Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 10 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ. Nsima ya elakiseli mokomoko, lobelá bisika oyo esalemi malamu. Nsima na yango, bendá likebi ya bayangani na masolo mosusu ya bazulunalo yango oyo ekoki kobenda likebi ya bato ya teritware na bino.
Min. 15: Ozalaka na mimeseno malamu ya kotánga? Lisolo elongo na bayangani ekouta na masolo oyo eponami na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 21-26. Makambo nini tokoki kokɔtisa na programɛ na biso ya botángi? (lok. 21, etanda) Mpo na nini ezali na ntina tótángaka mikanda oyo tozali kozwa? (lok. 23, par. 2) Wapi sɛkɛlɛ ya kozala na programɛ ya malamu mpo na kotánga? (lok. 26, par. 3-4) Ndenge nini ozwaka ntango ya kotánga Lamuká! mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Matomba nini osili kozwa?
Min. 20: “Tókoba kosakola liloba ya Nzambe na mpiko.”a Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo ekoki kosala ete tózanga mpiko ya kopesa litatoli. Nini esalisaki bango bázala na mpiko ya kopesa litatoli?
Loyembo 78 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 17 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá eteni 3 ya siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 2005, mpe zongelá likanisi moko to makanisi mibale na oyo etali ndenge ya kosalela malamu bavɛrsɛ ntango tozali koyekola na bato Biblia.
Min. 15: Kimá makama ya internet. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 2004, nkasa 18-21 (na Lifalanse). Soki na teritware na bino bato basalelaka internet te, lobelá mitinda ya Biblia mpo na kosalisa bandeko bákima etamboli ya mbindo mpe baninga mabe, na televizyo mpe na radio.
Min. 20: “Monisá ete osepelaka na bato—Na kozaláká na boboto.”b Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo tokoki komonisela basusu boboto na mosala ya kosakola. Makambo mosusu etali ndenge ya komonisa ete tosepelaka na bato ekotalelama na banimero ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ekolanda.
Loyembo 2 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 24 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Salelá makanisi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005 to makanisi mosusu oyo ebongi mpo na kobanda lisolo na teritware na bino, mpo na komonisa ndenge ya kolakisa mikanda na Novɛmbɛ.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, lok. 8, par. 5.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: Tómonisa ete totosaka mitinda ya Nzambe na elateli mpe monzɛlɛ na biso. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekosalema na nkulutu moko, ekoutana na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 2002, nkasa 17-19. Sɛngá bayangani bálobela ndenge elateli na biso ya malamu ekoki kopesa biso nzela ya kopesa litatoli.
Loyembo 153 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 31 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware ya lisangá na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ. Na elakiseli moko, lobelá etanda “Kati na nimero na biso ekolanda,” mpo na kozwa likoki ya kozongela moto yango na mbala ya nsima.
Min. 15: Tikeláká bato bazulunalo mbala na mbala mpo na kokolisa mposa na bango. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2005, lokasa 8. Ndenge nini tokoki kobanda kotikelaka bato bazulunalo mbala na mbala? (par. 1) Ndenge nini tokoki kobongisela bango masolo ya vɛrsɛ moko kaka? (par. 3) Mpo na nini tosengeli kosuka kaka te na kotánga vɛrsɛ moko oyo toponi? (par. 4) Ndenge nini moto oyo totikelaka bazulunalo mbala na mbala akoki kokóma moyekoli ya Biblia? (par. 5) Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli moko azali kosala lisolo ya vɛrsɛ moko kaka elongo na moto oyo atikelaka bazulunalo mbala na mbala.
Min. 20: Bilenge oyo bakangamaka na ekateli na bango kasi bazali na limemya. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 2002, nkasa 23-24, na motó ya likambo moke “Koboya na limemya.” Bongisá mpo elenge moko to bilenge mibale bálobela mikakatano oyo bakutanaki na yango na kelasi mpe makambo oyo esalisaki bango na kolonga mikakatano yango.
Loyembo 222 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 7 Novɛmbɛ
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 20: Tyáká likebi mingi ntango ozali na makita. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekoutana na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 2002, nkasa 12-14, paragrafe 11-14. Talelá makanisi oyo bapesi, mpe sɛngá bayangani bálobela makambo oyo esalisaki bango na kozwa matomba mingi na makita ya lisangá.
Min. 20: “Tókolisa mayele ya kotinda basusu na kokanisa.”c Sɛngá basakoli bálobela ndenge oyo batindaki bato ya ndenge na ndenge ya teritware na bino na kokanisa.
Loyembo 50 mpe libondeli ya nsuka.
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.