Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/98 lok. 2
  • Makita ya mosala mpo na Apríli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya mosala mpo na Apríli
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Apríli
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Apríli
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Apríli
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Apríli
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 4/98 lok. 2

Makita ya mosala mpo na Apríli

Pɔsɔ ebandi na 6 Apríli

Loyembo 3

Min.  5: Mayebisi ya lisangá. Mayebisi matali lisangá oyo mauti na Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 20: “Tósala mosala na bulɛɛ butu na moi.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Tángá par. 5 mpe 6.

Min. 20: “Tókɔtisa mokemoke elikya ya bomoi ya seko epai na bato mosusu.” Lisolo elongo na bayangani. Limbolá na mokuse lolenge malamu ya kotuna mituna mpo na kokoba lisolo. Pesá mwa bandakisa ya mituna ya kokamba moto mpe mituna oyo mikoki kosalelama mpo na kozwa likanisi ya moto mpe kobanda lisolo. (Talá buku Mokanda mpo na Eteyelo, nk. 51 mpe 52, par. 10 kino 12.) Elakiseli: Mosakoli moko ya makoki azali kolakisa moko na lolenge oyo epesami mpo na kobanda lisolo na ntango ya bozongeli ya sika, akomonisa mpe lolenge ya kobanda boyekoli ya Biblia.

Loyembo 88 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 13 Apríli

Loyembo 60

Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Tózwa mpenza litomba na Annuaire 1998. Elongo na libota na ye, tata moko azali kotalela nk. 3 kino 6, mpe lok. 31, oyo ezali kolobela misala ya lisangá ya Yehova na mokili mobimba na mbula oyo eleki. Azali kotalela matomba oyo libota ezwaka na kotángáká mpe komanyoláká mokapo ya mokolo mpe ndambo na masolo ya Annuaire na ntango ya bolei. Bazwi ekateli ete bakokoba kosala bongo na boumeli ya mbula mobimba.

Min. 22: “Tokosala mosala yango lisusu?” (Par. 1 kino 11) Ekosalema na mituna mpe biyano. Yebisá mwa baeksperiansi ya ntina koleka oyo euti na kampanye mpo na mosala ya mobongisi-nzela mosungi oyo esalemaki na mbula oyo eleki, engebene Annuaire 1998. Yebisá motángo ya baoyo bazalaki babongisi-nzela basungi na lisangá na bino na eleko yango. Lobelá matomba minene oyo mokomoko na biso azwaka soki asali mosala ya mobongisi-nzela, mpe lakisá lolenge milende minene yango esalisaka mpo na bokoli ya lisangá. Yebisá bibongiseli mpo na mosala ya kosakola oyo bikamatami na lisangá na bino mpo na kosunga bato mingi ete básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Nsima ya likita, basakoli bakoki kozwa formilɛrɛ mpo na mosala yango.

Loyembo 195 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Apríli

Loyembo 43

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: “Biyano na mituna na bino.” Ekosalema na mituna mpe biyano.

Min. 20: “Bana​—Bozali esengo na biso!” Ekosalema na mituna mpe biyano. Yebisá eksperiansi oyo ezwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1987 (ebimeli ya Lifalansé), lok. 25.

Loyembo 224 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Apríli

Loyembo 94

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá nkombo ya baoyo bakozala babongisi-nzela basungi na sanza ya Máí. Monisá ete ntango eleki naino te mpo na kotondisa formilɛrɛ.

Min. 20: Tóbongisa bato ya sika mpo na mosala ya kosakola. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Baoyo bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia na lisalisi ya buku Boyebi basengeli na boumeli ya ntango kosɛnga na bato oyo bazali koyekola na bango ete bábima elongo na bango na mosala ya kosakola. Bimisá makanisi oyo malobelami na buku Boyebi, na nk. 105 mpe 106, par. 14, mpe na lok. 179, par. 20. Talelá lisusu Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1988 (ebimeli ya Lifalansé), nk. 16 mpe 17, par. 7 kino 10, epai kuna malako mapesami mpo na kondima bato ya sika ete bákóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Talelá makanisi oyo mazwami na siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yulí 1996, na par. 19, mpo na kosalisa basakoli ya sika oyo bazwi naino batisimo te ete báyeba komibongisa mpo na kobima na mosala ya kosakola.

Min. 15: Myango mpo na kolonga bolɛmbu ya elimo. Bankulutu mibale bazali kosolola likoló na makambo oyo mazwami na etanda na lok. 19 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1986 (ebimeli ya Lifalansé). Na kosaleláká Makomami, limbolá lolenge moto nyonso akoki kolonga mokomoko na “Bilembo [yango] ya bolɛmbu” na lisalisi ya “Myango mpo na koyika mpiko” oyo mityami na loboko ya mobali ya etanda yango. Na nsima, tuná basakoli mibale oyo bakoyebisa lolenge basalelaki myango yango mpe lolenge nini yango esalisaki bango mpo ete bázala ntango nyonso makasi na elimo.

Loyembo 47 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto