Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/5 nk. 30-31
  • Na Inde bato bazali koyekola Biblia mpe bazali kokóma na kondima

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na Inde bato bazali koyekola Biblia mpe bazali kokóma na kondima
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kondima mpo na kolonga mokakatano ya nzoto
  • Mokufeli-mobali azwi libondisi malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bisengo ya babuku mbuma na lnde
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Bakiselá biso kondima”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Bomoko kati na bato ndenge na ndenge” na Inde
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/5 nk. 30-31

Biso tozali baoyo bazali na kondima

Na Inde bato bazali koyekola Biblia mpe bazali kokóma na kondima

BANDA na nɔrdi ya Inde, epai oyo bangomba milai ya Himalaya ezali mpe ezipami na mbula-mpɛmbɛ tii na mabongo ya molunge na Océan Indien na sudi, Inde ezali ekólo oyo ezali na makambo ndenge na ndenge, ezala mokili yango moko, to mpe mangomba ya kosambela. Bato koleka miliare moko bafandi na ekólo yango, mpe mingi na bango (83 %) bazali Bahindu, mwa ndambo (11 %) bazali Bamizilma, mpe baoyo batikali bazali baklisto, Basikh, bato ya Bouddha, mpe bato ya Lingomba ya Jaïna. Moto na moto azali na bonsomi ya kolanda lingomba oyo alingi. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete: “Bato ya Inde bamipesaka mingi na makambo ya losambo.”

Batatoli ya Yehova bazali koleka 21 200 na Inde, mpe bazali mpenza kotosa mibeko ya boklisto na bomoi na bango. Lokola bandeko na bango ya elimo na bikólo mosusu, Batatoli ya Yehova na Inde bazali na libaku malamu ya kosalisa bazalani na bango bákóma na kondima makasi na Liloba ya Nzambe, Biblia Mosantu. (2 Timote 3:16, 17) Tótalela ndenge oyo libota moko na Chennai, na sudi ya Inde, bayebaki mateya ya solo ya Biblia.

Liboso ya kokutana na Batatoli ya Yehova, bato yango bazalaki bandimi ya molende ya “groupe de prière” ya Bakatolike mpe bazalaki koloba ete bazwaka bimonaneli, bazalaki koloba na minɔkɔ ya sika, mpe bazalaki kobikisa bato ya maladi. Bazalaki bato minene na kati ya lingomba mpe na mboka na bango; kutu, bato bazalaki kobenga bamosusu kati na bango ete “swami,” elimboli “nkolo.” Mokolo mosusu Motatoli moko akendaki kotala bango mpe amonisaki bango na kati ya Biblia ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, kasi azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso te, ndenge bato mingi bakanisaka. Motatoli yango amonisaki bango mpe ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova mpe ete Yehova alingi kokómisa mabele mobimba paladiso moko kitoko.—Nzembo 83:18; Luka 23:43; Yoane 3:16.

Lokola bazalaki kondima Liloba ya Nzambe mpe basepelaki na makambo oyo bayokaki, bandimaki koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na Batatoli ya Yehova. Baninga na bango ya lingomba babandaki kotyola bango. Atako bongo, libota yango ekangamaki na ekateli oyo bazwaki ya koyekola Biblia. Lokola bakómaki koyeba makambo mingi mpe kondima na bango ezalaki koya makasi, batikaki misala ya lingomba ya lokuta. Lelo oyo, bato misato ya libota yango bazali Batatoli ya molende oyo bazwi batisimo mpe mama na bango asalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi ntango nyonso oyo akoki.

Kondima mpo na kolonga mokakatano ya nzoto

Sunder Lal, elenge mobali oyo afandaka na mboka moko na etúká ya Punjab, azalaki na mposa ya kondima makasi mpe mpiko mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bato mosusu. (Matai 24:14) Ya liboso, alongwaki na lingomba oyo esambelaka banzambe ebele oyo bandeko na ye mpe bato ya mboka na bango basambelaka mpe akómaki kosambela Nzambe ya solo, Yehova. Ya mibale, Sunder Lal azali na makolo te.

Liboso ya 1992, Sunder Lal azalaki na mosala oyo azalaki kosala mokolo na mokolo. Azalaki mosungi ya monganga mpe azalaki kosambela na lingomba oyo esambelaka banzambe ndenge na ndenge elongo na bandeko na ye mpe bazalaki kolanda guru [mokonzi ya lingomba] moko. Mokolo moko na butu, akweaki ntango azalaki kokatisa nzela ya engbunduka. Engbunduka enyataki ye mpe ekataki ye makolo nyonso mibale banda na bibɛlɔ. Atako akufaki te, bomoi na ye ekómaki ndenge mosusu. Sunder Lal atungisamaki mingi na makanisi mpe akanisaki kutu komiboma. Bandeko na ye bazalaki kosalisa ye, kasi amonaki ete akosala eloko te na bomoi na ye.

Mokolo moko, Motatoli ya Yehova moko akendaki koteya Sunder Lal mpe amonisaki ye na kati ya Biblia ete Nzambe alaki kokómisa mabele oyo paladiso moko kitoko mpe akopesa bato nyonso oyo balingaka ye mpe babangaka ye nzoto oyo ezali mpenza kolɔngɔnɔ. Sunder Lal andimaki báyekolaka na ye Biblia mpe na boumeli ya mbula mobimba amipesaki mpenza na koyekola. Abengaki ye aya na makita ya lisangá mpe nsukansuka moninga moko amemaki ye na velo. Atako kokende na velo ezalaki mpasi kasi, azwaki mbano monene. Andimaki mpenza ete makambo oyo azali koyekola na Biblia ezali solo ntango akutanaki na bato mosusu oyo bazali kondima mpenza oyo Liloba ya Nzambe elaki mpe bazali kotosa mateya ya Biblia na bomoi na bango.

Sunder Lal abandaki kosakola nsango malamu epai ya baninga na ye, mpe na 1995 azwaki batisimo. Na ebandeli, mpo na kokende kosakola ndako na ndako na mboka na bango, azalaki konguluma na mabele, yango ezalaki lolenge na ye ya kotambola. Kasi sikoyo bandeko na ye ya elimo bapesi ye velo ya bapinɛ misato oyo “batambwisaka” na mabɔkɔ. Velo yango esalisaka ye asala ata ye moko kilomɛtrɛ 12 mpo na koyangana na makita ya lisangá. Na bantango mosusu atambolaka ye moko na ntango ya mopɛpɛ makasi; mpe ntango mosusu moi ezalaka makasi mpenza (43°C).

Longola koyangana na makita, Sunder Lal ayekolaka Biblia na bato mingi oyo balingaka kokóma na kondima makasi epai ya Nzambe ya solo, Yehova. Kutu, lelo oyo bato nsambo oyo ayekolaki na bango Biblia bazwi batisimo, bakisa mpe bato mosusu misato oyo abandaki koyekola na bango mpe na nsima Batatoli mosusu bakobaki koyekola na bango Biblia.

Biblia elobi ete “bato nyonso bazali na kondima te.” (2 Batesaloniki 3:2) Kasi mpo na baoyo “bamibongisi mpo na kozwa bomoi ya seko,” koyekola Liloba ya Nzambe mbala na mbala ekoki kosalisa bango bákóma na kondima makasi. (Misala 13:48, NW) Boyekoli ya Biblia esalaka lisusu ete moto amona polele elaka ya bomoi kitoko na mikolo ekoya. Na Inde, bato bazali se kobakisama, baoyo bazali kosala misala oyo ezali komonisa ete bazali na kondima na bomoi wana.

[Karte na lokasa 30]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

AFGHANISTAN

PAKISTAN

NÉPAL

BHOUTAN

CHINE

BANGLADESH

MYANMAR

LAOS

THAÏLANDE

VIÊT-NAM

CAMBODGE

SRI LANKA

INDE

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto