Makita ya mosala mpo na Augusto
Pɔ́sɔ ebandi na 4 Augusto
10 mn: Mayebisi. Mayebisi matali Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapólo ya mosala ya kosakola ya lisangá ya sanza ya Yulí.
15 mn: “Bosembo epesameli mbano.” Ekosalama na mituna mpe biyano. Lobelá lisoló oyo ezali kati na Lamuká! ya 22 Yanuáli 1993, nk. 18-21 (ebimeli ya Lifalansé).
20 mn: “Tósalisa bazalani na biso ete bálendisama.” Lisoló elongo na bayangani. Kokanisá paragrafe 4 na 5 na makambo ya esika bofandi. Bóbongisa elakiseli moko to bilakiseli mibale na boyokani na bokɔti na masoló oyo epesami. Sɛngá na bayangani bálobela ndenge babandaki masoló na lisalisi ya mwa babúku yango na balolenge ekeseni. Okolendisa kosalelama ya maloba ya pɛtɛɛ mpe oyo eponami malamu mpo na kolamwisa mposa. (Talá búku Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 7, par. 9-11.) Lobelá mwa babúku mosusu oyo ezali kati na libombo ya lisangá, oyo ekoki kolakisama.
Loyembo 70 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 11 Augusto
12 mn: Mayebisi. Lapólo ya kɔ́nti. Lobelá na mokuse lisoló “Tokoyekola búku Bolamu na libota.”
18 mn: “Tósakola na bisika bato bazali.” Lisukúlu. Soki ntango epesi nzela, okolobela makambo mosusu oyo mayebisami kati na Annuaire 1997, nk. 43-46.
15 mn: Baboti: Bóteya bana na bino uta bolenge mpenza. Nkulutu moko azali kotalela mitindá ya Biblia oyo ezali kolobela ntina oyo baboti bazali na yango ya koteya bana na bango uta bolenge mpenza. (Mas. 22:6; 2 Tim. 3:14, 15) Baboti bakanisaka ete basengeli kozela ete bana bákóma na bambula oyo bakokamata bikateli bango moko mpo na koteya bango mateya ya ntina na Biblia. Yango wana bana mingi bakendeki na mokili. Mateya ya elimo masengeli kobanda uta bolenge mpenza. (g97-F 8/3 26-27; w88-F 1/8 12-13) Sololá na mobali moko mpe mwasi na ye oyo bazali komibanzabanza na elimo ya bana na bango. Monisá ete tata azali kobanda, kasi ye na mwasi na ye bazali kosala moto na moto nyonso ekoki na ye mpo na kopesa bana na bango mateya mabongi mpe ya mozindo. Bazali kolimbola milende oyo bazali kosala mpo na kokɔtisa solo epai na bana na bango na kolandáká makanisi oyo lisangá ezali kopesa mpo na kozala na manáka mabongi ya koteya na ndako. Nkulutu akolobela mingi ntina ya kosalela batoli oyo Liloba ya Nzambe ezali kopesa na baboti.—Ef. 6:1-4.
Loyembo 71 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 18 Augusto
Loyembo 14
12 mn: Mayebisi. Lobelá na mokuse lisoló “Manáka ya liyangani ya zongazonga ya mbala ekoya.”
13 mn: “Nani akokende mpo na biso?” Lisukúlu ya kolendisa. Lobelá libyangi ya kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe makambo mayebisami kati na siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mársi 1997, par. 16-17. Baoyo bakoki kozala babongisi-nzela ya sanza na sanza te bakosepela ntango mosusu kobongisa sanza moko to basanza oyo bakozala babongisi-nzela basungi na boumeli ya mbula ya mosala oyo ezali koya.
20 mn: Tómibongisa mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Mokolo na mokolo, mabaku ya kopesa litatoli epai ya bato oyo tozali kokutana na bango mazali komonana liboso na biso. Soki ezali bongo, mbala mosusu tomonaka ete tozali na Biblia te to na mikanda te. Tómilengelaka liboso. Na ndako, tózalaka na mikanda na esika ya polele, pene na ekuke epai oyo tozali koyamba bapaya. Tótya mosusu kati na ememeli na biso ya mikanda to na mwa saki ya maboko mpe tózalaka na yango to tókabola yango ntango tozali kotambola, to na bisika na biso ya mosala. Tómema mwa mikanda ntango tozali kotambola na bísi. Ntango tozali kosala mobembo ya mombongo, ntango tozali kokende na liyangani to tozali kokende na loi, tótya mwa mikanda kati na biloko na biso. Talelá makanisi mosusu oyo mapesami kati na búku Mokanda mpo na Eteyelo, nk. 80-82, par. 11-16. Bilakiseli mikuse likoló na lolenge ya kosolola na moteki, moninga ya mosala, moninga ya kelasi, moto moko oyo azali na mobembo to oyo azali na loi.
Loyembo 72 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔ́sɔ ebandi na 25 Augusto
Loyembo 15
12mn: Mayebisi. Kundwela ndeko mokomoko ete apesa lapólo na ye ya mosala ya kosakola. Lobelá lipesi ya sanza ya Sɛtɛ́mbɛ. Na sanza ya Sɛtɛ́mbɛ, tokosala makasi mpo na kozongela bato oyo totikelaki bango mwa babúku na sanza ya Augústo, mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Na lisalisi ya siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Apríli 1997, lobelá mwa makanisi ya ntina mpo na kosala bozongeli ya sika oyo ebongi. Tosengeli kobanda boyekoli na lisalisi ya mwa búku Azali kosɛnga to búku Boyebi.
15mn: “Makambo matali bokutani mbala na mbala ya mwasi na mobali mpo na libala—Ndenge nini kopɛngola makámá?” Lisoló elongo na bayangani, ekosalama na nkulutu moko.
18mn: Tókokisa malamumalamu mosala na biso ya kosakola. Lisukúlu likosalama na mokɛngɛli na mosala ya kosakola na nzela ya búku Lisanga, nk. 5-8. Lobelá mingi ntina ya mosala ya kosakola mpe monisá ete ezali mosala ya kosala nokinoki na kosɛngáká moko na moko ete akokisa mokumba na ye ya mosakoli malamu.
Loyembo 75 mpe libondeli ya nsuka.