Monisá ete osepelaka na bato—Na kozaláká na boboto
1 Mwasi moko oyo azalaki kokanisela Batatoli mabe azali kokanisa lisusu mbala ya liboso oyo akutanaki na Motatoli ya Yehova moko, alobi boye: “Nayebi lisusu te makambo nini tolobelaki, kasi eloko nabosanaka te ezali boboto na ye, ndenge oyo ayambaki ngai mpe ezaleli na ye ya komikitisa. Nasepelaki mingi na bomoto na ye.” Maloba oyo emonisi ntina ya kosepela na bato oyo tosakwelaka bango nsango malamu.—Filp. 2:4.
2 Bolingo ezali na boboto: Lolenge moko ya komonisa ete tolingaka basusu ezali ya komonisela bango boboto. (1 Kol. 13:4) Moto ya boboto amibanzabanzaka mpenza mpo na bolamu ya basusu, mpe alukaka oyo akoki kosala mpo na kosalisa bango. Toyebi ete mosala ya kosakola yango moko emonisaka ete tozali na boboto. Kasi, soki tomibanzabanzaka mpenza mpo na bato, tokosuka kaka te na kosakwela bango. Makambo nyonso oyo tokosala ntango tozali elongo na bato—ndenge oyo tozali kosepela na bango, bizaleli na biso ya malamu, ndenge oyo tozali koyoka bango, makambo oyo tozali koloba na bango mpe ndenge oyo tozali koloba yango, ata mpe ndenge oyo tozali kotala bango—ekomonisa ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na bango.—Mat. 8:2, 3.
3 Soki tomibanzabanzaka na bolingo mpenza mpo na basusu, tokosalisa bango mpenza. Mwasi moko ya mobange oyo akufelá mobali abenganaki ndeko mobali moko mobongisi-nzela oyo azalaki kosakola ndako na ndako ntango ayebaki ete azali Motatoli. Mwasi yango ayebisaki ndeko yango ete ntango ngonga ya porte elelaki, azalaki komeka kotya ampulɛ ya sika na kuku na ye. Ndeko mobali alobaki na ye ete “ezali likama mpo na yo kosala yango yo moko.” Mwasi yango asɛngaki ndeko mobali akɔta na ndako. Ndeko mobali atyelaki ye ampulɛ yango mpe akendaki. Ntango mwana ya mwasi yango ya mobali ayaki kotala ye, mwasi yango ayebisaki ye likambo oyo elekaki. Mwana mobali yango akamwaki mpenza mpe akendaki koluka ndeko yango mpo na kopesa ye matɔndi. Basololaki malamu, mpe mwana yango andimaki koyekola Biblia.
4 Soki tozali na boboto, tokomonisa bolingo ya Yehova mpo na bato mpe tokokómisa nsango ya Bokonzi lisusu kitoko koleka. Na bongo, tiká ntango nyonso ‘tómilobela lokola baministre ya Nzambe . . . na motema malamu.’—2 Kol. 6:4, 6.