“Nani akokende mpo na biso?”
Ntango Yehova atunaki motuna yango, Yisaya ayanolaki mbala moko: “Ngai oyo! Tindá ngai.” (Yis. 6:8) Lelo oyo, lokola elanga ezali monene, libyangi bobele moko wana epesami. Mposa ya basali ya ntango nyonso, babongisi nzela ya sanza na sanza ezali makasi! (Mat. 9:37) Osepeli kosala yango? Soki ɛɛ, lokola 1 Sɛtɛ́mbɛ ezali ebandeli ya mobu ya mosala 1998, ekozala ntango ebongi mpo na kobanda mosala yango. Mpo na nini te koyebisa na bankulutu ete osepeli kotondisa demande moko?