Tósakola na bisika bato bazali
1 Na koyebáká mokumba oyo elimo ya Nzambe ekokisaki na mosala na ye ya kosakola, ntoma Paulo alobaki ete: “Nzambe akolisaki.” Andimaki mpe ete: “Tozali basalani na Nzambe elongo.” (1 Kol. 3:5-9) Ezali libaku moko malamu mpenza. Ndenge nini tokoki komonisa liboso ya bato nyonso ete tozali kosepela na lokumu ya kozala basalani elongo na Nzambe? Na kosakoláká nsango malamu epai ya bato nyonso oyo tozali kokutana na bango na litatoli ya ndako na ndako to bipai nyonso mosusu.
2 Topesameli etindá ya ‘kozalisa bayekoli.’ (Mat. 28:19) Soki, ntango tozali kosangana na mosala ya kosakola, tozali kosolola bobele na mwa bato moke, mbele tokolemba noki mpe tokomona ete tozali kosala mpenza eloko te. Epai mosusu, ntango tozali kokutana na bato mingi mpe kosolola na bango, tozali kozwa esengo mingi na mosala na biso ya kosakola. Yango ezali kosɛnga ete tósala milende, na meko oyo esengeli na biso ete tózwa ekateli ya kokende bipai oyo bato bazali mpo na kokutana na bango.
3 Bandakisa ebongi: Tokoki kopesa litatoli na zando, na parke mpe na bisika bísi etɛlɛmaka. Ntango tokɔtaka na bísi, tomibongisaka mpo na kopesa litatoli na nzela? Kati na bísi moko etondaki na bato, Batatoli mibale oyo bazalaki kokende na likita ya mosala ya kosakola babandaki kolobela elilingi ya búku Boyebi oyo ezali komonisa Paladiso mpe kosolola likoló na bilaka ya Nzambe mpo na mikolo mizali koya. Lokola bamizelaki na yango, elenge moko oyo azalaki na mopanzi na bango akɔtaki na lisoló na bango. Makambo oyo ayokaki ekamwisaki ye, na ntango ya kokita na bísi andimaki kozwa búku moko mpe asɛngaki ete báya kotala ye na ndako na ye.
4 Basakoli mingi bazali kozwa esengo na litatoli ya libaku malamu. Na nsima ya nzánga moko, ndeko moko ya mwasi akendaki na esika ya mombongo mpe abandaki kosolola na bato oyo basilisaki kosomba biloko na bango kasi bawelaki naino kozonga te. Akabolaki mikanda nyonso oyo azalaki na yango kati na saki na ye. Moto moko oyo azalaki kozela kati na vuatire na ye andimaki na esengo nyonso bazulunalo oyo ndeko mwasi alakisaki ye. Liboso azalaki koyangana na makita mpe lisoló na bango elamwisaki lisusu mposa na ye.
5 Kokumisa nkombo ya Yehova ezali libaku malamu. Na kozaláká na molende mpo na mosala ya kosakola, tozali komonisa ete totaleli ngɔlu ya Nzambe epai na biso mpamba te. “Oyo ezali ntango ebongi mpenza” ya kosalisa bazalani na biso; tókende bisika bato bazali mpe tópesa bango litatoli na ntina na “mokolo ya lobiko.”—2 Kol. 6:1, 2, NW.