Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/2 nk. 25-29
  • Mokufeli-mobali azwi libondisi malamu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokufeli-mobali azwi libondisi malamu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Namoni solo ya Biblia
  • Nabandi kokabola boyebi oyo nauti kozwa yango
  • Litatoli na balabala
  • Nalendisami mpo na kolonga bobangi na ngai
  • Nalendisami mpe napambolami
  • Mikumba mingi ya komema
  • Nabondisami na bomoi na ngai mobimba
  • Na Inde bato bazali koyekola Biblia mpe bazali kokóma na kondima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bóbɔndisa bato oyo bazali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Kobɔkɔla bana mwambe na banzela ya Yehova ezalaki mpasi mpe esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/2 nk. 25-29

Mokufeli-mobali azwi libondisi malamu

Lisoló ya Lily Arthur

Na kartye moko ya engumba Ootacamund, na mboka lnde, elenge Témoin de Jéhovah moko azalaki kosakola ndako na ndako. Lokola esengisami na momeseno na bango, basi bazalaki kofungola ndako te mpo na moto oyo ayebani na bango te. Nsima ya mwa bangonga, alembaki mpe alingaki kozonga epai na ye. Nde atelemi, komiyokáká lokola ete asengisami kobeta ekuke elandaki. Landa lisoló oyo lisalemi na mwasi oyo afungwelaki ye ndako.

KOMEMÁKÁ mwana na ngai ya mwasi ya sanza mibale na maboko mpe kobendaka mwana na ngai ya mobali ya sanza 22 pene na ngai, nawelaki mpo na kofungola ekuke; nakutaki moto oyo nayebaki ye te. Nzokande na butu oyo eutaki koleka, natungisamaki mingi mpenza. Kolukáká libondisi, nabondelaki boye ete: “Tata ya makoló, bondisa ngai na nzela ya Liloba na yo.” Mpe nakamwaki mpenza na koyoka moto yango koloba na ngai ete: “Namemeli yo nsango ya kobɔndisa mpe ya elikya ezwami kati na Liloba na Nzambe.” Namilobaki ete, oyo asengeli kozala mosakoli oyo atindami na Nzambe. Kasi, ndenge nini nakomaki kino kosenga lisalisi kati na libondeli?

Namoni solo ya Biblia

Nabotami na 1922 na mboka Gudalur, kati na bangomba kitoko ya Nilgiri, na Sud ya lnde. Mama na ngai akufaki wana nazalaki bobele na mbula misato. Na nsima, tata na ngai, ye oyo azalaki pasteur ya lingomba protestá, abalaki lisusu. Ntango tozalaki kokóma na bambula ya koyeba koloba, ezala ngai to bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi, tata azalaki kolakisa biso lolenge ya kobondela. Na mbula minei, wana tata na ngai azalaki kotanga Biblia na biro na ye, ngai mpe nazalaki kotanga oyo ya ngai, kofandáká na mabelé.

Wana ekómaki ngai mokóló, nakómaki molakisi. Tata na ngai abongisaki makambo ya libala na ngai wana nazalaki na mbula 21. Mobali na ngai mpe ngai tozwaki esengo ya kobota mwana mobali, Sunder, mpe na nsima tobotaki mwana mwasi, Rathna. Kasi na eleko oyo Rathna abotamaki, mobali na ngai ayaki kobela makasi mpe, nsima na mwa ntango, akufaki. Nakómaki mwasi-mokufeli mobali wana nazalaki na mibu 24, nasengelaki kobokola bana mike mibale.

Ezali mpo na makambo wana nde nasengaki Nzambe ete abɔndisa ngai na nzela ya Liloba na ye, mpe lobi lolandaki, elenge Témoin de Jéhovah moko abetaki na ekuke na ngai. Nakótisaki ye kati na ndako mpe nandimaki mokanda “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” Lokola nazalaki kotanga mokanda yango na butu wana, mbala mingi nazalaki komona nkombo Jéhovah, oyo nayebaki yango te. Nsima na mwa ntango, Témoin de Jéhovah azongaki lisusu kotala ngai mpe amonisaki ngai kati na Biblia ete, yango ezali nkombo na Nzambe.

Nokinoki nakangaki ntina ete mateya lokola Trinité to lifelo ya móto mazwi moboko likoló na Biblia te. Nabondisamaki mpe nazwaki elikya ntango nayokaki ete mabelé makobongwana paradis mpe ete balingami na biso basila kokufa, bakozonga na bomoi na nzela ya lisekwa. Kasi likoló na oyo nyonso, nalukaki koyeba mpe kolinga Jéhovah, Nzambe ya solo, ye oyo ayokaki libondeli na ngai mpe asalisaki ngai.

Nabandi kokabola boyebi oyo nauti kozwa yango

Nabandaki komituna mpo na nini liboso nazalaki te komona ba versets oyo ezali na nkombo na Nzambe. Mpe ndenge nini nasosolaki mpenza te elikya ya bomoi ya seko na mabelé oyo makobongwana paradis, wana ngai moko nazalaki kotanga Biblia? Nazalaki koteya na eteyelo oyo eyangelamaki na bamisionere ya protesta mpe nalakisaki bongo ba versets oyo epai na mosangani moko ya Comité ya eteyelo. (Exode 6:3; Nzembo 37:29; 83:18; Yisaya 11:6-9; Emoniseli 21:3, 4) Nayebisaki ye ete, ezali mpo na ntina moko to mosusu nde totyaki likebi te na ba versets yango. Kasi, nakamwaki na komona ete mwasi yango asepelaki te na maloba na ngai.

Nakomáki mokanda epai na directrice, ye oyo azalaki na engumba mosusu, na kotyáká ba versets ya Biblia kati na yango. Nasengaki ete tokotuna na ye mpo na kosolola. Ayanolaki ngai ete, tata na ye, oyo azalaki pasteur Mongelesi wa lokumu, akosolola likambo yango elongo na ngai. Ndeko mobali ya directrice azalaki ye mpe episkopo wa lokumu.

Nabongisaki makambo nyonso elongo na mikapo ya Makomami oyo miyokani na yango, mpe namemaki bana na ngai mpe mokanda na ngai “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” kino na engumba ya zingazinga na epai nafandi. Na móto nyonso, nalimbolaki soki Jéhovah azali nani, ete Trinité euti na Biblia te, mpe makambo mosusu oyo nayekolaki. Bayokamelaki ngai na boumeli ya ntango moko kozanga ete baloba likambo moko. Na nsima, pasteur Mongelesi alobaki ete: “Nakobondela mpo na yo.” Abondelaki mpo na ngai mpe atikaki ngai ete nazonga na ndako.

Litatoli na balabala

Témoin de Jéhovah yango abengaki ngai ete nasala elongo na ye mpo na kopesa litatoli na balabala na kokabolaka Mosenzeli mpe Réveillez-vous! Nalobaki na ye ete nakokoka kosala yango te. Esengeli koyeba ete na lnde, bato bazali na makanisi mabe mpenza soki bamoni mwasi moko kotelama na balabala to kokende ndako na ndako. Yango ekosilisa lokumu ya mwasi yango mpe lokumu ya libota na ye mobimba. Nalingaki te kookisa tata na ngai nsoni, ye oyo nalingaki mpe nazalaki komemya mingi mpenza.

Kasi Témoin wana alakisaki ngai verset oyo elobi ete: “Mwana na ngai, zala na mayele mpe sepelisa motema na ngai, ete nazongisa monoko na oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Bongo alobaki ete: “Na komonisáká na miso na bato ete ozali kosunga Jéhovah mpe Bokonzi na ye, boye ozali kosepelisa motema na ye.” Lokola nalingaki mpenzampenza kosepelisa motema ya Jéhovah, nazwaki bongo sakosi ya bazulunalo mpe nakendeki elongo na Témoin mpo na kosakola na balabala. Kino lelo oyo, nazali koyeba te lolenge nini nazwaki makasi. Ezalaki na 1946, mwa basanza minei nsima ya lisoló na ngai ya yambo elongo na Témoin yango.

Nalendisami mpo na kolonga bobangi na ngai

Na 1947, nandimaki kosala lokola molakisi na bisika ya zingazinga na Madras, na ngambo ya lnde, mpe nafandaki kuna elongo na bana na ngai. Etuluku moke ya ba Témoins de Jéhovah soko mwambe, bazalaki koyangana mbala na mbala na engumba Mpo na koyangana na makita yango, tosengelaki kosala pene na bakilometele 22. Na momeseno, na eleko wana, na lnde, basi bazalaki kotambola bango moko te. Mibali nde bazalaki kotambwisa bango. Nazalaki koyeba te ndenge nini komata na bus, ezala mpe kofuta tike, nayebaki te lolenge ya kosala mpo na kokita na bus, mpe bongo na bongo. Nazalaki komiyoka ete nasengelaki kosalela Jéhovah, kasi ndenge nini? Nabondelaki ete: “Jéhovah Nzambe, nakoki te kozala na bomoi kozanga ete nasalela yo. Kasi na lnde, ekoki te na mwasi ete akende kosakola ndako na ndako.”

Nazalaki kolikya ete Jéhovah apesa nzela ete nakufa mpo na kopengola nkaka yango. Atako bongo, nazwaki ekateli ya kotanga mwa moke Biblia. Nafungolaki yango na Yilimia epai kuna ekomamaki ete: “Loba te ete: ‘Ngai nazali bobele elenge.’ Kasi okokende epai na bango nyonso ekotinda ngai yo. Banga bilongi na bango te, mpamba te ‘ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo.’”​—Yilimia 1:7, 8.

Namiyokaki lokola ete Jéhovah azalaki koloba mpenza na ngai. Nazwaki bongo makasi mpe, liboso naino, nazwaki masini na ngai ya bilamba mpo na kotonga sakosi oyo ekokaki kosalisa ngai na komema bazulunalo. Nsima na kosala libondeli ya kafukafu, ngai moko nakendeki kosakola ndako na ndako, nakabolaki mikanda nyonso nazalaki na yango mpe, bobele mokolo yango, nabandaki boyekoli moko na Biblia. Nazwaki ekateli ya kotya Jéhovah na esika ya liboso kati na bomoi na ngai, mpe kolikya epai na ye na mabaku nyonso. Atako bilobaloba ya bato, litatoli ekómaki eteni monene ya bomoi na ngai. Atako botemeli, mosala na ngai mopusaki bato mosusu na kokanisa.

Nandimisamaki bambula mingi na nsima, wana nazalaki kokende ndako na ndako na Madras, elongo na mwana na ngai ya mwasi. Kozanga koyeba soki nazalaki na mbula boni, Moendié moko ya lokumu, ye zuzi na esambiselo monene (haute cour de justice), alobaki na ngai ete: “Nayebaki bazulunalo oyo naino yo obotami te! Esili bongo koleka mibu 30, mwasi moko azalaki kotelema mbala mingi na Mount Road mpo na kokabola yango.” Asengaki abonema.

Na ndako mosusu, moto moko monene na losambo ya hindou, akotisaki biso na ndako mpe alobaki na biso ete: “Esili koleka bambula mingi, mwasi moko azalaki na momeseno ya kolakisa La Tour de Garde (Mosenzeli) na Mount Road. Nakosomba mikanda oyo mizali bino kolakisa mpo na mawa ya mwasi yango.” Koyebáká ete nazalaki mwasi yango oyo bato wana mibale bazalaki kolobela, nasekaki.

Nalendisami mpe napambolami

Ezalaki na sanza ya Octobre ya mobu 1947 nde napesaki bomoto na ngai epai na Jéhovah na nzela ya batisimo. Kati na ba Témoins de Jéhovah, na eleko wana, bobele ngai nde nazalaki mwasi oyo azalaki koloba lokótá Tamoul na étuká mobimba. Na kokesena, lelo oyo ezali na bankóto ya basi oyo bazali koloba Tamoul, basambeli na Jéhovah na sembo mpe na molende kati na étuká.

Nsima na kozwa batisimo, nakutanaki na botemeli bipai binso. Tala oyo ndeko na ngai ya mobali akomelaki ngai: “Osili kobuka malako manso ya limemya mpe ya lokumu.” Nazwaki mikakatano na eteyelo epai nazalaki kosala, mpe na bato ya zingazinga na ngai. Kasi natyaki lisusu motema epai na Jéhovah koleka na kobondeláká ye na etingya mpe na molende. Ntango nazalaki kolamuka na butu, nazalaki kopelisa mwinda ya pétrole mpe nazalaki koyekola.

Kolendisamáká motindo wana, nazalaki na likoki ya kobondisa mpe ya kosalisa bato mosusu. Moendié mobange mwasi oyo azalaki koyekola elongo na ngai; azwaki mpenza etelemelo mpo na losambo ya Jéhovah. Ntango akufaki, mwasi mosusu oyo azalaki kofanda na ndako yango alobaki ete: “Tozalaki na esengo mingi na komona ete atikalaki sembo kino nsuka epai na Nzambe oyo ye aponaki kosambela.”

Mwasi mosusu oyo nazalaki koyekola elongo na ye, liboso azalaki koseka te. Elongi na ye ezalaki ntango nyonso komonisa ete azalaki na mitungisi mpe na mawa. Nsima wana nalobelaki ye na ntina na Jéhovah, nalendisaki mwasi yango na kobondela ye, mpo ete ye ayebi makambo na biso mpe alingi biso. Poso elandaki, nakutaki ye na elongi etondi na esengo. Ezalaki mbala ya yambo na komona ye ete azali koseka. Alimbolaki ngai ete: “Nabondelaki Jéhovah mpe nazwaki kimya ya elimo mpe ya motema.” Amipesaki epai na Jéhovah mpe azali sembo epai na ye atako mikakatano ya ntango nyonso.

Mikumba mingi ya komema

Lokola nasengelaki kobokola bana na ngai mibale ya mike, nazalaki komiyoka ete mposa na ngai ya kosalela Jéhovah ntango nyonso, kati na mosala ya pionnier, ekokokana te. Kasi nazwaki likoki mosusu ya sika wana esengelaki ete moto moko abongolaka mikanda mikolimbolaka Biblia na lokótá ya Tamoul. Na lisalisi ya Jéhovah, nazalaki na likoki ya kokokisa mosala yango malamu na kolandáká kotangisa, mpe kobokola bana na ngai, kokokisa misala ya ndako na ngaí, kosangana na makita nyonso mpe kosangana na mosala ya kosakola. Nsima, ntango bana na ngai bakómaki mikóló, naponamaki lokola pionnier spécial, mpe nazali na esengo kati na mosala yango uta mibu 33.

Uta bomwana na bango, nasalaki milende ya kolona epai na Sunder mpe Rathna, bolingo mpo na Jéhovah mpe mposa ya kotya ye na esika ya liboso kati na makambo nyonso ya bomoi na bango. Ezalaki bango kolongwa na mpongi, bayebaki ete Jéhovah azali moto ya liboso oyo basengelaki koloba na ye, mpe moto ya nsuka oyo basengelaki koloba na ye liboso na kolala. Bayebaki lisusu kobongisa makita, mpe mosala ya kosakola esengelaki te kozwama na bopotu na ntina na badevuare ya kelasi. Nazalaki kolendisa bango na komipesa na kelasi kasi nasengaki bango te ete bazwaka bobele ba points oyo eleki malamu, noki bakozwa yango lokola likambo ya liboso kati na bomoi na bango.

Nsima wana bazwaki batisimo, basalelaki bopemi na bango ya kelasi mpo na kokóma ba pionniers. Nalendisaki Rathna ete amitika kolongama te na bobangi, lokola ngai nazalaki na yango, kasi ete azala na molende. Nsima wana asilisaki kelasi na secondaires mpe nsima na kolanda kelasi mpo na koyeba makambo na mombongo (cours de commerce), abandaki mosala ya pionnier mpe, na nsima, akómaki pionnier spécial. Na nsima abalaki Richard Gabriel, mokengeli ya zongazonga oyo azali sikawa coordinateur ya Comité de filiale na lnde. Azali mosali ya ntango nyonso na filiale elongo na Abigail, mwana na bango ya mwasi mpe Andrew, elenge mwana mobali na bango azali mosakoli ya nsango malamu.

Wana akómaki na mibu 18, Sunder apesaki ngai mpasi na motema ntango atikaki kosangana elongo na ba Témoins de Jéhovah. Bambula oyo elandaki ezalaki mpenza mpasi mpo na ngai. Nabondelaki ntango nyonso Jéhovah ete alimbisa mabunga na ngai na lolenge oyo nabokolaki mwana na ngai wana mpe asalisa ye ete azongela makanisi malamu. Nalongolaki elikya nyonso, kasi mbula 13 na nsima, Sunder ayaki koyebisa ngai ete: “Mama, komitungisa te, nakobongisa makambo nyonso oyo.”

Mwa ntango moke na nsima, Sunder asalaki milende makasi mpo na kozwa bokóli na elimo. Bokóli wana bosalisaki ye na kozwa mokumba ya mokengeli kati na lisangá moko ya ba Témoins de Jéhovah. Na nsima, atikaki mosala na ye oyo azalaki kozwela mosolo mingi, mpo na kobanda mosala ya pionniers. Esther, mwasi na ye, mpe ye bazali lelo ba pionniers na Bangalore, na Sud ya lnde.

Nabondisami na bomoi na ngai mobimba

Nazali mbala mingi kotondo Jéhovah lokola apesaki ngai nzela ya komona mpasi mpe kokutana na mikakatano na boumeli ya bambula esilaki koleka. Soki makambo wana mamonanaki na ngai te, mbele nazwaki te bosepeli ya komeka bonene ya boboto na Jéhovah mpe mawa na ye, komona boni azali komibanzabanza mpo na biso mpe boni azali komonisela biso bolingo. (Yakobo 5:11) Komona kati na Biblia bolingo oyo Jéhovah azali komonisa epai na ‘bana bakufela-baboti mpe basi-bakufela mibali,’ ezali liziba ya kobɔndisa (Deteronome 24:19-21) Kasi eleki lisusu malamu ete yo moko omona bolingo ya likebi oyo na Jéhovah.

Nasili koyekola kolikya epai na Jéhovah, na kotyáká motema likoló na mayele na ngai moko te, kasi na kotalela ye kati na banzela na ngai nyonso. (Nzembo 43:5; Masese 3:5, 6) Wana nazalaki elenge mwasi-mokufeli mobali, nabondelaki Nzambe ete abɔndisa ngai na nzela ya Liloba na ye. Nazali lelo na mibu 68, mpe nakoki koloba ete boyebi malamu ya Biblia, bakisa kosalela batoli ezali kati na yango, esili kobɔndisa ngai koleka nyonso oyo nazalaki kokanisa.

[Elilingi na lokasa 26]

Lily Arthur elongo na basangani ya libota na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto