Bolingo ezali na ntina mpo mosala na biso ebota mbuma
1 “Bóya epai na ngai, . . . mpe ngai nakopemisa bino.” (Mat. 11:28) Maloba wana ya kokitisa motema emonisaki bolingo makasi oyo Yesu azalaki na yango mpo na bato. Lokola tozali baministre baklisto, tolingi kolanda ndakisa ya Yesu, na komonisáká ete tolingaka bato oyo balɛmbi mpo na mokili oyo ezangi bolingo. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bato ntango tozali kosakola nsango malamu?
2 Na maloba: Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na bato etindaki ye asalela mabaku nyonso mpo na kosakwela bango nsango malamu. (Yoa. 4:7-14) Bolingo ekosalisa biso tókakatana te mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Elenge mwasi moko ya mbula motoba apesaki litatoli ya malamu mpenza epai ya mwasi moko oyo afandaki pembeni na ye na esika oyo bazelaka mpo na kokutana na monganga. Nini etindaki ye apesa litatoli yango? Elenge yango alobaki boye: “Emonanaki lokola ete mwasi yango azalaki na mposa ya koyeba Yehova.”
3 Tokoki komonisa ete tosepelaka na bato soki tozali kosɛka mwa moke na esengo mpe koloba na bango lokola baninga na biso. Soki tozali koyoka na likebi mpenza ntango basusu bazali koloba, koluka koyeba makambo oyo ezali kotungisa bango mpe komonisa ete tozali komibanzabanza mpo na bango, bakomona ete tolingaka bango. (Mas. 15:23) Na ndakisa ya Yesu, tosengeli kolobelaka mingi mpenza nsango ya Bokonzi oyo ezali kolendisa mpe motema mawa ya Yehova mpo na bato.—Mat. 24:14; Luka 4:18.
4 Na misala: Yesu azalaki kotyela bamposa ya basusu likebi, mpe azalaki komonisa yango polele na misala. (Mat. 15:32) Biso mpe, ntango tozali kosakola, tokoki kozwa mabaku mingi ya kosalela bato misala oyo emonisaka motema boboto. Ndeko mwasi moko amonaki mwasi moko oyo azalaki kobundabunda mpo na koyoka nsango moko ya ntina oyo bazalaki koyebisa ye na telefone. Ndeko mwasi asalisaki ye na kobongola maloba ya moto oyo azalaki kobenga. Likambo wana oyo emonisi bolingo, efungolaki nzela mpo asolola na mwasi yango lisolo ya Biblia oyo esalisaki ye andima boyekoli ya Biblia. Na libaku mosusu, ndeko mobali oyo azongelaki moto moko, akutaki ye azali kobundabunda mpo na kokɔtisa kiti moko ya kilo na ndako. Nsima ya kosalisa ye na kokɔtisa yango, ndeko mobali afandaki na kiti yango mpe abandaki koyekola Biblia na moto yango, oyo azalaki na botɔndi mingi.
5 Ntango tozali kosakola, tomonisaka ete tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso. (Mat. 22:36-40) Ndenge oyo tomonisaka bolingo yango na maloba mpe na misala, esalisaka bato ya mitema sembo báyeba ete tozali na solo.