Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/4 nk. 29-31
  • Ezali na makambo ebombami na kati ya Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali na makambo ebombami na kati ya Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ezali likambo ya sika?
  • Ordinatɛrɛ “ebimisi” makambo ebombami
  • Ezali kondimisa ete Biblia ekomamaki na elimo ya Nzambe?
  • Tozali nde na mposa ya makambo ebombami na kati ya Biblia?
  • Makomi ya ba “Massorètes” ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Boyekoli nimero 5—Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • A3 Ndenge Biblia ekómelá biso
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Ndenge nini okoki kokotisa moto kati na Biblia
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/4 nk. 29-31

Ezali na makambo ebombami na kati ya Biblia?

NA MOBU 1995, babomaki Yitzhak Rabin, ministre-mokonzi ya Israël. Nsima ya mbula soki mibale, mopanzi-nsango moko alobaki ete, amonaki likambo yango na kati ya Biblia ya Liebele, na lisalisi ya ordinatɛrɛ. Mopanzi-nsango yango, nkombo na ye Michael Drosnin, akomaki ete koleka mbula moko liboso ete likambo yango esalema, amekaki kokebisa ministre-mokonzi kasi ayokelaki ye te.

Mikanda mosusu mpe masolo mosusu ya bazulunalo ebimi ebele mpe ezali komonisa ete Biblia ezali na makambo ebombami oyo ezali kondimisa mpenza ete ekomamaki na elimo ya Nzambe. Ezali mpenza na makambo ebombami na kati ya Biblia? Makambo oyo ebombami nde ekondimisa biso ete Biblia ekomamaki na elimo ya Nzambe?

Ezali likambo ya sika?

Makanisi oyo bato bazalaka na yango ete ezali na makambo ebombami na kati ya Biblia ebandi lelo te. Kutu, ezali liteya monene na Kabbale, to maji ya Bayuda. Balakisi ya Kabbale balobaka ete ndimbola ya solosolo ya makambo oyo totángaka na Biblia ezali ndenge mosusu. Bato yango bandimaka ete lɛtrɛ mokomoko oyo Nzambe asalelaki na Biblia ya Liebele ezali elembo. Soki moto asosoli yango malamumalamu akoyeba makambo mingi ya kokamwa. Na makanisi na bango, lɛtrɛ mokomoko ya Liebele mpe esika na yango na kati ya Biblia ezali na mokano moko oyo Nzambe atyaki yango.

Jeffrey Satinover, moto moko oyo alukaka makambo ebombami na kati ya Biblia, alobaki ete bato oyo balandaka maji ya Bayuda balobaka ete balɛtrɛ ya Liebele oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma lisolo ya bozalisi na mokanda ya Genese ezali na nguya ya kokamwa. Akomi boye: “Na mokuse, mokanda ya Genese ezali kaka lisolo te; ezali eloko oyo Nzambe asalelaki mpo na kokela, ezali plan oyo ezalaki na makanisi ya Nzambe mpe akómisaki yango eloko ya solo.”

Labi moko oyo azalaki moto ya Kabbale na ekeke ya 13 T.B., na Saragosse na Espagne, nkombo na ye Bachya ben Asher, alobaki ete amonaki makambo ebombami ntango atángaki eteni moko ya mokanda ya Genese mpe akomaki makambo yango. Azalaki kosala boye: na liloba moko akokamata kaka lɛtrɛ moko ya liboso mpe akopumbwa balɛtrɛ tii akokamata lisusu lɛtrɛ oyo ya 42 mpe bongo na bongo tii balɛtrɛ oyo azali kokamata ekokóma nkombo moko. Tii na moi ya lelo, bato oyo balukaka makambo ebombami na kati ya Biblia basalelaka mayele yango ya kozwa nkombo moko nsima ya kopona balɛtrɛ na kopumbwáká motango moko boye ya balɛtrɛ.

Ordinatɛrɛ “ebimisi” makambo ebombami

Ntango ordinatɛrɛ ezalaki naino te, moto azalaki na makoki mingi te ya kosalela mayele wana mpo na koluka makambo ebombami na kati ya Biblia. Nzokande, na Augusto 1994, zulunalo moko (Statistical Science) ebimisaki lisolo moko oyo elobelaki makambo ya kokamwa oyo Eliyahu Rips, molakisi na iniversite moko (Jerusalem’s Hebrew University) na baninga na ye oyo balukaka makambo ebombami na kati ya Biblia bamonaki. Balobaki ete ntango bakangisaki balɛtrɛ nyonso ya makomi ya Liebele ya mokanda ya Genese mpe na kopumbwáká motango ndenge moko ya balɛtrɛ bamonaki nkombo 34 ya balabi oyo bayebanaki mingi, bakisa mpe makambo mosusu, lokola badati ya kobotama mpe ya liwa na bango penepene ya bankombo na bango.a Nsima ya komekameka mbala na mbala, bato yango bayebisaki ete makambo ebombami oyo ezali na mokanda ya Genese ekoki kozala makambo oyo esalemi mbalakaka te, yango ezali kondimisa ete makambo yango oyo ebombami ekomamaki na elimo ya Nzambe mpe atyaki yango na mokanda ya Genese mpo na mokano moko banda kala.

Drosnin alandaki mayele yango mpe alukaki koyeba makambo ebombami oyo ezali na mikanda mitano ya liboso na Biblia ya Liebele. Drosnin alobi ete ntango akangisaki lɛtrɛ mokomoko nsima ya kopumbwa balɛtrɛ 4 772, abimisaki nkombo ya Yitzhak Rabin na kati ya Biblia. Abongisaki makomi ya Biblia na milɔngɔ ya balɛtrɛ 4 772 mpe amonaki ete nkombo ya Rabin (kotánga banda na likoló mpe kokita na nse) ekutani na molɔngɔ moko oyo Drosnin abongolaki yango ete “mobomi oyo akoboma” (Deteronome 4:42, kotánga banda na lobɔkɔ ya mobali tii na lobɔkɔ mwasi).

Deteronome 4:42 elobelaka mpenza mobomi oyo abomi moto na nko te. Na yango, bato mingi balobaki ete Drosnin alimboli likambo yango na mayele na ye moko. Balobaki lisusu ete mayele oyo asalelaki ezali ya siansi te mpe bakoki kosalela yango mpo na komona makambo ebombami na mokanda nyonso. Kasi Drosnin atingamaki kaka na makanisi na ye mpe alobaki ete: “Nakondima bato oyo bazali kotyola makanisi na ngai kaka mokolo oyo bakobimisa nsango ya kobomama ya Ministre-mokonzi na kati ya buku babengi Moby Dick.”

Ezali kondimisa ete Biblia ekomamaki na elimo ya Nzambe?

Brendan McKay, profɛsɛrɛ ya informatique na iniversite moko na Australie (Australian National University), asalaki ndenge oyo Drosnin alobaki mpe, akɔtisaki buku Moby Dick (oyo ezali na Lingelesi) na ordinatɛrɛ mpe alukakilukaki makambo oyo ebombamá.b McKay asalelaki mayele ya Drosnin mpe alobi ete amoni “bisakweli” ya kobomama ya Indira Gandhi, Martin Luther King, John Kennedy, Abraham Lincoln, mpe bato mosusu. McKay alobi ete Moby Dick mpe “esakolaki” kobomama ya Yitzhak Rabin.

Profɛsɛrɛ McKay na baninga na ye basalelaki mokanda ya Genese na Liebele mpo na kokweisa makambo oyo Rips na baninga na ye balobaki. Balobaki ete makambo oyo Rips na baninga na ye bamonaki ezalaki mpenza makambo ebombami oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te, kasi mayele oyo basalelaki nde ememaki bango na makambo yango, elingi koloba ete bango moko nde bazalaki kopona ndenge oyo bakobongisa makambo mpo esuka ndenge wana. Ntembe esuki naino te kati na bato ya mayele oyo bazali koluka makambo ebombami na kati ya Biblia.

Motuna mosusu ezali kobima ntango bato mosusu bazali koloba ete makambo yango oyo ebombami ekɔtisamaki na makomi ya Liebele “oyo bato nyonso basalelaka” to “ya ebandeli.” Rips na baninga na ye balobi ete bayekolaki “mokanda ya Genese, oyo bato nyonso basalelaka.” Drosnin akomi ete: “Babiblia nyonso ya Liebele ya ebandeli oyo ezali tii na moi ya lelo ezali na balɛtrɛ ndenge moko.” Likambo yango ezali solo? Na esika ya koloba ete ezali kaka na mokanda moko oyo “bato nyonso basalelaka,” lelo oyo Babiblia ya Liebele mingi oyo bato bazali kosalela, euti na bamaniskri ndenge na ndenge ya kala. Nsango ya Biblia ezali ndenge moko, kasi bamaniskri ezali ndenge moko te.

Babiblia oyo bato mingi bazali na yango lelo ebongolami na Codex ya Leningrad—maniskri ya libosoliboso mpe ya mobimba na Liebele oyo Bamasorete bakomaki soki na mobu 1000 T.B. Kasi Rips na Drosnin basalelaki maniskri mosusu: maniskri ya Koren. Shlomo Sternberg, labi na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe molakisi ya matematiki na Iniversite ya Harvard, alobi ete soki ozwi kaka mokanda ya Deteronome na Codex ya Leningrad “ekeseni na mokanda ya Deteronome oyo ezali na maniskri ya Koren oyo Drosnin asalelaki na balɛtrɛ 41.” Barulo ya Mbu Ekufá ezali na biteni ya makomi ya Biblia oyo bakomá yango eleki sikoyo mbula 2 000. Na bisika mingi, ndenge oyo bakomá bankombo mosusu na barulo yango ekeseni mpenza na oyo ezali na bamaniskri ya Bamasorete oyo ekomamaki na nsima. Na barulo mosusu, babakisá balɛtrɛ mosusu mpo na kolakisa ndenge ya kobenga yango, mpamba te ntango yango babimisaki naino mayele ya kokoma na milelisi te. Na barulo mosusu, babakisá balɛtrɛ mingi te. Soki tokokanisi bamaniskri ya Biblia oyo tozali na yango lelo oyo tokomona ete ndimbola ya makomi ya Biblia ebongwani te. Kasi, tokomona mpe polele ete ndenge bakomi bankombo mpe motango ya balɛtrɛ na maniskri moko ekeseni na mosusu.

Baoyo bakanisaka ete mabombami ezali, esengeli bálukaluka na Biblia oyo makomi na yango ebongwani ata moke te. Soki balongoli to babakisi ata lɛtrɛ moko, nsango yango oyo ekoki kozala na Biblia, ekobebisama. Nzambe abatelaki nsango ya Biblia. Kasi abatelaki lɛtrɛ mokomoko te. Nzambe alandelaki makambo mikemike te lokola ndenge ya kokoma bankombo oyo ezalaki kobongwana na boumeli ya bikeke. Yango emonisi polele ete Nzambe atyá makambo ebombami na kati ya Biblia te, boye te?—Yisaya 40:8; 1 Petelo 1:24, 25.

Tozali nde na mposa ya makambo ebombami na kati ya Biblia?

Ntoma Paulo akomaki polele ete “[Makomami, NW ] nyonso mapemami na [elimo] ya Nzambe, makoki kopesa litomba na mateya, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobɔkɔla, kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.” (2 Timote 3:16, 17) Biblia ezali polele mpe ezali na mindɔndɔ te, ezali mpe mpasi te mpo na koyeba makambo ezali na Biblia mpe kosalela yango, kasi bato mingi balingaka kolanda yango te. (Deteronome 30:11-14) Bisakweli oyo emonisami polele na kati ya Biblia ezali kondimisa biso ete Biblia ekomamaki na elimo ya Nzambe.c Mabombami eutaka na makanisi ya bato, kasi bisakweli ya Biblia ezali ya bato te, mpe ‘ebimaki na makanisi ya bato te.’—2 Petelo 1:19-21.

Ntoma Petelo akomaki ete “zambi wana eyebisaki biso bino mpo na nguya na komonana na Nkolo na biso Yesu Klisto, [tolandaki] masese malobami na mayele te.” (2 Petelo 1:16) Makanisi oyo bato bazalaka na yango ete ezali na makambo ebombami na kati ya Biblia, euti na maji ya Bayuda oyo esalelaka “masese malobami na mayele”; mayele oyo ebombaka mpe ebebisaka ndimbola ya makomi ya Biblia oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe. Makomami ya Liebele eboyi mpenza likambo ya kosalela maji.—Deteronome 13:1-5; 18:9-13.

Tozali na esengo mpo tozali na nsango mpe na mateya ya polele ya Biblia; mateya yango ekoki kosalisa biso tóyeba Nzambe! Yango ezali mpenza malamu koleka koluka koyeba Mozalisi na biso na nzela ya makambo ebombami oyo ndimbola na yango ezali kouta na makanisi ya bato mpe na lisalisi ya ordinatɛrɛ.—Matai 7:24, 25.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na Liebele, bakoki mpe kokoma mitango na balɛtrɛ. Yango wana, na kati ya mikanda ya Liebele bazwaki badati yango na balɛtrɛ kasi na mitango te.

b Lokota ya Liebele ekomamaka na milelisi (voyelle) te. Moto oyo azali kotánga nde akɔtisaka milelisi na kolanda lisolo oyo azali kotánga. Soki ayebi ndenge oyo lisolo ezali kolandana te, ndimbola ya maloba nyonso ekoki kobongwana ntango akɔtisi milelisi oyo ebongi te. Liloba mokomoko ya Lingala ekomamaka na milelisi, yango wana koluka maloba oyo ekolakisa likambo moko oyo ebombamá ezali mpasi mingi mpe mindɔndɔ.

c Soki olingi koyeba makambo mosusu oyo emonisi ete Biblia mpe bisakweli na yango ekomamaki na elimo ya Nzambe, talá mwa buku oyo ezali na motó ya likambo Un livre pour tous, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto