Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 1/9 lok. 27
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Tózala na kondima mpo na bomoi ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Okoki kozala na bomoi libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Batesaloniki mpe epai ya Timote
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mokakatano ya bato ya Teoloji
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 1/9 lok. 27

Mituna ya batángi

Nini ekoki kotinda biso tóloba ete maloba lokola “kaka ye moko nde akoki te kokufa” mpe ye “oyo moko te na kati ya bato amoná to akoki komona” ezali kolobela Yesu, kasi Yehova Nzambe te?

Ntoma Paulo akomaki boye: “Komonisama wana, Nkumu ya esengo mpe kaka moko akolakisa na bantango na yango oyo etyamá, ye Mokonzi ya baoyo bazali bakonzi mpe Nkolo ya baoyo bazali bankolo, kaka ye moko nde akoki te kokufa, afandaka na kati ya pole oyo likoki ya kopusana penepene na yango ezali te, oyo moko te na kati ya bato amoná to akoki komona.”​—1 Timote 6:15, 16.

Bato oyo balimbolaka Biblia bamitunaka mbala mingi boye: ‘Ndenge nini maloba lokola “kaka ye moko nde akoki te kokufa,” “Nkumu . . . kaka moko,” mpe “oyo moko te na kati ya bato amoná to akoki komona” ekoki kolobela moto mosusu kasi oyo Aleki-nguya te?’ Na ntembe te, maloba wana ekoki mpe kosalelama mpo na kolobela Yehova. Nzokande, soki otángi mokapo yango mobimba, okomona ete na 1 Timote 6:15, 16, Paulo azalaki kolobela Yesu.

Na nsuka ya vɛrsɛ 14, Paulo alobeli “komonisama ya Nkolo na biso Yesu Klisto.” (1 Timote 6:14) Yango wana, ntango Paulo akomaki na vɛrsɛ 15 ete, “Komonisama wana, Nkumu ya esengo mpe kaka moko akolakisa na bantango na yango oyo etyamá,” alobelaki komonisama ya Yesu, kasi ya Yehova Nzambe te. Kasi, nani mpenza azali ‘Nkumu kaka moko’? Ebongi mpenza tóloba ete Yesu nde azali Nkumu oyo Paulo alobelaki. Mpo na nini? Lisolo yango emonisi polele ete Paulo azalaki kokokanisa Yesu ná bakonzi ya mokili. Ndenge Paulo akomaki yango, Yesu azali mpenza “Mokonzi ya [bato oyo] bazali bakonzi mpe Nkolo ya [bato oyo] bazali bankolo.”a Ya solo, soki tokokanisi Yesu ná bango, tokomona ete Yesu azali “Nkumu kaka moko.” Bapesaki Yesu “nguya na nkembo na bokonzi . . . ete mabota mpe mikili mpe nkota nyonso basalela ye.” (Danyele 7:14) Nkumu ata moko te ya mokili oyo akoki kozwa lokumu wana!

Tokoloba nini mpo na maloba “kaka ye moko nde akoki te kokufa”? Awa mpe, bakokanisi Yesu ná bakonzi ya mokili. Mokonzi ata moko te ya mokili akoki koloba ete akokufa te, kasi Yesu akoki koloba bongo. Paulo akomaki boye: “Toyebi ete Klisto, sikoyo lokola alamwisami na bakufi, akokufa lisusu te; liwa ezali lisusu na bokonzi likoló na ye te.” (Baloma 6:9) Na yango, Yesu azali moto ya liboso oyo Biblia elobi ete azwi likabo ya bomoi oyo ekoki kobebisama te. Ya solo, ntango Paulo akomaki makambo wana, Yesu azalaki moto kaka moko oyo bapesaki bomoi oyo ekoki kobebisama te.

Tosengeli mpe kobosana te ete soki Paulo alobaka ete kaka Yehova Nzambe nde azali na bomoi oyo ekoki kobebisama te, elingaki kozala lokuta mpamba te ntango Paulo akomaki maloba wana, Yesu mpe azalaki na bomoi oyo ekoki kobebisama te. Kasi, Paulo akokaki koloba ete kaka Yesu nde azali na bomoi oyo ekoki kobebisama te mpamba te azalaki nde kokokanisa Yesu ná bakonzi ya mokili.

Lisusu, ezali mpenza solo ete nsima ya lisekwa ya Yesu mpe komata na ye na likoló, bálobela ye lokola moto “oyo moko te na kati ya bato amoná to akoki komona.” Ezali solo ete bayekoli ya Yesu bapakolami bakomona ye nsima ya liwa mpe lisekwa na bango mpo na kozala bikelamu ya elimo na likoló. (Yoane 17:24) Kasi, moto moko te awa na mabelé akomona Yesu na nkembo na ye. Na yango, tokoki mpenza koloba ete kobanda Yesu asekwá mpe amatá na likoló, “moko te na kati ya bato” amoná ye.

Ya solo, soki otángi 1 Timote 6:15, 16 likolólikoló, okoki kokanisa ete balobeli Nzambe. Kasi, maloba ya Paulo mpe bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete azalaki kolobela nde Yesu.

[Maloba na nse ya lokasa]

a 1 Bakolinti 8:5, 6; Emoniseli 17:12, 14; 19:16 esaleli mpe maloba ya ndenge wana mpo na kolobela Yesu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto