Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2006
MALAKO
Na mobu 2006, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:
MIKANDA: Biblia haut fleuve ná Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto [bi7], Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w], Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi [be], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si], mpe Comment raisonner à partir des Écritures [rs].
Eteyelo esengeli kobanda NA NTANGO OYO ETYAMI na loyembo, na libondeli mpe na kotombela bandeko boyei malamu, mpe na nsima ekosalema ndenge ekomami awa na nse. Nsima ya lisolo mokomoko, mokɛngɛli na eteyelo akobenga moto oyo akosala lisolo oyo elandi.
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU: Miniti 5. Mokɛngɛli na eteyelo, mopesi-toli mosungi, to nkulutu mosusu oyo azali na makoki asengeli kosala lisolo likoló ya toli moko mpo na koloba malamu, oyo ekouta na buku Eteyelo ya mosala. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, mosaleli na misala ya makoki akoki kosala lisolo yango.)
LISOLO NO. 1: Miniti 10. Ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala ya makoki, mpe mateya na yango ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 10 kozanga kotuna mituna ya bozongeli. Ntina ya lisolo yango esengeli kozala kaka te ya kolobela makanisi nyonso oyo ezali na lisolo, kasi nde ya komonisa ndenge ya kosalela makanisi yango mpe komonisa polele makambo oyo ekozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela kaka motó ya likambo oyo epesami. Bandeko mibali oyo bakosala lisukulu oyo, basengeli kokeba ete bátosa ngonga oyo epesami. Bakopesa bango toli na nkuku soki esengeli.
MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 10. Na miniti motoba ya ebandeli, nkulutu moko to mosaleli na misala moko ya makoki akosala lisolo yango na kotalela bamposa ya lisangá. Soki alingi, akoki kobimisa makanisi na mikapo oyo asepeli na yango kati na mikapo oyo ebongisami na programɛ ya botángi ya Biblia mpo na pɔsɔ yango. Lisolo yango esengeli te kolobela bobele na mokuse makambo oyo ezali na mikapo oyo epesami mpo na kotánga. Kasi, ntina ya libosoliboso ya lisolo oyo ezali ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe ndenge nini lisolo yango ekoki kosalisa bango. Molobi asengeli kokeba ete alekisa te miniti motoba oyo etyami mpo na eteni oyo ya ebandeli. Asengeli kotika miniti minei ya nsuka mpo na kosolola na bayangani. Akosɛnga bango báyebisa na mokuse (eleka segɔndɛ 30 te) makanisi oyo basepelaki na yango ntango batángaki mikapo ya Biblia oyo ezali na programɛ mpe matomba oyo bakoki kozwela yango. Nsima na yango, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga bana-kelasi bákende na bakelasi na bango.
LISOLO NO. 2: Miniti 4. Ezali botángi oyo ekosalema na ndeko mobali moko. Mwana-kelasi akosala kaka botángi, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Asengeli kotánga maloba oyo ezalaka likoló ya mokapo soki azali kotánga mokanda ya Nzembo. Mokɛngɛli na eteyelo akosala makasi mpo na kosalisa bana-kelasi bátángaka na ndenge oyo ezali komonisa ete bayebi ntina ya makambo oyo bazali kotánga, bákakatana na maloba te, báyeba konyata maloba ya ntina, kobongola mongongo, kopema na esika oyo ebongi, mpe kotánga ndenge bameseni koloba.
LISOLO NO. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai ya ndeko mwasi moko. Bana-kelasi oyo bakosala lisolo yango bakopona kadre moko kati na oyo ezali na lokasa 82 ya buku Eteyelo ya mosala to mokɛngɛli na eteyelo akoponela bango yango. Mwana-kelasi asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye mpe komonisa ndenge ya kosalela yango na motindo moko ya mosala ya kosakola oyo ebongi mpenza na teritware ya lisangá. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Esengeli kopesa bana-kelasi ya sika masolo oyo epai bakozwa yango emonisami polele. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwana-kelasi azali kobimisa makanisi ya lisolo oyo bapesi ye mpe kosalisa molobani na ye akanisa likoló ya Makomami mpe asosola makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo yango. Mokɛngɛli na eteyelo akopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo akosala lisolo.
LISOLO NO. 4: Miniti 5. Mwana-kelasi asengeli kobimisa makanisi oyo eyokani na motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo, akosala yango lokola lisukulu mpe ntango azali kobongisa yango asengeli kotalela bamposa ya lisangá na bango. Soki bapesi yango na ndeko mwasi, akosala yango na kolanda malako oyo epesami na Lisolo No. 3. Mokɛngɛli na eteyelo akopesa ndeko mobali lisolo No. 4 soki amoni ete ebongi ete lisolo yango esalema na ndeko mobali. Tobendi likebi na bino na likambo oyo: Mitó ya makambo oyo ezali na mwa elembo ya monzoto liboso na yango esengeli kopesama kaka na bandeko mibali mpe bakosala yango lokola lisukulu.
BOUMELI: Ndeko moko te asengeli kolekisa ngonga oyo epesami, ata mpe mokɛngɛli na eteyelo asengeli kokeba ete alekisa ngonga te ntango azali kopesa bana-kelasi toli. Soki bandeko oyo bazali kosala masolo No. 2 kino No. 4 balekisi ngonga, bakokata bango na mayele. Soki ndeko oyo akosala toli mpo na koloba malamu, to lisolo No. 1, to makanisi ya ntina na botángi ya Biblia alekisi ngonga, asengeli kozwa toli na nkuku. Bandeko nyonso oyo bazali na masolo basengeli kotosa ngonga oyo bapesi bango. Longola loyembo mpe libondeli, eteyelo mobimba esengeli koumela miniti 45.
TOLI: Miniti 1. Nsima ya lisolo No. 2, No. 3 mpe No. 4, mokɛngɛli na eteyelo asengeli kozwa kaka miniti moko mpo na kopesa toli; na toli na ye, asengeli kopesa mwana-kelasi longonya na likambo moko oyo asalaki malamu na lisolo na ye. Akosuka kaka te na koloba ‘osali yango malamu,’ kasi asengeli komonisa ntina oyo ye alobi ete likambo yango ezali malamu. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa mwana-kelasi mokomoko toli mosusu na nkuku soki esengeli, nsima ya makita to na ntango mosusu.
MOPESI-TOLI MOSUNGI: Longola mokɛngɛli na eteyelo, lisangani ya bankulutu ekopona nkulutu moko ya makoki, soki azali, oyo akozala mopesi-toli mosungi. Soki bankulutu bazali mwa mingi na lisangá, boye nkulutu mokomoko ya makoki akobanda kosala mokumba yango na boumeli ya mbula moko. Mokumba ya mopesi-toli mosungi ezali ya kopesa toli na nkuku, soki esengeli, epai ya ndeko mobali oyo asali lisolo No. 1 mpe ndeko mobali oyo asali makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Ezali na ntina te ete apesaka toli nsima ya masolo yango nyonso oyo baninga na ye bankulutu to basaleli na misala bakosala.
LOKASA YA TOLI: Ezali na buku.
BOZONGELI YA KOLOBA: Miniti 30. Nsima ya sanza mibalemibale, mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli ya koloba. Liboso ya kosala yango, lisolo ya toli mpo na koloba malamu mpe ya makanisi ya ntina na botángi ya Biblia esengeli kosalema ndenge oyo tolobeli yango awa liboso. Bozongeli ya koloba ekouta na masolo oyo esalemaki na eteyelo na sanza mibale oyo eleki, bakisa mpe masolo ya pɔsɔ wana. Soki lisangá na bino ekosala liyangani ya zongazonga na pɔsɔ oyo bozongeli ya koloba esengeli kosalema, na bongo bokosala bozongeli ya koloba (mpe masolo mosusu oyo ebongisamaki na pɔsɔ yango), na pɔsɔ oyo elandi pɔsɔ ya liyangani mpe masolo oyo esengelaki kosalema na pɔsɔ yango ekosalema na pɔsɔ ya liyangani. Soki mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bino na pɔsɔ ya bozongeli ya koloba, na bongo, loyembo, toli mpo na koloba malamu, mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia ekosalema kaka ndenge ezali na lokasa ya programɛ ya eteyelo. Lisukulu ya koteya lisangá (oyo esalemaka nsima ya toli mpo na koloba malamu) ekozala oyo ya pɔsɔ elandi. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ya pɔsɔ elandi ekobanda na toli mpo na koloba malamu mpe na nsima makanisi ya ntina na botángi ya Biblia kaka ndenge bapesi yango na lokasa ya programɛ; nsima na yango, bokosala bozongeli ya koloba.
PROGRAMƐ
2 Yan. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 29-32 Loyembo 91
Toli mpo na koloba malamu: Zwá mpenza matomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (be lok. 5 par. 1–lok. 8 par. 1)
No. 1: Sepelá na Liloba ya Nzambe (be lok. 9 par. 1-5)
No. 2: 2 Ntango 30:1-12
No. 3: Ntina oyo baklisto ya solo baboyaka koloba maloba ya nsɔni
No. 4: Lisumu ebebisaka boyokani na biso na Nzambe (rs lok. 281 par. 3–lok. 282 par. 3)
9 Yan. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 33-36 Loyembo 144
Toli mpo na koloba malamu: Kotánga malamu (be lok. 83 par. 1-5)
No. 1: 2 Ntango—Litomba na yango (si lok. 84 par. 34-36)
No. 2: 2 Ntango 34:1-11
No. 3: Oyo Biblia elobi mpo na molimo (rs lok. 27 par. 1–lok. 28 par. 5)
No. 4: Koyoka nsɔni ata moke te mpo na kotosa mitinda ya Biblia
16 Yan. Botángi ya Biblia: Ezela 1-5 Loyembo 137
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kotánga malamu (be lok. 84 par. 1–lok. 85 par. 3)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Ezela (si lok. 85 par. 1-lok. 86 par. 7)
No. 2: Ezela 1:1-11
No. 3: Matomba ya kozala na lisosoli ya malamu
No. 4: Banyama bazali milimo (rs lok. 28 par. 6–lok. 29 par. 5)
23 Yan. Botángi ya Biblia: Ezela 6-10 Loyembo 106
Toli mpo na koloba malamu: Kobimisa maloba polele (be lok. 86 par. 1-6)
No. 1: Ezela—Litomba na yango (si lok. 87 par. 14-18)
No. 2: Ezela 6:1-12
No. 3: Ezala molimo to elimo, moko te etikalaka na bomoi soki moto akufi (rs lok. 30 par. 1–lok. 32 par. 1)
No. 4: aLikanisi ya Nzambe mpo na libala
30 Yan. Botángi ya Biblia: Nehemia 1-4 Loyembo 161
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobimisa maloba polele (be lok. 87 par. 1–lok. 88 par. 3)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Nehemia (si lok. 88 par. 1-5)
No. 2: Nehemia 2:1-10
No. 3: Libateli oyo eleki ntina
No. 4: Elimo santu ezali nini? (rs lok. 136 par. 1–3)
6 Feb. Botángi ya Biblia: Nehemia 5-8 Loyembo 40
Toli mpo na koloba malamu: Ebengeli ya maloba—Makambo oyo osengeli kotalela (be lok. 89 par. 1–lok. 90 par. 3)
No. 1: Tángáká Biblia mokolo na mokolo (be lok. 10 par. 1–lok. 12 par. 3)
No. 2: Nehemia 5:1-13
No. 3: Makambo oyo emonisaka ete moto azali na elimo santu (rs lok. 137 par. 1–4)
No. 4: “Batelá motema na yo” (Mas. 4:23)
13 Feb. Botángi ya Biblia: Nehemia 9-11 Loyembo 159
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobongisa ebengeli ya maloba (be lok. 90 par. 4–lok. 92)
No. 1: Tóyekola kimya, kasi bitumba te (w04 1/1 lok. 6 par. 8–lok. 7 par. 5)
No. 2: Nehemia 10:28-37
No. 3: Makambo oyo emonisi ete Yehova alingaka biso
No. 4: Ezali na eloko moko te na nzoto ya moto oyo etikalaka na bomoi soki moto akufi (rs lok. 138 par. 4–lok. 139 par. 1)
20 Feb. Botángi ya Biblia: Nehemia 12-13 Loyembo 118
Toli mpo na koloba malamu: Kokakatana na maloba te (be lok. 93 par. 1–lok. 94 par. 3)
No. 1: Nehemia—Litomba na yango (si nk. 90-91 par. 16-19)
No. 2: Nehemia 13:1-14
No. 3: Ntina oyo tokoki te kosolola na bato oyo bakufá (rs lok. 381 par. 4–lok. 382 par. 4)
No. 4: bMasano ya video oyo elakisaka bitumba ebongi na baklisto te
27 Feb. Botángi ya Biblia: Esetele 1-5 Loyembo 215
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya komibongisa mpo na kokakatana na maloba te (be lok. 94 par. 4–lok. 96 par. 2, longola etanda na lok. 95)
Bozongeli ya koloba
6 Mar. Botángi ya Biblia: Esetele 6-10 Loyembo 74
Toli mpo na koloba malamu: Oyo okoki kosala soki ozali na likukuma (be lok. 95, etanda)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Esetele mpe Litomba na yango (si nk. 91-94 par. 1-6, 16-18)
No. 2: Esetele 6:1-10
No. 3: Eyano ya malamu ekoki kosilisa nkanda
No. 4: Ntina oyo baklisto baboyaka misala nyonso ya bilimo mabe (rs lok. 382 par. 5–lok. 384 par. 3)
13 Mar. Botángi ya Biblia: Yobo 1-5 Loyembo 160
Toli mpo na koloba malamu: Ntango bilembo esɛngi ete opema mpe kopema liboso ya koleka na likanisi mosusu (be lok. 97 par. 1–lok. 98 par. 6)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Yobo (si nk. 95-96 par. 1-6)
No. 2: Yobo 2:1-13
No. 3: Koluka te koyeba nguya oyo bademo bazali na yango (rs lok. 384 par. 4–lok. 385 par. 2)
No. 4: Ntina oyo baklisto ya solo baboyaka koimaima
20 Mar. Botángi ya Biblia: Yobo 6-10 Loyembo 214
Toli mpo na koloba malamu: Kopema mpo na konyata likambo moko ya ntina, kopema mpo na koyoka (be lok. 99 par. 1–lok. 100 par. 4)
No. 1: Bozwi ya elimo eleki nyonso (w04 15/10 lok. 4 par. 2–lok. 5 par. 3)
No. 2: Yobo 7:1-21
No. 3: Kozala na motema pɛto elimboli nini?
No. 4: Ndenge ya kokata boyokani na bilimo mabe (rs lok. 385 par. 3–lok. 386 par. 4)
27 Mar. Botángi ya Biblia: Yobo 11-15 Loyembo 8
Toli mpo na koloba malamu: Koyeba konyata maloba ya ntina (be lok. 101 par. 1–lok. 102 par. 3)
No. 1: “Bókeba na ndenge bozali koyoka” (be lok. 13 par. 1–lok. 14 par. 5)
No. 2: Yobo 12:1-25
No. 3: Kimá elimo ya lipanda (rs lok. 140 par. 1-lok. 141 par. 2)
No. 4: Ntina oyo mosala ya kosakola epesaka biso esengo
3 Apr. Botángi ya Biblia: Yobo 16-20 Loyembo 50
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya komibongisa mpo na konyata maloba ya ntina (be lok. 102 par. 4–lok. 104 par. 4)
No. 1: Ndenge oyo tomonisaka ete tolingaka Nzambe (w04 1/3 nk. 19-21)
No. 2: Yobo 16:1-22
No. 3: Ndenge oyo Yehova abendaka bato mpo básambela ye
No. 4: cMakama ya lolendo mpe elimo ya botomboki (rs lok. 141 par. 3-lok. 142 par. 1)
10 Apr. Botángi ya Biblia: Yobo 21-27 Loyembo 119
Toli mpo na koloba malamu: Konyata makanisi ya ntina (be lok. 105 par. 1–lok. 106 par. 2)
No. 1: Bozwi ya elimo ezali na matomba (w04 15/10 lok. 5 par. 4–lok. 7 par. 2)
No. 2: Yobo 24:1-20
No. 3: Yehova apesaka nguya oyo eleki makasi
No. 4: dKebá na bamposa ya mosuni (rs lok. 142 par. 2)
17 Apr. Botángi ya Biblia: Yobo 28-32 Loyembo 100
Toli mpo na koloba malamu: Koloba na mongongo oyo ebongi na bato oyo bazali koyoka yo (be lok. 107 par. 1–lok. 108 par. 5)
No. 1: Ndenge ya koyoka na makita mpe na mayangani (be lok. 15 par. 1–lok. 16 par. 5)
No. 2: Yobo 29:1-25
No. 3: Kokóma moombo ya mposa ya miso te (rs lok. 142 par. 3-4)
No. 4: Ntina oyo bato bakamwaki na ndenge ya Yesu ya koteya
24 Apr. Botángi ya Biblia: Yobo 33-37 Loyembo 94
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobongisa mongongo na yo (be lok. 109 par. 1–lok. 110 par. 2)
Bozongeli ya koloba
1 Mai Botángi ya Biblia: Yobo 38-42 Loyembo 154
Toli mpo na koloba malamu: Kobongola mongongo—Salelá mongongo na yo na ndenge oyo ebongi (be lok. 111 par. 1–lok. 112 par. 2)
No. 1: Yobo—Litomba na yango (si lok. 100 par. 39-43)
No. 2: Yobo 38:1-24
No. 3: Ndenge nini Yisaya 60:22 ezali kokokisama lelo oyo?
No. 4: eMaloba ya kofinga mpe mobulu ezali misala ya mosuni (rs lok. 143 par. 1)
8 Mai Botángi ya Biblia: Nzembo 1-10 Loyembo 168
Toli mpo na koloba malamu: Kobongola mongongo—Lobá mwa malɛmbɛ to mwa mbangu (be lok. 112 par. 3-lok. 113 par. 1)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Nzembo—Eteni 1 (si lok. 101 par. 1-5)
No. 2: Nzembo 4:1–5:12
No. 3: Tyelá Nzambe motema, kasi moto te (rs lok. 143 par. 2-3)
No. 4: Tóyeba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba
15 Mai Botángi ya Biblia: Nzembo 11-18 Loyembo 217
Toli mpo na koloba malamu: Kobongola mongongo—Komatisa to kokitisa mongongo (be lok. 113 par. 2–lok. 114 par. 4)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Nzembo—Eteni 2 (si lok. 102 par. 6-11)
No. 2: Nzembo 14:1–16:6
No. 3: Na ndenge nini baklisto bazali bato ya mokili te?
No. 4: Banani mpenza basalaka ete bato bányokwama? (rs lok. 375 par. 1-2)
22 Mai Botángi ya Biblia: Nzembo 19-25 Loyembo 23
Toli mpo na koloba malamu: Lobá na motema na yo mobimba (be lok. 115 par. 1–lok. 116 par. 4)
No. 1: Bososoli malamu esalaka ete bato básepela na biso (w04 15/7 lok. 27 par. 4–lok. 28 par. 4)
No. 2: Nzembo 22:1-22
No. 3: Bampasi ebandaki ndenge nini? (rs lok. 375 par. 3-4)
No. 4: fMakambo oyo Yehova azongelaka ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli kotosa yango?
29 Mai Botángi ya Biblia: Nzembo 26-33 Loyembo 203
Toli mpo na koloba malamu: Na kotalela lisolo na yo, yebá esika oyo okobakisa esengo (be lok. 116 par. 5–lok. 117 par. 4)
No. 1: Okoki kobongisa makoki na yo ya kokanga makambo na motó (be lok. 17 par. 1–lok. 19 par. 1)
No. 2: Nzembo 30:1–31:8
No. 3: Na ndenge nini solo epesaka moto bonsomi?
No. 4: Ndenge oyo tokoki kokima bampasi mosusu (rs lok. 376 par. 1-2)
5 Yuni Botángi ya Biblia: Nzembo 34-37 Loyembo 167
Toli mpo na koloba malamu: Koloba na nsai (be lok. 118 par. 1–lok. 119 par. 5)
No. 1: Nguya ya libondeli (w04 15/8 lok. 18 par. 6–lok. 19 par. 10)
No. 2: Nzembo 34:1-22
No. 3: Ntina oyo Nzambe ya bolingo atiki bampasi ntango molai boye (rs lok. 376 par. 4)
No. 4: Lolenge nini ya losambo ya bikeko tosengeli kokima?
12 Yuni Botángi ya Biblia: Nzembo 38-44 Loyembo 216
Toli mpo na koloba malamu: Komonisa mayoki (be lok. 119 par. 6–lok. 120 par. 5)
No. 1: Mosala ya elimo ya Nzambe mpo na komikundola makambo (be lok. 19 par. 2–lok. 20 par. 3)
No. 2: Nzembo 40:1-17
No. 3: Siansi ya solosolo ekeseni na Biblia te
No. 4: Nzambe akosilisa bampasi nyonso oyo ezali kokómela basaleli na ye (rs lok. 377 par. 1-4)
19 Yuni Botángi ya Biblia: Nzembo 45-51 Loyembo 104
Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kosala bajɛstɛ mpe kosalela elongi (be lok. 121 par. 1-4)
No. 1: Yesu akoya ntango nini? (w04 1/3 lok. 16, etanda)
No. 2: Nzembo 46:1–47:9
No. 3: Mpo na nini Nzambe akangaki miso na lisumu ya Adama te? (rs lok. 377 par. 5–lok. 378 par. 1)
No. 4: Ndenge nini moklisto akoki kozala na bolɛmbu kasi mpe na nguya? (2 Kol. 12:10)
26 Yuni Botángi ya Biblia: Nzembo 52-59 Loyembo 103
Toli mpo na koloba malamu: Kosala bajɛstɛ mpe kosalela elongi (be lok. 122 par. 1–lok. 123 par. 3)
Bozongeli ya koloba
3 Yuli Botángi ya Biblia: Nzembo 60-68 Loyembo 45
Toli mpo na koloba malamu: Kotala bato oyo bazali koyoka yo na mosala ya kosakola (be lok. 124 par. 1–lok. 125 par. 4)
No. 1: Komikitisa ya Yehova elimboli nini mpo na biso (w04 1/11 nk. 29-30)
No. 2: Nzembo 60:1–61:8
No. 3: Lokola tosalaka misala oyo baklisto basengeli kosala, yango elongoli biso mokumba ya kotosa mibeko ya Nzambe?
No. 4: Maladi mpe konyokwama na makanisi euti na Nzambe te (rs lok. 378 par. 2-4)
10 Yuli Botángi ya Biblia: Nzembo 69-73 Loyembo 225
Toli mpo na koloba malamu: Kotala bato oyo bazali koyoka yo ntango ozali kosala lisukulu (be lok. 126 par. 1–lok. 127 par. 2)
No. 1: Mpo na nini esengeli omipesa na kotánga? (be lok. 21 par. 1–lok. 23 par. 3)
No. 2: Nzembo 71:1-18
No. 3: Lokola Yehova azali bolingo, akosala ete bana mike mpe bázwa matomba ya mbeka ya lisiko ya Klisto (rs lok. 378 par. 5)
No. 4: gNtina oyo baklisto basengeli koponaka bilongi te
17 Yuli Botángi ya Biblia: Nzembo 74-78 Loyembo 28
Toli mpo na koloba malamu: Na mosala ya kosakola, lobá ndenge omeseni koloba (be lok. 128 par. 1–lok. 129 par. 1)
No. 1: Zalá na mokano malamu ntango ozali kotánga (be lok. 23 par. 4-lok. 26 par. 4)
No. 2: Nzembo 75:1–76:12
No. 3: Koluka Yehova elimboli nini? (Sef. 2:3)
No. 4: Nzambe atindaka te koningana ya mabelé, mpela, to mipɛpɛ makasi mpo na kopesa bato etumbu (rs lok. 379 par. 1-3)
24 Yuli Botángi ya Biblia: Nzembo 79-86 Loyembo 112
Toli mpo na koloba malamu: Na makita, lobá ndenge omeseni koloba (be lok. 129 par. 2–lok. 130 par. 1)
No. 1: “Hema ya basembwi ekofulisama” (w04 15/11 lok. 26 par. 1–lok. 28 par. 2)
No. 2: Nzembo 82:1–83:18
No. 3: Ntango tozali konyokwama, tókanisa te ete Yehova aboyi biso (rs lok. 380 par. 1-2)
No. 4: Bato ya kozanga kokoka bakoki mpenza kosepelisa Nzambe?
31 Yuli Botángi ya Biblia: Nzembo 87-91 Loyembo 57
Toli mpo na koloba malamu: Ntango ozali kotánga liboso ya bato mingi, lobá ndenge omeseni koloba (be lok. 130 par. 2-4)
No. 1: Ntango ‘kozwa boyebi ezali mpasi te’ mpe bwanya ezali kotambwisa biso (w04 15/11 lok. 28 par. 3–lok. 29 par. 7)
No. 2: Nzembo 89:1-21
No. 3: Koyekola Biblia ezali na kati ya losambo na biso
No. 4: Esengeli te kotalela bozwi lokola elembo ya lipamboli ya Nzambe (rs lok. 380 par. 3-4)
7 Aug. Botángi ya Biblia: Nzembo 92-101 Loyembo 190
Toli mpo na koloba malamu: Bopɛto na biso ekumisaka nsango oyo tozali kosakola (be lok. 131 par. 1-3)
No. 1: Ndenge ya koyekola (be lok. 27 par. 1–lok. 31 par. 2)
No. 2: Nzembo 92:1–93:5
No. 3: Koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge emonisaka ete moto azali na elimo ya Nzambe? (rs lok. 219 par. 3–lok. 220 par. 3)
No. 4: Ntina ya kozala na etamboli ya sembo
14 Aug. Botángi ya Biblia: Nzembo 102-105 Loyembo 1
Toli mpo na koloba malamu: Kolekisa ndelo te mpe kozala na makanisi malamu etindaka moto alata mpe abongisa nsuki na ndenge ya malamu (be lok. 131 par. 4–lok. 132 par. 3)
No. 1: ‘Misala na yo mingi boni, Ee Yehova!’ (w04 15/11 nk. 8-9)
No. 2: Nzembo 104:1-24
No. 3: Ntina oyo tosengeli kokɛngɛlaka
No. 4: Mpo na nini koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge lelo oyo ekeseni na oyo ya ekeke ya liboso? (rs lok. 220 par. 4–lok. 221 par. 2)
21 Aug. Botángi ya Biblia: Nzembo 106-109 Loyembo 201
Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kolata malamu (be lok. 132 par. 4–lok. 133 par. 1)
No. 1: Bilenge—Bólanda baninga na bino bilandalanda te (w04 15/10 lok. 22 par. 4–lok. 24 par. 5)
No. 2: Nzembo 107:20-43
No. 3: Liloba ya Nzambe esalisaka biso tóyeba soki bato oyo balobaka ete bazali na elimo ya Nzambe balobaka solo (rs lok. 221 par. 4-lok. 222 par. 1)
No. 4: Na makambo nini tokoki komekola Nzambe?
28 Aug. Botángi ya Biblia: Nzembo 110-118 Loyembo 125
Toli mpo na koloba malamu: Elateli mpe monzɛlɛ ya malamu ekobɛtisa bato libaku te (be lok. 133 par. 2-4)
Bozongeli ya koloba
4 Sɛt. Botángi ya Biblia: Nzembo 119 Loyembo 59
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya malamu ya kotɛlɛma liboso ya bato mpe bisaleli ya pɛto (be lok. 133 par. 5–lok. 134 par. 4)
No. 1: Koyekola epesaka mbano (be lok. 31 par. 3–lok. 32 par. 3)
No. 2: Nzembo 119:25-48
No. 3: Ntina oyo totosaka bakonzi ya Leta
No. 4: Lelo oyo koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge ezali elembo ya baklisto ya solo te (rs lok. 222 par. 2-4)
11 Sɛt. Botángi ya Biblia: Nzembo 120-134 Loyembo 65
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosilisa kobanga ntango ozali koloba (be lok. 135 par. 1–lok. 137 par. 2)
No. 1: Ndenge ya kolukaluka na mikanda (be lok. 33 par. 1–lok. 35 par. 2)
No. 2: Nzembo 121:1–123:4
No. 3: Likabo ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge esengelaki kosuka ntango nini? (rs lok. 222 par. 5–lok. 223 par. 1)
No. 4: Maloba ya elilingi ya kolekisa ndelo ezali nini, mpe ndenge nini Yesu asalelaki yango?
18 Sɛt. Botángi ya Biblia: Nzembo 135-141 Loyembo 97
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosilisa kobanga ntango ozali koloba (be lok. 137 par. 3–lok. 138 par. 5)
No. 1: Nzembo—Litomba na yango—Eteni 1 (si nk. 104-105 par. 23-27)
No. 2: Nzembo 136:1-26
No. 3: Na ndimbola nini Ekaniseli ezali bolei ya bato ebele?
No. 4: hLiteya ya Bosato euti na Biblia te (rs lok. 412 par. 1–lok. 418 par. 3)
25 Sɛt. Botángi ya Biblia: Nzembo 142-150 Loyembo 5
Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kosalela mikro (be lok. 139 par. 1–lok. 140 par. 2)
No. 1: Nzembo—Litomba na yango—Eteni 2 (si nk. 105-106 par. 28-32)
No. 2: Nzembo 142:1–143:12
No. 3: iSoki moto moko alobi ete: ‘Ondimaka liteya ya Bosato?’ (rs lok. 432 par. 2–lok. 433 par. 4)
No. 4: Na ndenge nini tokoki kotya matomba ya basusu liboso ya oyo ya biso moko?
2 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Masese 1-6 Loyembo 111
Toli mpo na koloba malamu: Salelá mikro malamu (be lok. 140 par. 3–lok. 142 par. 2)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Masese—Eteni 1 (si nk. 106-107 par. 1-5)
No. 2: Masese 5:1-23
No. 3: Mpo na nini mabe etondi na mokili? (rs lok. 237 par. 2-lok. 238 par. 1)
No. 4: jKopanza masolo ya lokuta te (2 Tim. 4:4)
9 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Masese 7-11 Loyembo 73
Toli mpo na koloba malamu: Kosalela Biblia mpo na kopesa biyano (be lok. 143 par. 1-3)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Masese—Eteni 2 (si nk. 107-108 par. 6-11)
No. 2: Masese 7:1-27
No. 3: Koboya kokɔta na makambo ya politiki esalaka ete tózala na bomoko
No. 4: Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe? (rs lok. 238 par. 2–lok. 239 par. 2)
16 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Masese 12-16 Loyembo 180
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalela Biblia malamu koleka (be lok. 144 par. 1-4)
No. 1: Yekolá kolukaluka na mikanda mosusu (be lok. 35 par. 3–lok. 38 par. 4)
No. 2: Masese 14:1-21
No. 3: Matomba nini tozali kozwa na ndenge Nzambe atiki nzela na mabe? (rs lok. 240 par. 1-2)
No. 4: Nini ekoki kosalisa biso tólandaka makita na likebi mpenza?
23 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Masese 17-21 Loyembo 131
Toli mpo na koloba malamu: Kolendisa bato básalela Biblia (be nk. 145-146)
No. 1: Masese—Litomba na yango—Eteni 1 (si nk. 109-110 par. 19-28)
No. 2: Masese 17:1-20
No. 3: Ndenge oyo baklisto batalelaka mibange
No. 4: kBiblia elendisi biso tótalelaka basi ndenge nini? (rs lok. 157 par. 2-3)
30 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Masese 22-26 Loyembo 9
Toli mpo na koloba malamu: Ntina ya kobimisa makanisi ya bavɛrsɛ liboso ya kotánga yango (be lok. 147 par. 1–lok. 148 par. 2)
Bozongeli ya koloba
6 Nov. Botángi ya Biblia: Masese 27-31 Loyembo 51
Toli mpo na koloba malamu: Kopona maloba oyo ebongi liboso ya kotánga vɛrsɛ (be lok. 148 par. 3–lok. 149 par. 2)
No. 1: Masese—Litomba na yango—Eteni 2 (si nk. 110-111 par. 29-38)
No. 2: Masese 28:1-18
No. 3: Bokonzi ya mibali ezali nde kokitisa basi? (rs lok. 157 par. 4-lok. 158 par. 2)
No. 4: Ntina oyo tosengeli kosuka te na kotalela bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola kaka na ndenge oyo bazali komonana na miso
13 Nov. Botángi ya Biblia: Mosakoli 1-6 Loyembo 25
Toli mpo na koloba malamu: Konyata maloba ya ntina esɛngi mpe komonisa mayoki na yo (be lok. 150 par. 1-2)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Mosakoli (si nk. 112-113 par. 1-8)
No. 2: Mosakoli 5:1-15
No. 3: Ndenge nini Nzambe abombi mateya ya solo ya Biblia liboso ya bato ya bwanya mpe bato ya mayele? (Mat. 11:25)
No. 4: Basi basengeli kozala baministre? (rs lok. 158 par. 3–lok. 159 par. 1)
20 Nov. Botángi ya Biblia: Mosakoli 7-12 Loyembo 37
Toli mpo na koloba malamu: Konyata maloba oyo ebongi (be lok. 150 par. 3–lok. 151 par. 3)
No. 1: Mosakoli—Litomba na yango (si lok. 114 par. 15-19)
No. 2: Mosakoli 9:1-12
No. 3: Mpo na nini ntango mosusu basi baklisto balataka litambala? (rs lok. 159 par. 2–lok. 160 par. 1)
No. 4: Mpo na nini zuwa ezali mabe?
27 Nov. Botángi ya Biblia: Loyembo ya Salomo 1-8 Loyembo 11
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya konyata maloba ya ntina (be lok. 151 par. 4–lok. 152 par. 5)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Loyembo ya Salomo mpe Litomba na yango (si nk. 115-117 par. 1-4, 16-18)
No. 2: Loyembo ya Salomo 7:1–8:4
No. 3: Mpo na nini baklisto basengeli kolata malamu mpe kozala pɛto?
No. 4: Ebongi mpenza ete mwasi asalaka monzɛlɛ to alataka babiju? (rs lok. 161 par. 1-3)
4 Des. Botángi ya Biblia: Yisaya 1-5 Loyembo 90
Toli mpo na koloba malamu: Komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ (be lok. 153 par. 1–lok. 154 par. 3)
No. 1: Maloba ya ebandeli na Yisaya (si nk. 118-119 par. 1-8)
No. 2: Yisaya 3:1-15
No. 3: Mokili ekobebisama na mɔtɔ? (rs lok. 250 par. 2-3)
No. 4: lNtina oyo baklisto basengeli “koyokaka nkanda noki te” (Yak. 1:19)
11 Des. Botángi ya Biblia: Yisaya 6-10 Loyembo 204
Toli mpo na koloba malamu: Monisá polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ (be lok. 154 par. 4–lok. 155 par. 4)
No. 1: Ndenge ya kosala plan ya lisolo na yo (be nk. 39-42)
No. 2: Yisaya 10:1-14
No. 3: Mpo na nini koyeba kolimbisa basusu ezali na ntina?
No. 4: Nani azali koyangela mokili oyo: Nzambe to Satana? (rs lok. 250 par. 3–lok. 251 par. 3)
18 Des. Botángi ya Biblia: Yisaya 11-16 Loyembo 47
Toli mpo na koloba malamu: Kosolola na bato na lisalisi ya Makomami (be lok. 155 par. 5–lok. 156 par. 4)
No. 1: Bilenge—Bótika baboti na bino básalisa bino na kobatela mitema na bino (w04 15/10 lok. 20 par. 1–lok. 22 par. 3)
No. 2: Yisaya 11:1-12
No. 3: Ndenge nini baklisto ya solo batalelaka mokili mpe bato ya mokili? (rs lok. 251 par. 4–lok. 252 par. 4)
No. 4: Baklisto ya solo bakobunda etumba ya Armagedona te
25 Des. Botángi ya Biblia: Yisaya 17-23 Loyembo 53
Toli mpo na koloba malamu: Komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koloba (be lok. 157 par. 1–lok. 158 par. 1)
Bozongeli ya koloba
[Footnotes]
a Ekopesama kaka na ndeko mobali.
b Ekopesama kaka na ndeko mobali.
c Ekopesama kaka na ndeko mobali.
d Ekopesama kaka na ndeko mobali.
e Ekopesama kaka na ndeko mobali.
f Ekopesama kaka na ndeko mobali.
g Ekopesama kaka na ndeko mobali.
h Na lisolo bapesi yo, poná mwa makanisi ya ntina oyo etali mpenza teritware na bino.
i Na lisolo bapesi yo, poná mwa makanisi ya ntina oyo etali mpenza teritware na bino.
j Ekopesama kaka na ndeko mobali.
k Ekopesama kaka na ndeko mobali.
l Ekopesama kaka na ndeko mobali.