Yoga ezali ngalasisi mpamba to ebombi likambo mosusu?
LELO oyo, bato mingi balingi kozala na nzoto ya makasi mpe ya mafutamafuta te. Yango wana, bato mingi bazali kokomisa nkombo na bisika oyo bayekolaka ngalasisi. Kaka mpo na yango, na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika, ebele ya bato bazali koyekola yoga, lolenge moko ya ngalasisi oyo eutá na Azia.
Bato oyo bazali kotungisama, oyo bazali konyokwama na makanisi mpe baoyo bazali mawamawa, bazali koyekola yoga mpo na kozwa libɔndisi mpe koluka kosilisa mikakatano na bango. Mingimingi, kobanda na bambula ya 1960, ntango ba hippies [bilenge oyo bazalaki kolinga kosala makambo na ndenge na bango] bayebanaki mingi, bato mingi na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika bakómaki kosepela na mangomba ya Azia mpe misala na yango ya maji. Bavɛdɛti ya bafilme mpe baalangá-nzembo oyo babɛtaka miziki ya rock nde basalaki ete bato mingi báyeba momeseno moko oyo babengi méditation transcendantale, oyo ezali ndeko mpenza ya yoga. Lokola bato mingi bakómi kosepela koyekola yoga, ebongi tómituna mituna oyo: ‘Yoga ezali kaka ngalasisi oyo ekoki kosalisa moto azala nzoto makasi, azala nzoto mafutamafuta te mpe azala na kimya na makanisi? Moto akoki koyekola yoga kozanga ete emema ye na makambo ya losambo? Moklisto akoki koyekola yoga?’
Epai oyo yoga eutá
Liloba ya kala na lokota ya Sanskrit mpo na kolobela “yoga” ekoki kolimbola kosangisa to kokangisa esika moko to kotya na ekanganeli, to kotosisa. Mpo na mondimi ya Lingomba ya Hindu, yoga ezali mayele to nzela oyo esalisaka moto na kosangana na nguya to elimo moko ya makasi. Balobaka ete yoga ezali “kosangisa banguya nyonso ya nzoto, ya makanisi mpe ya molimo elongo na Nzambe.”
Yoga ebandá ntango nini? Na mikili oyo ezali pembenipembeni ya Ebale Indus, mingimingi na eteni oyo ezali lelo oyo ekólo Pakistan, bakutaki batampɔ ya kalakala oyo ezali na bililingi ya bato bafandi na mitindo ndenge na ndenge lokola oyo bato basalaka yoga bafandaka. Bato ya arkeoloji bayekoli mpe bamoni ete bato ya liboso oyo bafandaki na mikili oyo ezali pembenipembeni ya Ebale Indus bazalaki kuna na katikati ya mobu 3000 mpe mobu 1000 liboso ya ntango na biso (L.T.B.); yango ekokani mpenza na eleko ya bato ya liboso oyo bafandaki na Mesopotamia. Na mikili oyo ezali pembenipembeni ya Ebale Indus mpe na Mesopotamia bakutaki bikeko oyo ezali kolakisa moto moko, oyo azali komonisa nzambe moko, azali na maseke mpe ebele ya banyama bazali pembenipembeni na ye; yango ezali kotinda biso na kokanisa Nimilodi, “moluki makasi ya nyama.” (Genese 10:8, 9) Bato ya Lingomba ya Hindu balobaka ete bililingi ya moto yango oyo afandi na mitindo ndenge na ndenge lokola oyo bato bayekolaka yoga bafandaka ezali bililingi ya nzambe Siva, nkolo ya banyama mpe nkolo ya yoga oyo, mpo na kosambela ye, mbala mingi basalelaka lingam, elilingi ya enama ya mobali. Na yango, buku moko (Hindu World) elobi ete yoga ezali “malako ya makambo ya makasimakasi oyo moto asengeli kosalaka, oyo eutá mingimingi epai ya bato oyo bazalaki na bomoi liboso ya Ba-Aryen mpe mingi na yango eutá na makanisi mpe na misala ya bato ya kalakala.”
Kala, balakisi ya yoga bazalaki liboso koteya yango kaka na maloba. Na nsima, Patañjali, moto ya Inde mpe moto ya mayele mingi na yoga akomaki Yoga Sutra, buku oyo ezali kolimbola malamumalamu ndenge ya kosala yoga mpe ezali tii lelo oyo mokanda ya libosoliboso ya mateya ya yoga. Patañjali alobaki ete yoga ezali “milende oyo moto asengeli kosala mpo na kokóma na ezaleli ya kokoka; mpo na yango, asengeli kotosisa nzoto na ye mobimba, bakisa mpe makanisi na ye nyonso.” Banda na ebandeli na yango tii na moi ya lelo, mangomba nyonso ya Azia esalelaka yoga; sikoyo ezali mingimingi na Lingomba ya Hindu, Lingomba ya Jaïn, mpe na Lingomba ya Bouddha. Bato mosusu oyo basalaka yoga bandimaka ete ekokómisa bango na moksha, to kosikwama, na nzela ya kosangana na elimo moko oyo ezali na bisika nyonso.
Sikoyo, tózonga naino na motuna na biso: ‘Moto akoki koyekola yoga lokola ngalasisi mpamba mpo na nzoto mpe kokitisa mpasi ya makanisi, kozanga ete emema ye na makambo ya losambo?’ Soki totali epai oyo yoga eutá, eyano ezali mpenza ete te.
Yoga ekoki komema yo wapi?
Ntina oyo basalaka yoga ezali ya “kokangisa” to kosangisa elimo ya moto na elimo moko oyo eleki moto na nguya. Kasi, yango ekoki kozala elimo nini?
Na buku na ye (Hindu World), mokomi Benjamin Walker alobi mpo na yoga ete: “Ekoki kozala ete ezalaki lolenge moko ya kalakala ya milulu ya maji, mpe tii lelo oyo, soki totaleli makambo na yango malamu, yoga ezali kaka na misala ya bikelakela mpe bondɔki.” Bato ya filozofi ya Lingomba ya Hindu balobaka ete yoga ekoki kopesa moto nguya ya kokamwa, atako balobaka ete ezali yango te ntina ya libosoliboso ya yoga. Na ndakisa, na buku moko (Indian Philosophy), Doktɛrɛ Radhakrishnan, prezida ya kala ya Inde, alobaki ete moto oyo asalaka yoga “akoki kotosisa nzoto na ye mpo ekoka koyoka eloko te, ata na esika ya molunge makasi mpenza to ya malili makasi mpenza, ntango azali kofanda na mitindo ndenge na ndenge oyo bato bayekolaka yoga bafandaka. . . . Moto oyo asalaka yoga akoki komona mpe koyoka makambo na mosika . . . Akoki koyebisa moto mosusu makambo kozanga ete aloba to aningisa lobɔkɔ to motó. . . . Moto oyo ayekolaka yoga akoki kolimwisa nzoto na ye.”
Soki moto moko oyo asalaka yoga alali likoló ya libaya oyo babɛtibɛti yango bansɛtɛ mpe nsɔngɛ na yango etali likoló to soki azali kotambola likoló ya makala ya mɔ́tɔ, bato mosusu bakoki koloba ete ezali lokuta mpe basusu bakomona yango lisano. Kasi, makambo yango esalemaka mingi na Inde; okomona mpe moto mosusu atɛlɛmi na lokolo moko, afungoli miso mpe azali kotala moi na boumeli ya ntango molai; mosusu mpe akoki kokanga mpema na boye ete ata soki bakundi ye na kati ya zɛlo na boumeli ya ntango molai, akobima azali kaka na bomoi. Na sanza ya Yuni 1995, zulunalo moko (The Times of India) elobelaki lisolo ya mwana moko ya mwasi ya mbula misato na ndambo oyo azalaki kosɛnzwa, alalaki na nse mpe motuka moko ya kilo 750 ematelaki ye na libumu. Na nsima, alamukaki, azokaki ata mwa moke te; bato bakamwaki. Lisolo ebakisaki ete: “Wana ezalaki nguya ya solosolo ya yoga.”
Na ntembe te, moto moko te akoki kosala makambo yango na nguya na ye moko. Yango wana, moklisto asengeli komituna: Makambo wana ezali komonisa nini? Ezali Yehova Nzambe, “Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba” nde asalaka makambo yango to eutaka epai mosusu? (Nzembo 83:18) Biblia ezali polele na likambo yango. Ntango etikalaki moke Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaka, mokili oyo Bakanana bazalaki kofanda, Yehova ayebisaki bana ya Yisalaele na nzela ya Mose ete: “Okoyekola [kolanda] misala ya mbindo na mabota yango te.” “Misala” nini “ya mbindo”? Mose akebisaki na likambo ya kozala “moto oyo ayebisaka makambo oyo ebombami, moto oyo asalaka maji to moto oyo alukaka koyeba makambo oyo ekoya to ndɔki.” (Deteronome 18:9, 10, NW) Nzambe ayini makambo yango mpamba te ezali misala ya bademo mpe ya nzoto ya masumu.—Bagalatia 5:19-21.
Ezali nzela malamu te mpo na baklisto
Ata soki bato oyo bateyaka ngalasisi mpo moto azala nzoto makasi bandimi makanisi yango te, yoga ezali kaka ngalasisi mpamba te. Buku moko (Hindu Manners, Customs and Ceremonies) eyebisi lisolo ya bato mibale oyo bazalaki koyekola yoga. Moko na bango alobaki boye: “Nasalaki milende ya kokamwa mpo na kokanga mpema na ngai ntango molai, mpe napemaki kaka ntango nakómaki pene ya kobungisa makanisi. . . . Mokolo mosusu, na midi, nakanisaki ete namonaki sanza ezali kongɛnga, mpe ezalaki lokola koningana epai na epai. Mokolo mosusu, namonaki lokola molili makasi ezipi ngai na midi. Molakisi na ngai . . . asepelaki mingi ntango nayebisaki ye makambo wana oyo nazalaki komona. . . . Ayebisaki ngai ete etikali moke namona matomba mosusu ya kokamwa na mpasi nyonso oyo nazalaki komonisa nzoto na ngai.” Moto ya mibale alobaki boye: “[Molakisi na ngai] asɛngisaki ngai nafungola miso mpe natala na likoló mokolo mobimba, nabɛta miso te to mpe natikala kaka na ndenge natɛlɛmaki wana. . . . Ntango mosusu nakanisaki ete namoni mintɛntɛi na likoló; na bantango mosusu nazalaki komona biloko lokola mabungutulu oyo ezali kopela mpe makambo mosusu lokola mikalikali, monama, mpe bongo na bongo. Molakisi na ngai azalaki kosepela mingi na ndenge oyo milende na ngai ezalaki kobota mbuma.”
Ezali polele ete ezali makambo ya kokamwa oyo bayekoli wana bazalaki komona nde oyo balakisi na bango batalelaki lokola mbuma malamu oyo ekokómisa bango na mokano ya solosolo oyo basalaka yoga. Ntembe ezali te, ntina ya libosoliboso ya yoga ezali nde moksha, elingi koloba kosangana na elimo moko ya makasi mpenza. Balobaka ete ezali “kopekisa bɔɔngɔ (na mokano ya moto ye moko) ete etika kosala mosala na yango ya kokanisa.” Tomoni ete yango eyokani ata moke te na mokano oyo Biblia emonisi mpo na baklisto, mpo balobi na bango ete: “Bókaba banzoto na bino mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe, mosala moko mosantu elongo na likoki na bino ya kokanisa. Mpe bótika kolanda ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, kasi bóbongwana na kokómisáká makanisi na bino sika, mpo bómindimisa bino moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka.”—Baloma 12:1, 2, NW.
Moto na moto akoki kopona ye moko lolenge ya ngalasisi oyo alingi kosala. Kasi, baklisto bakotika te ete eloko moko, ezala ngalasisi, to kolya, to komɛla, to kolata, to masano, to eloko mosusu nyonso, ebebisa boyokani na bango na Yehova Nzambe. (1 Bakolinti 10:31) Mpo na bato oyo bazali kosala ngalasisi mpo na kozala nzoto makasi, ezali na mitindo mingi ya ngalasisi oyo ezali na makambo oyo ekoki komema bango te na makama ya bikelakela to ya koyokana na bilimo mabe. Soki tozali koboya misala mpe bindimeli oyo euti na losambo ya lokuta, tokoki kozala na elikya ete tokokɔta na ebongiseli ya makambo ya sika mpe ya sembo oyo Nzambe alaki, kuna tokoki kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na kimya ya makanisi seko na seko.—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:3, 4.
[Bililingi na lokasa 22]
Bato mingi basalaka mitindo ya ngalasisi oyo ezali na boyokani te na makambo ya bikelakela