpo na makanisi malamu oyo azali kobimisa.

9 Lolenge mosusu ya “koyeisa sika” teritware ezali ya komeka kokutana na basangani nyonso ya libota oyo bafandi ndako moko: nkoko-mwasi, bana ya bandeko oyo bazali naino kokendeke kelasi, semeki ya mwasi oyo akendaka mosala na kati na poso. Ebongi lisusu kotuna soki bafuteli bazali na nsima. Sala makasi kosolola na bafuteli wana bana na kelasi, minzemba oyo bakendaka mosala, basi bakufela mibali, bongo na bongo. Yango ekoki mpe koyeisa teritware na yo monene.

10. Na lolenge nini mosusu tokoki koyeisa monene teritware epai tozali kosakola ndako na ndako, mpe basakoli mosusu basalaki nini mpo na kokutana na bato oyo basalaka na butu?

10 Lolenge mosusu ya koyeisa teritware monene epai tozali kosakola ndako na ndako, ezali ya kosangana na biteni mosusu ya mosala na biso ya Nzambe. Mpo na kobongola, tokoki komonisa epai na libota moko ete bakoki koyekola Biblia elongo na biso kozanga kofuta. Lokola bato mosusu bazalaka te epai na bango, ntango mosusu tokoki kokutana na bango na bisika na bango ya mosala. Litatoli kati na bakartyé ya mombongo ezalaka mpe na matomba mingi. Na mikili misusu, tokoki mpe kokutana na bato oyo basalaka na bakartyé yango na kopesaka litatoli na balabala na bangonga oyo ekoki. Na Canada, ba pionniers bazwaki matomba malamu na kokutanaka, na mpokwa mpenza, na basali ya bisika ya kotekisa essence, ya bamagazini mpe ya ba hôtels oyo esalaka butu mobimba. Bato yango mbala mingi bazalaka na mosala mingi te na bantango wana mpe basepelaka mingi kozala na mwa eloko ya kotanga. Na ntembe te, bandeko basi basengeli kokima bisika mosusu na bangonga ya butu.

11. (a) Batemwe mosusu basalaka nini kuna epai bato mingi bazalaka na ndako na bango te ntango bazali kotala teritware na mobimba na yango? (b) Soki tozali kosala makasi mpo na kokutana na bato oyo bazalaki epai na bango te ntango tolekaki, ekobimisa litomba nini mpo na teritware mpe mpo na mosala na biso mpo na Nzambe?

11 Tokoloba nini mpo na bato oyo bazali epai na bango te ntango tozali kobetela bango ekuke? Mpo na yango lisusu, tosengeli kozala na makanisi malamu. Wana esilisi bango mosala ya ndako na ndako, Batemwe mosusu, na lisalisi ya note ya ndako na ndako oyo etondisami malamumalamu, bazongelaka bato oyo bazalaki te bobele na mokolo yango. Na ntango yango, bato mingi basili kozonga na bandako, mpe baoyo basalaka na butu basili kolamuka. Na bakartyé mingi, ndambo moko to koleka ya bato bazalaka epai na bango te na moi. Tokoki solosolo koyeisa teritware monene na komekaka kozongela bango na bangonga ekeseni, kino tokokuta moto. Ba pionniers mpe basakoli oyo bameseni na mosala bazali koloba bango nyonso ete mpo na kokutana na bato oyo bazalaki epai na bango te mbala mingi matomba malamu makoki kozwama bobele ntango tozali kotala teritware mobimba mbala ya liboso. Soki tokokeba na eteni yango ya mosala na biso ya Nzambe, emonani ete tokozwa na yango matomba ebele.​—Masese 10:22.

Baoyo bazali komilela

12. Ezaleli na biso esengeli kozala nini ntango bato bazali komilela ete tozali kokende kotala bango mbala na mbala? Mpo na nini?

12 Tokoloba nini epai na bato oyo bazali komilela ete tolekisi ndelo na kokendeke kotala bango mbala na mbala? Tosengeli komitya na esika na bango. (Matai 7:12) Bazali komona lokola tozali kokende kotala bango mikolo nyonso. Kasi ezali solo te ete esili koleka bambula bato bazalaki koloba na biso: ‘Bozalaki awa poso eleki!’ nzokande tozalaki koyeba malamu ete esalaki sanza motoba to koleka tobetaki na ekuke na bango te? Epai mosusu, koleka mbala na mbala ekoki kolamusa mposa. Mokolo moko, na Guadeloupe, moto moko akimaki mbangu nsima na Temwe moko mpe alobaki na ye: “Nazali kotala yo uta baposo mingi. Mingimingi, nayokaka batemwe te, kasi lelo nalingi koyeba mpo na nini bokendeke kotala bato mbala na mbala boye!” Temwe abandaki boyekoli ya Biblia elongo na moto wana.

13, 14. Baninga na biso mosusu basalaka nini ntango bato bazali komilela ete tozali kokende kotala bango mbala na mbala?

13 Basakoli mosusu bayebisaka na boboto epai na bato oyo bazali komilela, dati ya sikisiki oyo balekaki mbala eleki mpe bapesaka bango bazulunalo ya sika, na koyebisaka bango ete yango ezali na masolo ya ndenge mosusu. Tokoki kokanisa elongo na bato yango na koyebisaka bango ete ekoki kozala ete bazwaki bazulunalo mosusu ebele uta bokutani na bino oyo eleki, kasi mikanda yango epesaka bansango malamu te ntango nyonso. Na nsima, tolimbolela bango ete toyaka nde mpo na koyebisa bango nsango malamu mpe ete masolo na biso eumelaka te. Kasi soki moto azali na mosala mingi, tokoki koloba na ye: “Soki ozali na ntango te ya koyoka ngai lelo, nakokutana na yo lisusu ntango nakoleka mbala ekoya, ekoki kozala nsima na poso moko.”

14 Tokoki koloba nini lisusu? Nyonso etali ezaleli ya moto oyo tokei kotala mpe mitindo ya limemya oyo ezali kosalelama na mboka na biso. Ndeko mwasi moko ya mboka Japon alimboli ntina oyo tozali kokendeke kotala bato mbala na mbala, na maloba oyo: ‘Ntango mopepe ya nsomo ezali kobelema, televizio eyebisaka bato mbala na mbala bisika oyo ekomi, mpo na bolamu ya baoyo bayoki naino nsango te. Mpamba te, bomoi na bato ezali na likama. Bansango yango epesamaka mbala mingi lisusu koleka, na meko oyo mopepe yango makasi ezali kobelema. Ndenge moko, tosengeli kokebisa bazalani na biso mbala mingi koleka ete etumba ya Armagedon ebelemi, mpo na kobikisa bomoi na bato.’ Na ntembe te, tokokeba ete tobimisa likanisi ya motindo yango na boboto mpe bosolo, na elikya ete tosimba motema ya molobani na biso.

Tolonga mokakatano mobimi na kozanga bosepeli ya bato

15. (a) Nini ekoki kozala mokakatano monene kati na bateritware epai tozali kosakola mbala mingi? (b) Bamosusu bazangaka bosepeli mpo na bantina nini?

15 Lokola tozali kokende kotala bato mbala mingi koleka, kozanga bosepeli na bango ezali mokakatano monene mpo na biso. Kasi kotalela bantina ya ezalela yango ekoki kolendisa biso. Solo, tokomona na ntembe te ete likoki ezali naino ya kosimba mitema ya bamosusu. Kozanga bosepeli na bango mbala mosusu euti na kolemba mpe na kozanga na bango ya elikya. Mbala mosusu bazali komona ete ezaleli ya mokili ezangi elikya mpe ete etikali na bango bobele kosepela na bomoi na bango na lolenge nyonso ekoki. Bamosusu batungisami na komona ete bakonzi ya mangomba bazali kosangana na politike, bazali na etamboli ya mbindo to bazali kokweisa mpenza te baoyo bazali kosala pite mpe ekobo. Na ntina na nyonso oyo, bakomi kosepela bobele na bomoi ya mokolo na mokolo.

16. Ndenge nini tokoki kosimba motema ya moto oyo asepeli te?

16 Toyebi ete basaleli baklisto ya liboso balembaki te mpo na ezaleli ekokani na yango oyo ezalaki na bamosusu kati na bato ya eleko na bango oyo bazalaki koloba: “Tolya mpe tomela, mpamba te lobi tokokufa.” (1 Bakolinti 15:32) Tozali komemela bato nsango oyo basengeli na yango mpenza. Kasi ndenge nini tokoki kosimba mitema na bango? Metode moko ezali ya kobongisa malamu mikanda na biso kati na sakosi na biso, mpe kotuna bango mituna ya mayele, lokola oyo: “Mpo na yo, nzela moko ezali mpo na kosilisa mikakatano ya lelo? Ezali bobele mpo bato mingi naino bazwi nzela yango te? Okanisi ete tosengeli kolikya mpe kolanda koluka nzela yango?” Epai na bamosusu, tokoki koloba: “Na ntembe te ozali kokanisa ete eleki malamu kozala na elikya ete avenire ekozala malamu koleka, na esika ete ozanga elikya. Elikya nini ozalaka na yango? Na nsima tuna bango: “Mpo na yo, nini mpenza ezali kopekisa kimya mpe bomoko ya mokili mobimba?” Epai na bamosusu, okoki mpe kotuna motuna oyo: “Okanisi ete mangomba nyonso esalaka makambo oyo outi kotanga?” Mituna yango, mbala mingi ekopusa balobani na yo ete bapesa makanisi na bango. Yoka bango malamu. Ee, botika bango bafungolela bino mitema na bango. Mingi “bazali komitungisa mpe kolela mpo na makambo na mbindo nyonso oyo mazali kosalema lelo.”​—Ezekiele 9:4.

17. Ndenge nini tokoki kosalela mikanda na biso mpo na kolamusa mposa ya moto oyo, na ebandeli, alobaki na biso ete nsango na biso ezali komisepelisa ye te?

17 Lolenge mosusu ya kolonga kozanga bosepeli ya bato ezali ya kokoma likanisi moko to liloba moko ya botemeli ya moto mpe kozongela ye elongo na zulunalo moko to mokanda mosusu enyatami na la société Watch Tower oyo ezali kolobela likambo yango. Na ebandeli, ekoki ata kozala lisolo moko ya Nzambe te na ndakisa lisolo etali liwa ya mbalakaka ya mwana moke to kobeba ya bazamba. Limbola moto yango ete okanisaki na motuna oyo ezalaki na litomba mpo na ye mpe omikundolaki lisolo yango kati na mokanda wana. Na nsima lobela mingi mwa makanisi minene oyo malimbolami kuna na kati. Na ndenge yango, mwasi moko oyo autaki koboya moko na mikanda na biso, andimaki zulunalo nsima na mwa basegonde. Mpo na nini? Mpamba te temwe yango atunaki ye soki ayebi ete bazemi 55 milió ezali kosopama mbula na mbula. Ekamwaki ye na motuya yango, asengaki zulunalo oyo ezalaki kopesa nsango yango,

Tokomisa mosala kino na nsuka

18, 19. (a) Tosengeli lisusu ‘kozala na likebi’ na nini kati na mosala na biso mpo na Nzambe? (b) Makanisi mabe nini bato mosusu bazalaka na yango mpo na biso mpe mpo na bindimeli na biso, mpe tokoki koloba na bango nini?

18 Likoló na nyonso, esengeli kozala na motema molai epai na bato. Loba malembemalembe mpe na esengo. Monisa bolingo mpe boboto. (Bagalatia 5:22, 23) Liboso oleka na ekuke elandi, talela makambo mauti koleka na ekuke mosusu mpo na koyeba ndenge nini okoki kobongisa lolenge na yo ya kolakisa nsango malamu. Omitya na esika na moto, mpamba te mingi bazali na makanisi mabe mpo na ba Témoins de Jéhovah. Mbala mosusu bakoloba: ‘Bino bokokisaka te masengami na bino ya politike mpe ya ba citoyens’, ‘Bozali koboya kosala mosala ya soda’, to ‘Bozali kopanza mabota’. Kasi bato bazalaki mpe koloba bongo na baninga na biso boklisto ya ekeke ya liboso. Yebisa yango epai na bato, na komonisaka bango na ndakisa maloba mazali kati na mokanda Comment raisonner, na nse ya motó na likambo “Neutralité”.

19 Na ntina na baklisto ya liboso, mokomi na makambo na kala Will Durant akomi: “Mpo na moklisto, lingomba na ye ekabwanaki na politike mpe etombwanaki mpenza, botosi na ye oyo eleki monene esengelaki kopesama na Kaisala te kasi na Klisto. . . . Kokabwana oyo moklisto azalaki komonisa mpo na makambo ya mokili emonanaki epai na mopakano lokola lipengwi liboso na masengami ya ba citoyens, kolembisama ya nsinga mpe ya mokano ya ekolo. Tertullien azalaki kopesa toli na baklisto ete baboya mosala ya soda . . . . Baklisto balendisamaki na bakonzi na bango ete bakima baoyo bazalaki baklisto te, bamona misala na bango lokola ya banyama, bathéatres na bango lokola ya mbindo, . . . [Ntango basangani ya libota moko bazalaki kokoma baklisto, ezalaki kolobama ete boklisto ya solo ezalaki koboma mabota.”]​—César et le Christ, tome III, pages 319 mpe 320.

20, 21. (a) Kondimisama nini tolingi kozala na yango ntango moto aboyi kondima nsango ya Bokonzi? (b) Mpo na nini tosengeli te ‘kotika’, kasi nde kokoba mosala ya malamu oyo epesameli biso: kosakola Bokonzi?

20 Bamosusu balingaka koyoka biso te, ata tozali koloba na bango nini. Kasi soki ezali bongo, esengeli kozala mpo ete bazali koboya nsango ya Bokonzi, kasi ezala te mpo ete tozali kolakisa yango na lolenge oyo ezangi kobenda bato. (Luka 10:8-11; Misala 17:32; Ezekiele 3:17-19) Tosala nyonso oyo tokoki na lisalisi ya Jéhovah Nzambe, mpe ye akokomisa mosala kino na nsuka.​—Bafilipi 1:6.

21 Na kozalaka na elikya monene, tozalaka ntango nyonso na ‘mosala mingi kati na mosala ya Nkolo, awa eyebi biso ete mosala na biso ezali mpamba te’. (1 Bakolinti 15:58) ‘Tozala ntango nyonso na likebi malamu na biso moko mpe na mateya na biso. Toumela kati na makambo yango, mpamba te ekosalaka biso boye, tokomibikisa biso moko mpe bayoki na biso’. (1 Timote 4:16) Likoló na nyonso, “totika te kosala oyo ezali malamu, mpamba te tokobuka na ntango ekoki soki tokolemba te’.​—Bagalatia 6:9.

Bozongeli

◻ Nini ekoki kosalisa biso na kobatela na makanisi malamu kati na teritware epai tozali kosakola mbala na mbala?

◻ Ndenge nini tokoki kolukaluka malamumalamu lisusu bato oyo babongi na nsango malamu?

◻ Tokoki koloba nini epai na baoyo bazali komilela ete tokendeke otala bango mbala na mbala?

◻ Na ndenge nini tokoki kolonga mikakatano oyo ezali kobima na kozanga bosepeli ya bato?

◻ Nini ekosalisa biso na kobongisa lolenge ya mosala na biso oyo tozali kosalela Nzambe?

[Etanda na lokasa 20]

LOKOLA TOKENDEKE KOTALA BATO MBALA MlNGI KOLEKA,

‘tozala ntango nyonso na likebi malamu’ na mateya na biso . .

◻ na kosalelaka maloba ya ebandeli na lisolo mpe bilakiseli oyo ekondimisa bato.

◻ na kolukalukaka malamumalamu lisusu baoyo babongi na nsango malamu.

◻ na komonisaka motema molai epai na baoyo bazali komilela

◻ na kolongaka mokakatano oyo ezali kobima na kozanga bosepeli mpe makanisi mabe ya bamosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto