Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/05 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 10/05 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye mpe mwa buku Azali kosɛnga. Novɛmbɛ: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, tokolakisa bango buku Boyebi to trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.

◼ Lokola sanza ya Ɔkɔtɔbɛ ekozala na bawikende mitano, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali “Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2006.” Tosengeli kobatela yango malamu mpo tokosalela yango na mobu 2006 mobimba.

◼ Kobanda na pɔsɔ ya 17 Aprili 2006, tokoyekola buku Biblia eteyaka mpenza nini? na boyekoli ya mokanda ya lisangá. Masangá basengeli kozala na buku yango mwa mingi, ezala oyo ya makomi ya mike to oyo ya makomi ya minene.

◼ Esengeli te kosalela adrɛsi ya biro mpo na kotinda mikanda na biso moko. Yango etaleli mpe nkoma to eloko nyonso oyo tolingi kotinda mpo na kopesa litatoli epai ya bato oyo basepelaka na solo, bato oyo tokutaki bango na bandako na bango te, to baoyo bafandaka na bisika oyo ezali mpasi mpo na kokutana na bango. Mbala mosusu mosakoli akomona malamu kosalela adrɛsi na ye moko, mpamba te mosala na ye ya kosakola ezali mpe kosɛnga ete asalela biloko na ye mosusu na mosala ya Nzambe. (Mat. 28:​19, 20; Lom. 10:​14, 15) Kasi, soki amoni ete ekozala malamu te asalela adrɛsi na ye moko ntango azali kopesa litatoli na nzela ya nkoma, akoki kosalela adrɛsi ya Ndako ya Bokonzi.​—⁠Talá Biyano na mituna na bino na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2002.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto