Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/07 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Febwali
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 1/07 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Yanuali

Loyembo 12

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lendisá moto nyonso atala kasɛti-video Pas de sang: la médecine relève le défi mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ ya 22 Yanuali. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali mpe Lamuká! ya Yanuali. Na elakiseli moko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nazali na mosala.”​—Talá buku Comment raisonner, nk. 19-20, to mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nk. 11-12.

Min. 15: Zwá matomba na Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2007. Monisá ntina oyo biso nyonso tosengeli kozwaka mwa miniti mokolo na mokolo mpo na kotalela mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango. Bongisá liboso mpo mosakoli moko to basakoli mibale bálobela programɛ na bango ya kotalela mokapo ya mokolo mpe matomba oyo bazwaka. Mpo na kosukisa, lobelá na mokuse mokapo ya mobu 2007.

Min. 20: Sakolá nsango malamu epai ya moto nyonso. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, lokasa 92 tii na motó ya likambo moke na lokasa 102.

Loyembo 165 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Yanuali

Loyembo 93

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: Ezali na likambo moko oyo ezali kopekisa yo kozwa batisimo? Lisukulu, ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2002, nkasa 13-15.

Min. 20: “Nasepelaka na yango te.”a Ntango bokotalela paragrafe 4, sɛngá bayangani bálobela makambo nini etungisaka bato ya teritware na bino. Salá bilakiseli mibale ya mikuse oyo ekomonisa ndenge ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nasepelaka na yango te.”​—Talá buku Comment raisonner, lok. 16.

Loyembo 135 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Yanuali

Loyembo 224

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino, mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali mpe Lamuká! ya Febwali. Elakiseli moko ekomonisa mosakoli moko azongeli moto oyo atikelaka bazulunalo mbala na mbala.

Min. 10: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: “Wapi lolenge eleki malamu oyo minganga bakoki kosalisa moto?” Ekosalema na nkulutu moko. Salá mbala moko lisolo elongo na bayangani, oyo ekolobela kasɛti-video Pas de sang; salelá mituna oyo ezali na lisolo. Mpo na kosukisa, tángá paragrafe ya nsuka mpe lendisá bandeko nyonso bátánga lisusu malamu masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo balobeli na lisolo yango. Soki bozali na kasɛti-video yango te na lisangá na bino, bokoki kosalela Lamuká! ya 8 Yanuali 2000, nkasa 7-11 (na Lifalanse) mpe mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, nkasa 8-15, 18.

Loyembo 188 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Yanuali

Loyembo 55

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yanuali. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Febwali, mpe salá elakiseli ya lolenge moko ya kolakisa yango.

Min. 20: “Osili komibongisa mpo na likama?”b Ekosalema na nkulutu moko. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2005, lokasa 3.

Min. 15: Soki olaki moto ete okozongela ye, zongelá ye. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1999, lokasa 11. Sɛngá bayangani báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango ntango bazongelaki bato ndenge balakaki bango mpe matomba oyo bazwaki.

Loyembo 137 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 5 Febwali

Loyembo 3

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Nazali Motatoli ya Yehova! Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Bilenge mosusu bakokaka te koyebisa baninga na bango ete bazali Batatoli ya Yehova, mpo babangaka ete bakotyola bango. Nzokande, koyebisa bato ete ozali Motatoli ya Yehova ezali na ntina mingi. Soki balakisi bayebi bindimeli na yo, mbala mingi bakoki kotosa yango mpe kotika kotya yo mbamba mpo osangana na makambo oyo ebongi te. Bilenge oyo balandaka mitinda ya Nzambe te bakobanga kobenga yo osangana na bango na misala mabe. Basusu bakoyeba mbala moko mpo na nini olingaka te kosangana na makambo mosusu, na ndakisa kobima na bana basi to na bana mibali, kosangana na masano to na misala mosusu nsima ya ngonga ya kelasi. Okokakatana mpe te kopesa litatoli na eteyelo to soki okutani na bana kelasi na bino ntango ozali kosakola na teritware. (g02-F 22/3 lok. 12) Sɛngá basakoli bálobela matomba oyo bazwaki mpo bayebisaki na eteyelo na bango ete bazali Batatoli ya Yehova. Okoki kobongisa liboso mpo mosakoli moto to basakoli mibale bálobela yango.

Min. 20: “Bolingo ezali na ntina mpo mosala na biso ebota mbuma.”c Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2003, lokasa 23, paragrafe 16-17.

Loyembo 83 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto