Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/8 lok. 29
  • Ozali komikundola?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali komikundola?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Yoga ezali ngalasisi mpamba to ebombi likambo mosusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Oteyaka na lolenge oyo ekoki mpenza kobota mbuma?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ezali foti na yo to ezali nde makila na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mokanda ya Biblia nimero 15—Ezela
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/8 lok. 29

Ozali komikundola?

Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Na bongo, talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:

• Komitya na esika ya basusu elimboli nini, mpe mpo na nini baklisto basengeli kolona ezaleli yango?

Yango elimboli koyoka ndenge moto oyo azali na likambo azali koyoka, na ndakisa koyoka mpasi na ye na kati ya motema na biso. Bapesi baklisto toli ete ‘bámityaka na esika ya basusu, bázalaka na bolingo lokola bandeko mpe na motema mawa.’ (1 Petelo 3:​8, NW) Yehova azali ndakisa oyo tosengeli kolanda na likambo ya komitya na esika ya basusu. (Nzembo 103:14; Zekalia 2:​8, NW) Tokoki kokolisa ezaleli yango soki tozali koyoka, kotala, mpe kokanisa.​—⁠15/4, nkasa 24-26.

• Mpo na kozwa bolamu ya solo, mpo na nini esengeli naino kobikisama na elimo liboso ete kobeba binama ya nzoto esila mpo na libela?

Bato mingi bazali nzoto kolɔngɔnɔ kasi bazali na esengo te, batondi na mikakatano. Epai mosusu, baklisto mingi oyo binama ya nzoto na bango ebebá bazali kosalela Yehova na esengo. Baoyo bazali kobikisama na elimo, binama na bango oyo ebebá ekobonga na mokili ya sika.​—⁠1/5, nkasa 6-7.

• Mpo na nini Baebele 12:16 ekokanisaki Esau na moto ya pite?

Biblia emonisi ete Esau azalaki motema mɔ́tɔmɔ́tɔ mpo na koluka kokokisa bamposa na ye nokinoki mpe azalaki kotyola biloko mosantu. Lelo oyo, soki moto atiki nzela ete makanisi ya ndenge wana ekola na motema na ye, ekoki komema ye na kosala lisumu monene lokola pite.​—⁠1/5, nkasa 10-11.

• Tertullien azalaki nani, mpe ayebani mingi mpo na likambo nini?

Azalaki mokomi mpe moto ya teoloji oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale mpe ya misato ya ntango na biso (T.B.). Ayebani mingi mpo akomaki mikanda mingi mpo na kolongisa boklisto. Na ndenge na ye ya kolongisa yango, akɔtisaki makanisi ya filozofi oyo efungolaki nzela na mateya ya lokuta lokola Bosato.​—⁠15/5, nkasa 29-31.

• Mpo na nini tokoki koloba te ete foti nyonso ezali na ba gène ya makila soki moto abɛlaka, azali na ezaleli boye to boye, mpe akufaka?

Bato ya siansi bamoni ete ba gène nde ezalaka na mbeba oyo ememaka bamaladi ndenge na ndenge, mpe bato mosusu balobaka ete bizaleli ya moto ezali likambo ya makila na ye. Kasi, Biblia eyebisi ebandeli ya moto, mpe ndenge oyo bato bazwaki lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka. Atako ba gène esalaka mosala mpo ete moto azala na ezaleli boye to boye, kozanga kokoka mpe makambo oyo tokoli na yango esalaka mpe mosala monene.​—⁠1/6, nkasa 9-11.

• Ndenge nini eteni ya papirise oyo bamonaki na engumba Oxyrhynchus, na Egypte, esalisi biso na koyeba ndenge basalelaki nkombo ya Nzambe?

Eteni yango ya mokanda, oyo ezali na maloba ya Yobo 42:​11, 12 na libongoli ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki ezali na nkombo ya Nzambe na ndenge oyo bazalaki kokoma yango na Liebele, elingi koloba na balɛtrɛ minei YHWH. Yango ezali likambo mosusu oyo ebakisami mpo na komonisa ete nkombo ya Nzambe na Liebele ezalaki na libongoli ya Septante; mbala mingi, bakomi ya Makomami ya Grɛki ya boklisto bazongelaki maloba ya Makomami ya Liebele na ndenge oyo ezali na libongoli yango.​—⁠1/6, lokasa 30.

• Bakokanisaki masano ya mobulu oyo ezalaki kosalema na Bokonzi ya Loma, oyo bato mosusu bazalaki kokufa na yango, na masano nini oyo esalemaka lelo?

Na elakiseli moko oyo eutaki kosalema na Colisée, na engumba Rome, balakisaki filme oyo ezalaki na bililingi ya bitumba ya bangɔmbɛ, bitumba ya makofi, mimekano ya mituka mpe batukutuku, na bitumba kati na bato oyo bakendaka kotala masano, mpe masano mosusu oyo esalemaka lelo. Baklisto ya liboso bazalaki kobosana te ete Yehova ayini, na mobulu, na bato ya mobulu; mpe baklisto lelo oyo basengeli kobosana likambo yango te. (Nzembo 11:⁠5)​—⁠15/6, lokasa 29.

• Ndakisa ya Ezela ekoki koteya biso nini ntango tozali kosala makasi ete tózala bateyi ya malamu?

Ezela 7:10 (NW) emonisi makambo minei oyo Ezela asalaki, oyo tokoki kosala makasi mpo na komekola. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Ezela [1] abongisaki motema na ye [2] mpo na kotalela mibeko ya Yehova mpe [3] mpo na kosalela yango mpe [4] mpo na koteya malako mpe boyengebene na Yisalaele.”​—⁠1/7, lokasa 20.

• Wapi makambo ya minene mibale oyo soki mwasi moklisto azali kosala eloko moko kati na yango asengeli kolata litambala?

Moko na yango etaleli makambo oyo esalemaka na kati ya libota. Kolata litambala emonisaka ete azali koyeba ete mobali na ye nde azali na mokumba ya kobondela mpo na libota mobimba mpe koteya Biblia na kati ya libota. Mosusu etaleli makambo oyo esalemaka na lisangá, epai oyo amonisaka ete na kolanda Makomami, mibali oyo bazwi batisimo nde bazali na mokumba ya koteya mpe kokamba. (1 Bakolinti 11:​3-10)​—⁠15/7, nkasa 26-27.

• Mpo na nini baklisto bandimaka ete yoga ezalaka ngalasisi mpamba te mpe ezali na likama?

Ntina ya yoga ezali ya komema moto na kosangana na elimo moko oyo eleki na nguya. Yoga esɛngaka kopekisa bɔɔngɔ ekanisa mpo na mwa ntango, nzokande malako ya Nzambe elobi boye te. (Baloma 12:​1, 2, NW) Yoga ezali na makama mpo ekoki koyokanisa moto na bilimu mabe mpe kokɔtisa ye na makambo ya bikelakela. (Deteronome 18:​10, 11)​—⁠1/8, nkasa 20-22.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto