Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 1/8 nk. 23-27
  • Nakómi mpaka mpe na bambula mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nakómi mpaka mpe na bambula mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moninga moko ya kartye alakisi ngai solo ya elimo
  • Ntango ya komekama mpe ya mapamboli
  • Batikaki eloko ya motuya
  • Tobandi mosala ya ntango nyonso
  • Mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto
  • Nayiki mpiko kino nsuka
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 1/8 nk. 23-27

Lisolo ya bomoi

Nakómi mpaka mpe na bambula mingi

YA MURIEL SMITH

Nautaki kozonga na ndako mpo na kolya na midi mpamba te nazalaki na mosala ya kosakola banda ntɔngɔ; mbala moko, nayokaki bazali kobɛta porte makasi. Lokola momeseno, nazalaki kotɔkisa mai mpo na kosala mwa tii mpe nalingaki komatisa makolo likoló mpo na kopema ata miniti ntuku misato. Bazalaki kotika te kobɛta makasi mpe ntango natɛlɛmaki mpo na kokende kofungola ndako, nazalaki komituna soki nani akokaki koya koluka ngai na ngonga wana. Naumelaki te kozwa eyano. Bato mibale oyo batɛlɛmaki liboso ya ndako bayebisaki ngai ete bazali bapolisi. Balobaki ete bayei koluka mikanda ya Batatoli ya Yehova​—lingomba oyo epekisami.

Mpo na nini mosala ya Batatoli epekisamaki na Australie, mpe ndenge nini ngai nakómaki Motatoli ya Yehova? Nyonso ebandaki na likabo oyo mama na ngai apesaki ngai na 1910, ntango nazalaki na mbula zomi.

TOZALAKI kofanda na ndako moko ya mabaya na kartye ya Crows Nest na nɔrdi ya engumba Sydney. Mokolo moko, ntango nautaki kelasi, nakutaki mama azali kosolola na moto moko liboso ya ndako. Nazalaki na mposa ya koyeba soki mopaya yango oyo alataki kazaka mpe asimbi sakosi etondi na mikanda azalaki nani. Na mwa nsɔni, nasɛngaki nzela mpo na koleka mpe nakɔtaki na ndako. Kasi, nsima ya mwa miniti, mama abengaki ngai. Alobaki na ngai ete: “Tata oyo azali na mikanda ya kitoko, mpe mikanda yango nyonso ezali kolimbola Makomami. Lokola anivɛrsɛrɛ na yo ekómi pene, yo moko poná, na elamba ya sika, na mikanda oyo, osepeli na nini?”

Nazongisaki ete: “Matɔndi mingi mama, nakozwa mikanda.”

Ezali na ndenge yango nde nazwaki volimi misato ya liboso ya buku Études des Écritures, ekomamaki na Charles Taze Russell. Moto yango ayebisaki mama ete ekosɛnga ete asalisa ngai mpo na kokanga ntina ya babuku yango, mpo ntango mosusu ekozala makasi mingi mpo na ngai. Mama alobaki ete akosepela kosala yango. Kasi, likambo ya mawa, mwa moke na nsima, mama akufaki. Tata azalaki kosala makasi mpo na kobɔkɔla na ngai na leki na ngai ya mobali, na leki na ngai ya mwasi, kasi nakómaki sikoyo na mikumba mosusu, mpe mikumba yango ekómaki lokola kolekela ngai. Likambo mosusu ya mawa mpe ezalaki koya.

Na 1914, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki, mpe mbula moko na nsima, babomaki tata na biso. Totikalaki bana ya etike; batindaki baleki na ngai epai ya bandeko na biso, mpe ngai nakendaki na mbola (internat) na eteyelo moko ya Lingomba ya Katolike. Na bantango mosusu nazalaki komitungisa mingi mpo nazalaki ngai moko. Kasi, nazali na botɔndi mpo na libaku oyo bapesaki ngai ya koyekola miziki lokola nalingaki yango mingi, mingimingi kobɛta piano. Bambula elekaki, mpe nsukansuka, nazwaki diplome na ngai. Na 1919, nabalaki Roy Smith, oyo azalaki koteka bibɛteli ya miziki. Na 1920, tobotaki mwana na biso ya liboso, mpe misala ya bomoi ya mokolo na mokolo ekómaki lisusu kozwa ntango mingi. Kasi, nasalaki nini na mikanda wana?

Moninga moko ya kartye alakisi ngai solo ya elimo

Na bambula nyonso wana, nazalaki kaka na “mikanda ya Biblia” wana. Atako nazwaki mpenza ntango ya kotánga yango te, nayebaki na motema na ngai ete mikanda yango ezali na makambo ya ntina. Na nsima, mokolo moko, na nsuka ya bambula ya 1920, Lil Bimson, moninga moko ya kartye, ayaki kotala biso. Tofandaki na salon mpe tozalaki komɛla mwa tii.

Mbala moko alobaki ete: “Bozalaka na mikanda oyo!”

Natunaki ye na kokamwa, ete: “Mikanda nini?”

Alakisaki babuku Études des Écritures oyo ezalaki na bibliotɛkɛ. Lil asɛngaki yango mpe akendaki na yango na ndako na ye mpe atángaki yango na mposa makasi. Mwa moke na nsima, ezalaki komonana polele ete makambo oyo atángaki ezalaki kopesa ye esengo. Lil azwaki mikanda mosusu ya Bayekoli ya Biblia, ndenge oyo bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Lisusu, azalaki ntango nyonso koyebisa biso makambo nyonso oyo azalaki koyekola. Moko ya babuku oyo azwaki ezalaki na motó ya likambo ete La Harpe de Dieu, mpe mosika te ekómaki epai na biso. Nabandaki mpenza mosala ya Yehova ntango nazwaki ntango ya kotánga mokanda wana. Nsukansuka, nazwaki biyano na mituna ya ntina mingi oyo nazalaki kozwa eyano na yango te na lingomba na ngai.

Likambo ya malamu mpo na ngai, Roy atyaki mpenza likebi na nsango ya Biblia, mpe biso mibale tomipesaki mpenza na koyekola Biblia. Liboso na yango, Roy azalaki moto ya lingomba moko ya nkuku oyo babengi franc-maçonnerie. Libota mobimba tokómaki na losambo ya solo, mpe mbala mibale na pɔsɔ, ndeko mobali moko azalaki koya kotambwisa boyekoli ya Biblia na libota mobimba. Tolendisamaki lisusu ntango tobandaki koyangana na makita oyo Bayekoli ya Biblia bazalaki kosala. Na Sydney, makita ezalaki kosalema na ndako moko ya moke ya kofutela na kartye ya Newtown. Na ntango wana, Batatoli bazalaki pene na 400 mpamba na mboka mobimba, yango wana, mpo na ebele ya bandeko, koyangana na makita ezalaki kosɛnga kosala mibembo milai.

Mpo na libota na biso, koyangana na makita ezalaki kosɛnga ntango nyonso kokatisa libongo ya Sydney. Liboso bátonga gbagba ya libongo ya Sydney na 1932, bato bazalaki kokatisa na masuwa ya moke. Atako ezalaki kozwa ntango mpe tozalaki kofuta mbongo, tozalaki kosala makasi mpo na kozanga ata mbala moko te kolya bilei ya elimo oyo Yehova azalaki kopesa biso. Milende oyo tozalaki kosala mpo na kozala makasi na elimo ezalaki na ntina, mpamba te Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki koya, mpe na libota na biso, tolingaki kokutana na mikakatano mpo na likambo ya koboya kokɔta na makambo ya politiki.

Ntango ya komekama mpe ya mapamboli

Ebandeli ya bambula ya 1930 ezalaki ntango ya esengo mpo na ngai mpe libota na ngai. Nazwaki batisimo na 1930, mpe na 1931, nazalaki na liyangani moko monene ntango biso nyonso totɛlɛmaki mpe tondimaki kozwa nkombo kitoko ya Batatoli ya Yehova. Ngai na Roy tosalaki makasi mpo na komonisa na bomoi na biso ete nkombo yango ebongi na biso; tozalaki kosala lolenge nyonso ya mosala ya kosakola mpe bakampanye oyo lisangá ezalaki kolendisa biso tósala. Na ndakisa, na 1932 tosalaki kampanye monene ya kokabola mwa buku moko epai ya bato ebele oyo bayaki kotala bofungoli ya gbagba ya libongo ya Sydney. Likambo monene oyo tosalaki ezalaki kosalela bavuatire oyo ezalaki na bikoliseli-lolaka, mpe na libota na biso, tozalaki na motuka na biso moko oyo ezalaki na bikoliseli-lolaka. Lokola tozalaki na bisaleli wana, tozalaki kobɛta badiskɛ ya masukulu ya mateya ya Biblia oyo Ndeko Rutherford asalaki, na babalabala nyonso ya Sydney bazalaki koyoka yango.

Nzokande, makambo ebandaki kobongwana lisusu mpe ekómaki mpasi mingi. Na 1932, kobeba ya nkita epesaki mpasi mingi na Australie; yango wana, ngai na Roy tozwaki ekateli ya koyeisa bomoi na biso pɛpɛlɛ. Na yango, tokendeki kofanda penepene na lisangá, mpe yango esalaki ete tóbimisaka lisusu mbongo te mpo na kokendeke na makita mpe kozonga. Atako bongo, mikakatano ya mbongo ekómaki likambo moke na kotalela nsɔmɔ oyo ekɔtaki na mokili na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.

Lokola bazalaki kotosa mobeko ya Yesu oyo etali koboya kokɔta na makambo ya mokili, Batatoli ya Yehova banyokwamaki mingi, ezala na Australie. Bamosusu oyo bazalaki na nkanda makasi mpo na bitumba babengaki biso Bakoministe. Batɛmɛli yango, bakoselaki Batatoli ya Yehova ya Australie makambo ete bazalaki kosalela bisika minei oyo bazalaki na yango mpo na kopanza nsango na nzela ya radio mpe kotindela basoda ya Japon bansango.

Bandeko mibali oyo bazalaki bilenge oyo bazalaki kobenga bango na mosala ya soda bamekamaki mingi. Nazali na esengo ya koloba ete bana na biso nyonso misato ya mibali bakangamaki na mateya oyo bazalaki kondima mpe baboyaki kokɔta na mosala ya soda. Bakatelaki Richard, mwana na biso ya mobali ya liboso, etumbu ya bolɔkɔ ya sanza 18. Kevin, mwana na biso ya mibale bandimaki ekateli na ye ya koboya kokɔta na mosala ya soda mpo na bindimeli ya lingomba. Kasi, likambo ya mawa, Stuart, mwana na biso ya nsuka, akufaki na likama ya tukutuku ntango azalaki kokende na tribinale mpo na kolimbola ntina oyo aboyaki kosala mosala ya soda. Liwa na ye etungisaki biso mingi. Kasi, kotya ntango nyonso makanisi na biso na Bokonzi ya Yehova mpe na elaka na ye ya lisekwa esalisaki biso tóyika mpiko.

Batikaki eloko ya motuya

Na Yanuali 1941, bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Australie. Kasi, ndenge moko na bayekoli ya Yesu, ngai na Roy totosaki Nzambe lokola mokonzi na esika ya kotosa bato, mpe na boumeli ya mbula mibale na ndambo tosalaki mosala na kobombana. Ezali na eleko wana nde bapolisi mibale oyo balataki bilamba ya sivili, oyo nalobelaki na ebandeli, babɛtaki na ndako na ngai. Likambo nini esalemaki?

Nakɔtisaki bango na ndako. Ntango bakɔtaki na ndako, natunaki bango: “Bokosepela nasilisa komɛla tii na ngai liboso ete bóluka eloko oyo bolingi koluka na ndako?” Likambo ya kokamwa, bandimaki, mpe nakendeki na kuku mpo na kobondela Yehova mpe kokanisa soki nakosala nini. Ntango nazongaki, polisi moko akɔtaki na esika oyo tozalaki koyekola mpe azwaki mikanda nyonso oyo ezalaki na elembo ya Société Watchtower, na mikanda mpe Biblia na ngai oyo ezalaki na kati ya sakosi oyo nazalaki kobima na yango na mosala ya kosakola.

Na nsima, atunaki ngai: “Ozali na mikanda mosusu te oyo obombi na kati ya bakartɔ? Toyoki ete pɔsɔ na pɔsɔ bokendeke kosala makita na ndako ya makita moko na nsuka na nzela oyo mpe bozwaka mikanda mingi kuna.”

Nazongisaki ete: “Ezali solo, kasi nazali kuna te sikoyo.”

Alobaki boye: “Ɛɛ, toyebi yango Madame Smith, toyebi mpe ete mikanda ebombami na bandako ya bato na etúká mobimba.”

Na eteni ya ndako ya mwana na biso, bazwaki bakartɔ mitano oyo ezalaki na mwa babuku Liberté ou Romanisme.

Atunaki ete: “Mikanda mosusu ezali te na esika ya kobomba motuka?”

Nayanolaki ete: “Te, eloko moko ezali kuna te.”

Na nsima, afungolaki armwarɛ moko oyo ezalaki na esika ya kolya. Akutaki nkasa ya lapolo oyo bakomelá naino te, oyo tozalaki kosalela mpo na lapolo ya lisangá na biso. Azwaki yango mpe azalaki kaka na mposa ya kotala na esika ya kobomba motuka.

Nayebisaki bango ete: “Soki boye, bóya kasi kotala.”

Balandaki ngai na esika ya kobomba motuka mpe na nsima ya kotala kuna malamumalamu, babimaki.

Bapolisi yango bakanisaki ete bazwaki mikanda ebele na bakartɔ mitano wana! Nzokande, batikaki eloko ya motuya. Na ntango wana, nazalaki sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá, mpe nazalaki na bankombo ya basakoli nyonso ya lisangá mpe makambo mosusu ya ntina na ndako. Bandeko basilaki koyebisa biso ete ekoki kosalema ete bapolisi báya koluka mikanda, yango wana nabombaki yango malamumalamu. Natyaki yango na kati ya baanvɛlɔpi mpe natyaki yango na kati ya manzanza oyo nazalaki kotya tii, sukali, mpe farine. Nabombaki mpe mikanda mosusu na ndako ya bandɛkɛ, penepene na esika babombaka mituka. Bapolisi balekaki pene mpenza na biloko ya ntina oyo bazalaki koluka kasi bamonaki yango te.

Tobandi mosala ya ntango nyonso

Na 1947, bana na biso ya mikóló basilaki kobala. Na eleko yango, ngai na Roy tomonaki ete tozalaki na makoki ya kobanda mosala ya ntango nyonso. Mposa ezalaki na teritware ya Australie ya Sudi; yango wana totɛkaki ndako na biso mpe tosombaki wagɔ moko oyo motuka ebendaka, mpe topesaki yango nkombo Misipa, yango elakisi “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.” Kozala na bomoi ya ndenge yango esalisaki biso tókoka kosakola na bamboka oyo ezali mosika. Mbala mingi, tozalaki kosakola na bamboka ya mikemike epai masangá ezali te. Natikalá na basuvenire ya malamu ya ntango wana. Moko na bato oyo nayekolaki na bango ezalaki elenge mwasi moko nkombo na ye Beverly. Na ntango oyo azwaki naino batisimo te, akendeki kofanda esika mosusu. Kanisá esengo oyo nayokaki, bambula mingi na nsima, ntango ndeko mwasi moko ayaki penepene na ngai mpe alobaki ete ye nde Beverly! Nayokaki esengo ya koloba te na komona ete nsima ya bambula, mwasi yango, mobali na ye, mpe bana na bango bakómaki kosalela Nzambe.

Na 1979, nazwaki libaku ya kokɔta na Eteyelo mpo na babongisi-nzela. Moko na makambo oyo balobelaki mingi na eteyelo ezalaki ete mpo moto akoka kolendendela na mosala ya mobongisi-nzela, asengeli kozala na momeseno malamu ya koyekola ye moko. Namonaki mpenza ete likambo yango ezali solo. Na bomoi na ngai mobimba nazalaki se koyekola, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. Namonaka ete nazwaki mpenza libaku malamu ya kosala mosala ya mobongisi-nzela na boumeli ya mbula koleka 50.

Mikakatano ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto

Kasi, banda mwa bambula mingi, nakutanaki na mikakatano mosusu ya makasi. Na 1962, nabɛlaki maladi ya miso oyo babengi glaucome. Na ntango wana, nkisi ya malamu mpo na maladi yango ezalaki te, mpe miso na ngai ekómaki kobeba nokinoki. Nzoto ya Roy mpe ezalaki lisusu kolɔngɔnɔ te, mpe na 1983 abɛlaki maladi ya motema oyo esalaki ete ngámbo moko ya nzoto na ye esala lisusu te mpe akokaki lisusu koloba te. Akufaki na 1986. Asungaki ngai mingi na mosala ya ntango nyonso, mpe nakanisaka ye mingi mpenza.

Atako mikakatano ya ndenge wana ekómelaki ngai, namekaki kobatela momeseno malamu na makambo ya elimo. Nasombaki motuka moko ya makasi, oyo ebongi mpenza mpo na mosala ya kosakola na bamboka ya zamba, mpe nakobaki mosala na ngai ya mobongisi-nzela elongo na Joyce, mwana na ngai ya mwasi. Mokemoke nazalaki komona lisusu malamu te, tii liso moko ekufaki. Minganga balongolaki yango mpe na esika na yango, batyaki liso ya talatala. Kasi, nazalaki kosalela loupe to mpe kotánga mikanda oyo ezali na makomi ya minene mpe nazalaki kolekisa ngonga misato to mitano na mokolo koyekola na liso moko oyo ezalaki naino komona.

Nazalaki ntango nyonso kopesa motuya mingi na koyekola. Yango wana, bokoki kokanisa mpasi oyo nayokaki mokolo moko na mpokwa, ntango nazalaki koyekola Biblia, na mbala moko, nazalaki komona lisusu eloko te. Ezalaki lokola nde moto moko abomi miinda. Miso na ngai ekufaki libela. Ndenge nini nakokaki kokoba koyekola? Atako sikoyo nayokaka mpe lisusu malamu te, nakómá kolanda bakasɛti mpe bandeko na ngai basalisaka ngai mpo nazala kaka makasi na elimo.

Nayiki mpiko kino nsuka

Sikoyo, lokola nazali na mbula koleka mokama, nazali na mikakatano mosusu ya nzoto mpe yango wana esengelaki natika kosala makambo ebele. Na bantango mosusu nazalaka mpenza na kati ya mobulungano. Kutu, lokola namonaka lisusu te, mbala mingi nabungaka mpenza na ndenge ya solo! Nazali na mposa mpenza ya koyekola Biblia na bato, kasi na lolenge ya mikakatano oyo nazali na yango na nzoto, nakoki lisusu kobima te mpo na kokutana na bato. Na ebandeli, likambo yango ezalaki konyokola ngai na makanisi. Nasengelaki koyekola kondima bolɛmbu na ngai mpe kozala na esengo ya kosala makambo oyo nakoki naino kosala. Yango ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, ezali mpenza esengo mpo ete sanza na sanza, napesaka lapolo ya mwa ntango oyo nalekisaka mpo na kolobela Nzambe na biso monene Yehova. Soki nazwi libaku ya kolobela makambo ya Biblia, na ndakisa soki bato lokola mafulume, bato ya mombongo, mpe bato mosusu oyo bayaka na ndako na ngai bayei, namekaka na mayele, kosalela libaku yango mpo nateya bango.

Moko na mbano nazwi ezali ya komona bana na ngai, bankɔkɔ na ngai, bana ya bankɔkɔ na ngai mpe lisusu bana na bango bazali kosalela Yehova na bosembo mpenza. Mingi kati na bango bazali babongisi-nzela na bisika oyo mposa ezali, basusu bazali bankulutu to basaleli na misala, mpe bamosusu basalaka na Betele. Ya solo, ndenge moko na bato mingi ya bambula na ngai, nazalaki kokanisa ete nsuka ya mokili oyo ekoya mosika te. Kasi namonaki ndenge oyo, na boumeli ya mbula ntuku nsambo ya mosala na ngai, ebele ya bato bayei na lisangá ya Yehova. Nazalaka na esengo mingi mpo napesaki mabɔkɔ na mosala moko ya monene.

Mafulume oyo bayaka kotala ngai balobaka ete kondima na ngai nde esalaka ete nazala na bomoi. Ngai mpe nakanisaka bongo. Komipesa na mosala ya Yehova epesaka bomoi oyo eleki malamu. Lokola Mokonzi Davidi, nakoki mpenza koloba ete nazali mpaka mpe natondi na mikolo.​—1 Ntango 29:28, NW.

(Ndeko Muriel Smith akufaki na mokolo ya 1 Aprili 2002, ntango lisolo oyo esilaki kokomama. Sanza moko liboso ete akokisa mbula 102, azalaki mpenza ndakisa ya bosembo mpe ya koyika mpiko.)

[Bililingi na lokasa 24]

Ntango nazalaki na mbula soki mitano mpe na mbula 19, ntango nakutanaki na mobali na ngai, Roy

[Elilingi na lokasa 26]

Motuka na biso mpe wagɔ na yango, oyo tozalaki kobenga Misipa

[Elilingi na lokasa 27]

Na mobali na ngai Roy, na 1971

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto