Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1986 soki ezali na lisangá. Masangá oyo ezali na buku yango te ekoki kokabola babuku oyo elandi: La vie: Comment est-elle apparue? Évolution ou création? to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
◼ Na sanza ya Yanuali mpe ya Febwali masangá ya Katanga ekokabola mwa babuku Bilimu ya bakufi mpe Ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso. Bakotinda komande na bango na depo ya Lubumbashi.
◼ Ntango bakomeli ya masangá bazali kotinda mikanda na biro, basengeli kokoma yango na Lifalanse, longola bobele soki ezali ata na nkulutu moko te oyo ayebi kokoma Lifalanse.
◼ Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ya 10 Yanuali, basakoli nyonso oyo bazwá batisimo bakozwa kalati Instruction médicales/Pas de sang mpe Carte d’identité mpo na bana na bango.
◼ Kobanda na sanza ya Febwali, mpe eleka mokolo ya 5 Marsi te, lisukulu ya sika mpo na bato nyonso oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakosala na masangá ezali na motó ya likambo ete “Armagedon—Mpo na nini mpe ntango nini?”
◼ Masangá masengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli, yango ekosalema mbula oyo na mokolo ya misato mwa 19 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, limpa na vinyo esengeli kolekisama nsima ya kolala ya moi. Bótala malamu ngonga oyo moi elalaka na esika oyo bozali. Atako ezali malamu ete masangá masala molulu ya Ekaniseli na bisika bikeseni, yango ekoki ntango nyonso kosalema bongo te. Epai oyo masangá mingi mazali kosala makita na bango na Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu likoki ekozala ete moko na masangá yango to mingi esalela bisika mosusu na mpokwa wana. Soki likoki ezali bokoki kotika miniti 40 kati na makita mibale mpo na kozwa ntango ya kopesa babyangami mbote, kolendisa bato oyo babandi kosepela na solo sika. Yango ekosala ete bato bázwa mpenza litomba na libaku yango.
◼ Lisukulu ya sipesiale mpo na mobu 2000 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema mokolo ya lomingo mwa 16 Aprili. Motó ya likambo na yango ezali: “Ntina oyo bato bazali na mposa ya lisiko.” Plan na yango ekotindama nsima. Masangá oyo mokɛngɛli ya zongazonga akotala to oyo makozala na liyangani ya zongazonga to na liyangani ya mokolo moko na pɔsɔ yango, makosala lisukulu ya sipesiale na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya mokolo ya 16 Aprili 2000.