Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/98 lok. 1
  • Bana​—Bozali esengo na biso!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bana​—Bozali esengo na biso!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Bilenge, mikano na bino ya elimo mizali nini?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Zalá na esengo na oyo okoki kosala na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Oyo okoki kosala mpo na kokokisa mikano na yo ya elimo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 4/98 lok. 1

Bana​—Bozali esengo na biso!

1 Bilenge mibali mpe basi, bosili komesana na etinda ya Yehova oyo esɛngi ete bino mpe bókoka kosangana na misala ya lisangá? (Det. 31:12; Nz. 127:3) Tosepelaka mingi ntango tomonaka bino pembeni na biso wana tozali kosambela Yehova elongo! Bosepelisaka mitema na biso ntango bofandaka kimya na makita mpe bolandaka mateya na likebi nyonso. Ntango bomekaka kopesa biyano na maloba na bino moko, yango epesaka biso esengo mpenza. Lisangá mobimba ezalaka na esengo mingi ntango bosalaka mikumba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, ntango bobimaka na esengo nyonso na mosala ya kosakola elongo na biso, mpe ntango tozali koyoka ete bozali kopesa litatoli epai na baninga na bino ya kelasi mpe epai na balakisi na bino kozanga kobanga.​—Nz. 148:12, 13.

2 Tolingi bóyeba ete tozali kotuta ntolo mpo na bino ntango tozali komona bizaleli malamu na bino, elateli kitoko na bino, etamboli malamu na bino, mpe limemya oyo bozali komonisa epai na mikóló. Tozalaka na esengo mingi mpenza na komonáká ete bozali ‘kokanisa Mozalisi na bino monene’ ntango bozali komityela mikano ya Teokrasi.​—Mos. 12:1; Nz. 110:3.

3 Bóyebisa biso mikano na bino: Mwana mobali moko ya mbula 8 alobaki na mokɛngɛli moko ya etúká ete: ‘Ya liboso, nalingi kozwa batisimo, na nsima nalingi kosala na esika ya mikro, kotambwisa mikro liboso na bandeko ya lisangá, kolakisa bandeko bisika ya kofanda, nalingi kosalisa ndeko oyo asalaka na esika ya mikanda, kotánga na boyekoli ya mokanda mpe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na nsima, nalingi kokóma mosaleli na misala, mpe nkulutu. Nakolinga mpe kokóma mobongisi-nzela mpe kokɔta na eteyelo mpo na babongisi-nzela. Na nsima, nakosepela kosala na Betele, kokóma mokɛngɛli ya zongazonga to mokɛngɛli ya etúká.’ Elenge yango azali mpenza komonisa botɔ́ndi na libaku malamu ya kosalela Nzambe!

4 Na bikólo misato oyo ezali kotalelama na filiale na biso, tozali na mposa ya bilenge mingi oyo bandimi komipesa, engebene likanisi ya Yisaya 6:8. Etumba oyo euti kosalema na teritware na biso emonisi ete kolanda bozwi ya mokili ezali likambo ya mayele te. (Mos. 2:17-19) Ezali mpenza likambo ya mayele ete tóluka bozwi ya elimo na kosaleláká Yehova na molimo na biso mobimba na boumeli ya mwa ntango oyo etikali na ebongiseli oyo esili konuna, oyo esimbami na Satana. Eteyelo mpo na kobongisa basungi (École de formation ministérielle) ezali koyamba bilenge oyo bazali minzemba, oyo bazali basaleli na misala to bankulutu. Baoyo bazali kolonga na eteyelo yango bazali kotindama bipai nyonso mpe bazali kosala lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza to babongisi-nzela minene, to bakoki kosala lokola bakɛngɛli ya zongazonga to bakɛngɛli ya etúká. Na bongo, bilenge ya lelo bakozala babongisi-nzela mpe bakɛngɛli-batamboli lobi.

5 Lokola bozali kokola na nzoto mpe na elimo, tokosepela mpe lokola ete bókokisa mikano na bino ya elimo. (Kokánisá na Luka 2:52.) Mbula na mbula, bankóto ya bilenge kati na bino bazali kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te mpe na nsima bazali kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo lokola basaleli ya Yehova oyo bamipesi. Soki na nsima, tomoni ete bokómi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe bokómi kutu basaleli ya ntango nyonso, yango ekobakisa esengo na biso. Ya solo, bana, bozali esengo na biso mpe ntina ya kozongisa masanzoli epai na Tata na biso oyo azali na likoló. Tiká ete Yehova asopela bino mapamboli mingi koleka!​—Mas. 23:24, 25.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto