Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/00 lok. 1
  • Tóyebisa nkombo ya Yehova na mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyebisa nkombo ya Yehova na mokili mobimba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mayele oyo tosaleli​​—Ebele ya bato bayoki nsango malamu
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Mpo na nini kosakola ndako na ndako ezali na ntina mingi lelo oyo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tósakola nsango malamu bipai nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 1/00 lok. 1

Tóyebisa nkombo ya Yehova na mokili mobimba

1 Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye ete bázala batatoli “kino na nsuka ya mokili,” asilaki kopesa bango ndakisa oyo basengeli kolanda. (Mis. 1:8) Ntango nyonso mpe esika nyonso oyo azalaki kokutana na bato, azalaki koyebisa bango mokano ya Nzambe mpo na bato. Na ndakisa ya Yesu, kelasi ya moombo ya sembo mpe ya mayele ezali kosalela myango ndenge na ndenge mpo na kosala ete nkombo ya Yehova ‘eyebana na mokili mobimba.’​—Yis. 12:4, 5.

2 Oyo ezalaki kosalema kala: Na bambula oyo eleká, bazalaki kobimisa masolo ya kosolola na Biblia na bazulunalo; basalaki “Fɔtɔ-Drame ya bozalisi” mpe balakisaki bamilio ya bato fɔtɔ-drame yango; bazalaki kosalela mpe bavuatire na bikoliseli lolaka; mpe basalelaki mingi fono mpe, na boumeli ya mwa ntango basalelaki radio​—nyonso wana mpo na kosakola nsango malamu. Ya solo, likebi monene ezali ntango nyonso kotyama na likambo ya kokende kokutana na bato mpo na kolandela malamu mposa oyo bamonisi mpo na solo. Yango wana, emonani ete mosala ya kosakola ndako na ndako ezali lolenge oyo eleki malamu mpo na koyebisa nkombo ya Yehova bipai nyonso.​—Mis. 5:42.

3 Oyo ezali kosalema na mikolo na biso: Lokola makambo ezali kobongwana mokili ekómi na yikiyiki makasi, mpe na bisika mingi bato bazalaka mpenza mingi te na bandako na bango. Kaka bato moke nde basepelaka kolekisa ntango mpo na kotánga mpe kokanisa makambo ya elimo. Yango wana tosengeli koyokanisa mosala na biso ya kosakola na makambo yango nyonso. Longola likambo ya kolanda kosakola ndako na ndako na teritware, tolendisamaki na kokende koluka bato bisika oyo bango bazali mpe tózala ‘ntango nyonso pene’ ya kozongisa monɔkɔ mpo na elikya oyo tozali na yango. (1 Pet. 3:15) Yango elimboli ete tosengeli kosala makasi mpo na kosakwela baninga na biso ya mosala, baninga na biso ya kelasi, bato oyo tozali kokutana na bango na nzela mpe na bawenze to na bisika bazelaka mituka, na bamagazini, mpe na bisika mosusu nyonso oyo tokoki kokutana na bato. Lokola Yehova azali kosunga biso, milende na biso ekobimisa matomba ya malamu mpenza. Okendaka koluka bato bisika nyonso oyo bazali mpo na kosolola na bango?

4 Tiká ete ntango tozali kosakola, mokomoko ameka kosala nyonso oyo akoki kosala mpo na koyebisa nkombo ya Yehova na teritware na biso. Tokozwa esengo mpenza soki tozali kosala mosala na biso malamu, awa tozali kotalela Yehova ete abenda bato ya mitema sembo.​—Yoa. 6:44.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto