Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/5 lok. 32
  • Baboti baboyi makanisi mabe ya molakisi moko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baboti baboyi makanisi mabe ya molakisi moko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/5 lok. 32

Baboti baboyi makanisi mabe ya molakisi moko

Molakisi moko na eteyelo ya ebandeli na mboka Cassano Murge, na Italie, apesaki bana mosusu ya kelasi na ye lokasa moko mpo bámema na ndako mpe na nsima, bábaka yango na ekuke ya ndako. Na lokasa yango bakomaki ete: “Biso tozali Bakatolike. Tosɛngi na Batatoli ya Yehova bábɛta na ndako oyo te.”

Baboti ya bana mosusu, atako bazali Batatoli ya Yehova te, basepelaki ata moke te na makambo oyo molakisi wana asalaki. Zulunalo moko (Muoviti Muoviti) elobi ete baboti balobaki ete ‘kopesa bana maloba ya ndenge wana ezali nde kotinda bango báboyaka moto nyonso oyo azali na makanisi oyo ekeseni na makanisi na bango to ezali nde kotinda bango bábenganaka moto nyonso oyo “akeseni” na bango mpo azali na lingomba mosusu. Moboti moko oyo atindaki mokanda na zulunalo yango abengaki lokasa yango ete “mombóto ya matiti mabe, mbuma ya boinga mpe ya bozoba.”

Lokola lisolo wana emonisi yango, bato mingi ya makanisi malamu bazali koyeba ete koteya bato bákaniselaka bato mosusu mabe ezali malamu te. Bazalaka mpe na limemya mpo na mosala ya boklisto oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na Italie mpe na mokili mobimba. Mpo na nini te kokende mwa mosika mpe kotuna Batatoli ya Yehova ‘ntina ya elikya oyo ezali kati na bango’? Bakosepela kosolola na yo na likambo yango, mpe bakosala yango na “limemya mingi.”—1 Petelo 3:15.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto