Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/98 lok. 2
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 4/98 lok. 2

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Apríli: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato. Máí mpe Yúni: Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Yulí: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ezali na libombo ya lisangá, kati na babuku oyo: Ndenge nini okoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika; Boyoka Moteyi Monene; Kimya ya solo—Ekouta wapi?; Le bonheur — Comment le trouver ?; “Que ton royaume vienne!”; Libateli ya molongo mobimba na nse ya Boyangeli ya “Mokonzi na kimya”; Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko; Votre jeunesse — Comment en tirer le meilleur parti. Bokoki kosɛnga na la Société mwa ndambo ya babuku yango.

◼ Basakoli oyo bakani kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Máí mpe na sanza ya Yúni basengeli kokamata bibongiseli uta sikawa mpe kotondisa formilɛrɛ liboso mpenza ya dati oyo bakobanda. Kosala bongo ekosalisa bankulutu ete bákamata bibongiseli malamu mpo na mosala ya kosakola mpe básɛnga bazulunalo mpe mikanda mingi mpo na yango. Esengeli koyebisa lisangá nkombo ya baoyo nyonso bandimami mpo na kozala babongisi-nzela basungi.

◼ Manaka ya mayangani ya etúká mpo na teritware na biso euti kobongwana, engebene nkomá ya 1 Febwáli 1998. Bótalela lisusu te manaka oyo mabimisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli 1998 to manaka oyo mabimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1998.

◼ Nsima ya boyekoli ya buku Bolamu na libota, masangá ya Lingala makoyekola buku Boyebi. Manaka ya boyekoli ekobimisama sanza na sanza na Mosala na biso ya Bokonzi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto