Biblia na monɔkɔ ya Allemand ya kala esaleli nkombo ya Nzambe
LIBONGOLI ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu, oyo ebimaki na monɔkɔ ya Allemand na 1971, esaleli nkombo ya Nzambe, Yehova, mbala koleka 7 000.a Kasi, ezalaki Biblia ya liboso te na monɔkɔ ya Allemand oyo esalelaki nkombo ya Nzambe. Ekoki kozala ete Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Allemand oyo esalelaki nkombo Yehova ebimaki soki mbula 500 liboso mpe Johann Eck, moto monene ya teoloji ya lingomba ya Katolike na Rome nde abimisaki yango.
Johann Eck abotamaki na 1486, na sudi ya Allemagne. Na mbula 24, akómaki profɛsɛrɛ ya teoloji na iniversite ya Ingolstadt, mpe asalaki mosala yango tii ntango akufaki na 1543. Eck ná Martin Luther bazalaki na bomoi na eleko moko, mpe bango mibale bazalaki baninga na boumeli ya mwa ntango. Kasi, na nsima Luther abimisaki Lingomba ya Protesta, nzokande, Eck azalaki kokɔtela Lingomba ya Katolike.
Nkumu ya etúká ya Bavière asɛngaki Eck abongola Biblia na monɔkɔ ya Allemand, mpe libongoli yango ebimaki na 1537. Buku moko (Kirchliches Handlexikon) elobi ete libongoli na ye elandaki mpenza makomi ya ebandeli mpe “esengeli bato bápesa yango motuya lisusu koleka.” Libongoli ya Eck elobi na Exode 6:3 boye: “Ngai nazali Nkolo, oyo abimelaki Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya Nyonso: mpe nkombo na ngai Adonai, nayebisaki bango yango te.” Eck abakisaki ndimbola ya vɛrsɛ yango na mopanzi ya lokasa boye: “Nkombo Adonai Jehoua.” Balimboli mingi ya Biblia bandimaka ete wana ezalaki mbala ya liboso oyo basalelaki nkombo ya Nzambe na Biblia na monɔkɔ ya Allemand.
Nzokande, nkombo ya nzambe eyebanaki mpe esalelamaki na boumeli ya bankóto ya bambula. Mbala ya liboso oyo basalelaki Nkombo yango na mikanda ezalaki na monɔkɔ ya Liebele, epai basaleli liloba “Yehova” mpo na kolobela Nzambe kaka moko ya solo. (Deteronome 6:4) Eleki sikoyo mbula soki 2 000, maloba oyo Yesu alobaki ete amonisi nkombo ya Nzambe ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki. (Yoane 17:6) Kobanda wana, nkombo yango ebimisami na minɔkɔ ebele, mpe mosika te, maloba ya Nzembo 83:18 ekokokisama mpe bato nyonso bakoyeba ete kaka ye oyo nkombo na ye ezali Yehova nde aleki likoló na mokili mobimba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso na Lingelesi na 1961. Sikoyo, esili kobimisama na mobimba to na ndambo na yango na minɔkɔ koleka 50.
[Elilingi na lokasa 32]
Libongoli ya Biblia ya Johann Eck ya 1558, esaleli nkombo ya Yehova na Exode 6:3, na mopanzi ya lokasa