Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/00 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 31 Yanuali
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Febwali
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 1/00 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Yanuali

Loyembo 107

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Tóyebisa nkombo ya Yehova na mokili mobimba.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá makanisi oyo etaleli ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu ndenge emonisami na buku Lisanga, na lok. 94 kino 95.

Min. 20: Lolenge ya kopona mwango oyo eyokani na mibeko ya Leta wana tolingi kosalisa nzoto kozanga kozongisama makila. (Mis. 15:28, 29). Na nsima ya likita Batatoli oyo bazwá batisimo bakozwa kalati Instructions médicales/​Pas de sang ya sika, mpe baoyo bazali na bana oyo bazwi naino batisimo te bakozwa Carte d’identité mpo na mwana mokomoko. Bótondisa kalati yango bobele na ntango wana te. Esengeli kokende kosala yango na likebi nyonso na ndako, kasi KOTYA SINYATILI TE. Sinyatili ya nkolo kalati, nkombo ya batemwe mpe dati ekotyama na bakalati nyonso na nsuka ya boyekoli ya mokanda ya pɔsɔ oyo ekolanda, na litambwisi ya ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli ya mokanda. Liboso ya kotya sinyatili, osengeli komindimisa ete otondisi kalati na yo malamu. Baoyo bazali kotya sinyatili lokola batemwe basengeli komona wana mokóló kalati azali kotya sinyatili na ye na kalati. Soki bandimi makambo oyo ezali na kati ya kalati, basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokoma yango na lokasa mosusu mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango. Motambwisi ya boyekoli ya mokanda asengeli komindimisa ete bandeko nyonso oyo bazali na etuluku ya boyekoli ya mokanda basili kozwa lisungi oyo ebongi mpo na kotondisa kalati Instructions médicales/​Pas de sang.

Loyembo 155 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Yanuali

Loyembo 12

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Mokomeli ya lisangá akolobela makambo oyo ezali na mokanda ya 15 Sɛtɛmbɛ 1999 oyo etindamaki na masangá nyonso. Makambo yango ezali na ntina mingi mpenza mpamba te tozali lisusu kokata motuya ya mbongo te mpo na mikanda na biso. Komande ya mikanda oyo ebengami articles sur demande spéciale ekoleka na nzela ya lisangá. Monisá ete moto nyonso akoki kozwa boyebi ya sikisiki. Yango etaleli te bozwi oyo moto azali na yango. Mikanda articles sur demande spéciale ezali na ntina te mpo na kosalisa bato oyo babandi kosepela na solo sika ete bákóma na boyokani malamu elongo na Nzambe.

Min. 20: “Tósalela batrakte mpo na kobanda lisolo.” Lobelá batrakte minei oyo esalelamaka mingi na teritware. Tuná motuna moko oyo eyano ekozwama na trakte mokomoko. Sɛngá na bayangani ete báloba ndenge nini tokoki kosalela motuna yango mpo na kobanda lisolo to mpe mbala mosusu kobanda koyekola Biblia na moto. Salá elakiseli na batrakte mibale mpo na komonisa ndenge yango ekoki kosalema. Ndeko oyo akosala eteni oyo akomonisa ete basakoli nyonso basengeli koyekola ndenge ya kobanda lisolo na trakte. Ebongiseli ya sika oyo etaleli makabo ezali kosɛnga ete tósolola na bato liboso ya kolakisa bango mokanda mpo na koyeba soki basepeli mpenza na nsango oyo tomemeli bango. Batrakte ezali bisaleli oyo ebongi mpenza.

Loyembo 57 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Yanuali

Loyembo 110

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Tótalelaka Liloba ya Yehova mokolo na mokolo!” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lendisá bandeko nyonso ete básalela malamu mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2000. Lobelá maloba ya ebandeli ya mwa buku yango oyo ezali na lok. 3 kino 4. Sɛngá na basakoli ete báyebisa ndenge basalaka milende mpo na kotalela malamumalamu mokapo ya mokolo mpe komantere na yango mokolo na mokolo, bango moko mpe na kati ya mabota na bango.

Min. 25: “Tósalela mikanda na mayele.” Ekosalema na mituna mpe biyano na mokɛngɛli na mosala. Nsima ya kotalela par. 7, salá mwa bilakiseli mibale to bilakiseli misato oyo ebongisami malamu, ekomonisa ndenge ya kolanda makanisi mosusu oyo ezali na par. 4 kino 7. Bandeko oyo batambwisaka likita ya mosala ya kosakola balendisami na kolobela makanisi yango ntango bazali kotambwisa likita ya mosala ya kosakola.

Loyembo 157 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 31 Yanuali

Loyembo 16

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yanuali. Lobelá mokanda oyo tokokabola na Febwali: Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Lakisá ndenge tokoki kosalela mituna misato oyo ezali na etanda na lok. 12 ya buku yango mpo na kobanda lisolo elongo na moto.

Min. 15: Eyano na motuna oyo etali ‘Kotya elembo.’ Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1999, lok. 29 kino 31.

Min. 18: Ndenge ya kosalisa bato mosusu báyeba lingomba ya solo. Lisolo kati na mosaleli moko ya misala oyo azali molobi malamu mpe basakoli mibale to misato ya makoki. Bakolobela ndenge oyo bato bakoki kosepela na Batatoli ya Yehova kasi bayebi mpenza te kosala bokeseni kati na mangomba mosusu mpe lingomba na biso. Lobelá makambo zomi oyo ezali na Lamuká! ya 8 Mai 1995 na lok. 20 (na Lifalanse). Limbolá ete soki moto ya motema sembo ayebi makambo oyo, yango ekosalisa ye amona bokeseni oyo ezali kati na losambo ya solo mpe losambo ya lokuta mpe ntina ya koyekola na libota ya Yehova mpe kosangana na biso.

Loyembo 60 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 7 Febwali

Loyembo 113

Min. 8: Mayebisi ya lisangá.

Min. 17: Tyá likebi na esakweli ya Danyele! Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá makambo ya ntina oyo ezali na buku ya sika: Mitó ya makambo ya mikapo oyo ezali kobenda likebi, bililingi kitoko, bitanda oyo ezali na mituna na nsuka ya lisolo mokomoko, bakalati mpe bitanda oyo ezali kopesa bandimbola likoló na makambo mikemike. Talelá ndimbola ya kolendisa oyo emonisi ete Mikaele akotɛlɛma na ndenge ya kokamwa. (lok. 288 kino 290) Lobelá ntina oyo tosengeli koyika mpiko lokola bateyi ya Liloba ya Nzambe. (lok. 311 kino 312) Biso nyonso tosengeli kotánga buku oyo malamumalamu mpe kolendisa bato oyo bazali kosepela na solo ete básala mpe bongo.

Min. 20: Basalaki liponi malamu. Lisukulu ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1997 lok. 19 kino 21, par. 3 kino 16. Yebisá maloba ya babongisi-nzela ya molende, komonisáká ntina oyo bazali komona ete basaleli bomoi na bango na lolenge moko ya malamu mpenza, oyo ezali kopesa matomba, oyo ememelaki bango esengo mpe bosepeli. Lendisá bayangani nyonso ete bákanisa makambo yango malamu mpe bátalela makoki na bango soki bakoki mpe kokóma babongisi nzela.

Loyembo 182 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto