Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/9 nk. 28-31
  • Tiká ete “Liloba” ya Yehova ebatela yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tiká ete “Liloba” ya Yehova ebatela yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libota moko oyo ebatelamaki na bwanya ya Nzambe
  • Libota moko oyo ebatelamaki na mitinda
  • Tiká ete “Liloba” ya Yehova ebatela motema na yo
  • Liloba ya Nzambe ebatelaka lisangá
  • Babatelami na “nsolo kitoko”
  • Yehova abatelaka bato oyo batyelaka ye elikya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ndenge nini okoki kobatela motema na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • “Bwanya oyo euti na likoló” ezali kotambwisa yo?
    Pusaná penepene na Yehova
  • ‘Kobunda na bilimo mabe’
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/9 nk. 28-31

Tiká ete “Liloba” ya Yehova ebatela yo

NA MOBU 490 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), na etumba ya Marathon oyo ekendá nsango, bato ya Atene soki nkóto 10 to nkóto 20 babundaki na limpinga ya basoda ya Baperse oyo bazalaki ebele koleka bango. Eloko esalisaki Bagrɛki bálonga ezali mayele ya bitumba oyo babengi , elingi koloba basoda bazali kotambola bakangami esika moko. Banguba na bango ezalaki kosala lokola efelo moko boye oyo ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kopanza yango. Mpe liboso ya efelo yango ezalaki na makɔnga oyo ezalaki na bolai ya bamɛtrɛ 6. Mayele wana ya bitumba esalaki ete bato ya Atene bálonga basoda ya Perse oyo bazalaki mingi koleka bango.

Baklisto ya solo bazali kobunda etumba ya elimo. Bazali kobunda na banguna oyo bazali na makasi mingi: Bayangeli oyo bamonanaka te ya mokili oyo mabe, oyo Biblia ebengi “bayangeli ya mokili ya molili oyo, . . . mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” (Baefese 6:12; 1 Yoane 5:19) Basaleli ya Nzambe bazali kokoba kolonga, kasi na makasi na bango moko te. Lokumu nyonso ezali kokende epai ya Yehova oyo azali kobatela mpe koteya bango ndenge Nzembo 18:30 elobi: “Liloba ya [Yehova] ezali solo, ye azali nguba mpo na bango nyonso baoyo bakokima epai na ye.”

Ya solo, na nzela ya “liloba” na ye ya solo oyo ezali na kati ya Makomami Mosantu, Yehova azali kobatela basaleli na ye ya sembo na elimo. (Nzembo 19:7-11; 119:93) Mpo na bwanya oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, Salomo akomaki boye: “Tiká yango te, mpe yango ekobatela yo. Linga yango, mpe yango ekokɛngɛla yo.” (Masese 4:6, NW; Mosakoli 7:12) Ndenge nini bwanya ya Nzambe ebatelaka biso? Tótalela ndakisa ya libota ya Yisalaele ya kala.

Libota moko oyo ebatelamaki na bwanya ya Nzambe

Mobeko ya Yehova ezalaki kobatela mpe kotambwisa Bayisalaele na makambo nyonso ya bomoi. Na ndakisa, mibeko etali bilei, bopɛto mpe kotya bato ya maladi mosika na basusu, ezalaki kobatela bango na maladi ebele oyo ezalaki koboma bikólo mosusu. Kaka na ekeke ya 19, ntango bato ya siansi bayebaki ete mikrobɛ ezalaka nde babandaki kosalela makambo oyo Mibeko ya Nzambe esɛngaki. Mibeko etali ndenge ya kozwa mabelé, ya kosikola moto, ya kosilisa nyongo mpe oyo epekisaki kodefisa mpo na kozwa matabisi, ezalaki kosala ete bato mosusu ya Yisalaele bákelela te. (Deteronome 7:12, 15; 15:4, 5) Mobeko ya Yehova ezalaki kutu kobatela mabelé ya Yisalaele ebeba te! (Exode 23:10, 11) Mibeko mpo na kopekisa losambo ya lokuta mpe kofukamela bikeko ezangi bomoi, ezalaki kobatela bato na elimo mpo bademo básala bango mabe te, ezalaki kopekisa bango bápesa bana na bango mbeka te mpe mpo na makambo mosusu ebele​—Exode 20:3-5; Nzembo 115:4-8.

Ya solo, “Liloba” ya Yehova ezalaki likambo moke te mpo na Yisalaele, nzokande elimbolaki bomoi mpe bolai ya mikolo mpo na baoyo bazalaki kotosa yango. (Deteronome 32:47) Ezali mpe ndenge moko lelo oyo mpo na baoyo bazali kotosa Liloba ya bwanya ya Yehova atako baklisto bazali lisusu te na nse ya kondimana ya mibeko. (Bagalatia 3:24, 25; Baebele 8:8) Kutu, na esika ya mibeko, baklisto bazali na ebele ya mitinda ya Biblia mpo na kotambwisa mpe kobatela bango.

Libota moko oyo ebatelamaki na mitinda

Mibeko ekoki kozala na litomba mpo na bato nyonso te mpe ekoki kozala kaka mpo mwa ntango. Lokola mitinda ya Biblia ezali solo ya ntina mingi, yango wana ezalaka ntango nyonso na litomba ya libela mpo na bato nyonso. Tótalela na ndakisa etinda oyo ezali na Yakobo 3:17 oyo eteni na yango moko elobi boye: “Bwanya oyo euti na likoló ezali libosoliboso pɛto na bizaleli, na nsima kimya.” Ndenge nini solo wana ya ntina mingi ekoki kobatela basaleli ya Nzambe lelo oyo?

Kozala pɛto na bizaleli elimboli kozala pɛto na makanisi. Yango wana, baoyo balingi kozala pɛto na bizaleli basengeli kosala makasi mpo na koboya kaka te etamboli ya mbindo kasi mpe makambo oyo ememaka na etamboli yango; na kati na yango kotya makanisi na makambo oyo ekoki kolamusa mposa ya kosangisa nzoto mpe kotala bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto. (Matai 5:28) Ndenge moko mpe bafianse oyo balingi kotosa etinda oyo ezali na Yakobo 3:17, baboyaka makambo nyonso oyo ekoki kotinda bango bábungisa komipekisa. Lokola balingaka mitinda ya Yehova, babatelaka bizaleli ya pɛto, ntango mosusu bazali kokanisa ete lokola babuki mobeko te; Yehova akosepela na bango. Bayebi ete Yehova “atalaka kati na motema” mpe apesaka etumbu oyo ekoki. (1 Samwele 16:7; 2 Ntango 16:9) Bato yango ya bwanya babatelaka nzoto na bango na bamaladi ebele oyo bato bazwaka na kosangisa nzoto oyo epanzani lelo, babatelaka makanisi mpe mayoki na bango.

Yakobo 3:17 elobi ete bwanya ya Nzambe ezali mpe “kimya.” Ndenge toyebi yango, Satana azali koluka komema biso mosika na Yehova na ndenge azali kolona na mitema na biso elimo ya mobulu na nzela ya mikanda, bafilme, miziki mpe na masano mosusu ya ordinatɛrɛ oyo etindaka basani na yango na kosala mobulu mpe na koboma! (Nzembo 11:5) Eloko emonisi ete satana azali kolonga na likambo yango ezali ndenge mobulu ezali kobakisama na mokili. Na ntina na mobulu ya ndenge wana, zulunalo moko ya Australie (The Sydney Morning Herald ) etángaki na bambula eleki maloba ya Robert Ressler oyo abimisá maloba, “mobomi ya bato ebele” (tueur en série). Ressler alobaki ete babomi ya bato ebele oyo atunaki na bambula ya 1970, bazalaki kotala bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto oyo ezalaki “mabe mingi te lokola oyo ya lelo.” Na yango, Ressler alobaki ete na mikolo ezali koya babomi ya bato ebele bakokóma lisusu mingi koleka.

Ya solo, mwa basanza na nsima ya kobima ya zulunalo yango, moto moko oyo azalaki na mondoki abomaki bana-kelasi 16 ya eteyelo ya bana mike ná molakisi na bango na engumba Dunblane, na Écosse, mpe na nsima amibomaki ye moko. Na sanza oyo elandaki, moto mosusu abomaki bato 32 na Port Arthur, engumba moko ya kimya na Australie. Na bambula oyo, babomi bana mingi ya kelasi na États-Unis mpe likambo yango etindi bato mingi bámituna boye: Mpo na nini makambo yango ezali kosalema? Na Yuni 2001, balobelaki Japon mingi na bansango ntango moto moko akɔtaki na eteyelo moko mpe abomaki bana 8 na mbeli mpe azokisaki bato mosusu 15. Ezali mpasi koyeba ntina oyo bato bazali kosala makambo wana ya mabe, kasi bato bakómi komona ete bililingi ya mobulu oyo balakisaka na televizyo ezali moko ya bantina oyo etindaka bato básala mobulu. Mopanzi nsango moko ya Australie akomaki boye: “Soki piblisite moko ya segɔnde 60 ekoki kotinda bato básomba eloko moko, filme ya ngonga mibale ekoki mpenza kobongola makanisi.” Likambo ya kobenda likebi ezali ete bapolisi babɔtɔlaki bakasɛti-video 2 000 oyo ezalaki na bafilme ya bitumba mpe ya bato bazali kosangisa nzoto na ndako ya moto oyo abomaki bato na mondoki na engumba Port Arthur.

Bato oyo batosaka mitinda ya Biblia babatelaka makanisi mpe mitema na bango na lolenge nyonso ya kominanola oyo etindaka bato na mobulu. Na yango, batikaka te ete “elimo ya mokili” ebebisa makanisi mpe bamposa na bango. Kasi, ‘bateyami na elimo [ya Nzambe]’ mpe bazali kosala makasi bálinga mbuma ya elimo yango oyo moko na yango ezali kimya. (1 Bakorinti 2:12, 13; Bagalatia 5:22, 23) Bakolisaka bolingo yango ntango bazali mbala na mbala koyekola Biblia, kobondela mpe komanyola. Bazalaka te baninga ya bato oyo balingá bitumba, kasi kaka ya bato oyo bazali kozela mokili ya sika oyo Yehova alaki, oyo ekozala na kimya. (Nzembo 1:1-3; Masese 16:29) Ya solo, bwanya ya Yehova ebatelaka mpenza!

Tiká ete “Liloba” ya Yehova ebatela motema na yo

Ntango Satana amekaki Yesu na esobe, Yesu asalelaki malamumalamu Liloba ya Nzambe mpo na komonisa polele lokuta ya satana. (Luka 4:1-13) Nzokande, atyanaki te ntembe ná Satana mpo na koluka koyeba soki nani aleki na mayele. Lokola Yesu asalelaki Makomami, alobaki makambo oyo ezalaki kouta mpenza na motema; yango wana mayele mabe zabolo asalelaki na Edene elongaki epai na ye. Soki totondisi motema na biso na Maloba ya Yehova, mayele ya Satana ekolonga mpe biso te. Kotondisa mitema na biso na Liloba ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na biso, mpo “makambo ya bomoi eutaka na [motema].”​—Masese 4:23.

Lisusu, tosengeli kokoba kobatela motema na biso; tólɛmba te. Atako Satana alongaki Yesu na esobe te, atikaki komeka ye te. (Luka 4:13) Akotika mpe biso te, kasi akosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kobebisa bosembo na biso. (Emoniseli 12:17) Na yango, na ndakisa ya Yesu, tiká tókolisa mpenza bolingo mpo na Liloba ya Nzambe mpe tóbondelaka ntango nyonso mpo na kosɛnga elimo santu mpe bwanya. (1 Tesaloniki 5:17; Baebele 5:7) Yehova mpe alaki ete baoyo nyonso bazali kokima epai na ye bakozwa likama ya elimo te.​—Nzembo 91:1-10; Masese 1:33.

Liloba ya Nzambe ebatelaka lisangá

Satana akoki te kopekisa ete “ebele ya bato” oyo Biblia esakolaki bábika na bolɔzi monene. (Emoniseli 7:9, 14) Nzokande, azali komeka na ndenge nyonso kobebisa baklisto mpo Yehova aboya basusu kati na bango. Mayele wana ya mabe elongaki na Yisalaele ya kala mpe esalaki ete bato 24 000 bákufa kaka mwa moke liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. (Mituya 25:1-9) Baklisto oyo babungaki nzela mpe babongoli mpenza motema bazwaka lisalisi ya bolingo mpo bákóma lisusu makasi na elimo. Nzokande, basumuki oyo baboyaka kobongola mitema ndenge Zimili asalaki, batyaka mitema mpe elimo ya basusu na likama. (Mituya 25:14) Ndenge moko na basoda oyo bazalaki kosalela mayele ya etumba babengi; soki babwaki banguba na bango, bakomitya na likama bango moko mpe bakotya baninga na bango na likama.

Yango wana Biblia elobi boye: “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te. . . . Bólongola moto mabe na kati na bino.” (1 Bakolinti 5:11, 13) Omoni te ete “liloba” wana ya bwanya ebatelaka bopɛto ya bizaleli mpe elimo ya lisangá ya boklisto?

Nzokande, mangomba mingi ya boklisto mpe bapɛngwi bakómá komona ete biteni wana ya Biblia esilá ngala, mpamba te ezali kopekisa makambo oyo bato batalelaka lokola bizaleli malamu lelo oyo. Na yango, bazali kokanga miso na masumu nyonso ya minene oyo ata bakonzi ya mangomba mpe bazali kosala. (2 Timote 4:3, 4) Nzokande, nsima ya koloba na Masese 30:5 (NW) ete “liloba” ya Yehova ezali lokola nguba, versɛ ya 6 ebakisi boye: “Kobakisa eloko mosusu te na maloba [ya Nzambe], mpo apamela te, mpe amona yo mokosi te.” Ya solo, bato oyo bakakolaka maloba ya Biblia bazali mpenza bakosi na elimo, bakosi ya mabe koleka! (Matai 15:6-9) Na yango, tosengeli kozala na botɔndi mpenza na ndenge tozali na ebongiseli oyo etosaka mpenza Liloba ya Nzambe.

Babatelami na “nsolo kitoko”

Lokola basaleli ya Nzambe bakangamaka na Biblia mpe bayebisaka bato mosusu nsango na yango ya kobɔndisa, bapanzaka “nsolo kitoko” ya bomoi oyo ezali lokola oyo ya mpaka ya malasi, oyo esepelisaka Yehova. Kasi, ndenge Bible na lingala ya lelo oyo elobi yango, bato oyo bazali komema nsango yango babimisaka “nsòlo ya liwa oyo ezali koboma” bato bazangi boyengebene. Ya solo, ebongiseli ya Satana ebongoli mpenza ndimbola ya nsolo wana oyo bato bazangi boyengebene bayokaka, yango wana bayokaka yango nkaka to batɛmɛlaka kutu baoyo bazali kopanza “nsolo kitoko ya Klisto.” Epai mosusu, baoyo bazali kopanza nsango malamu na molende bakómaka “nsolo kitoko ya Klisto na kati ya baoyo bazali kobikisama.” (2 Bakolinti 2:14-16) Mbala mingi bato wana ya mitema sembo basepelaka te na bokosi ya mangomba ya lokuta. Yango wana, ntango tofungolaka Liloba ya Nzambe mpe totángelaka bango nsango ya Bokonzi, bakómaka na mposa ya kopusana penepene na Klisto mpe balingaka koyeba lisusu makambo mingi.​—Yoane 6:44.

Yango wana, kolɛmbaka te soki bato mosusu basepeli te na nsango ya Bokonzi oyo omemeli bango. Talelá nde “nsolo kitoko ya Klisto” lokola libateli ya elimo oyo ekimisaka bato mabe mosika na paladiso ya elimo ya basaleli ya Nzambe, kasi ebendaka baoyo bazali na motema malamu.​—Yisaya 35:8, 9.

Basoda ya Grɛki balongaki etumba ya Marathon atako bazalaki kobunda na banguna oyo balekaki bango na makasi, mpamba te bazalaki kotambola bakangami na molɔngɔ mpe basimbi banguba na bango na makasi na bango nyonso. Ndenge moko mpe, Batatoli ya sembo ya Yehova bayebi ete bakolonga mpenza etumba ya elimo, mpamba te yango ezali “libula” na bango. (Yisaya 54:17) Na bongo, tiká ete mokomoko na biso akoba koluka libateli epai ya Yehova na “kokangamáká makasi na liloba ya bomoi.”​—Bafilipi 2:16.

[Bililingi na lokasa 31]

‘Bwanya oyo euti na likoló ezali pɛto na bizaleli, na nsima kimya’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto