Batikalaki sembo mpe babangaki minyoko ya Banazi te
Mokolo ya 17 Yuni 1946, Wilhelmina, mokonzi-mwasi ya ekólo Pays-Bas, atindelaki libota moko ya Batatoli ya Yehova na engumba Amsterdam mokanda mpo na komonisa ete azali kokabola mawa na bango. Atindaki mokanda yango mpo na komonisa na libota yango ete asepelaki na mwana na bango ya mobali, Jacob van Bennekom, mwana oyo Banazi babomaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mwa bambula liboso, conseil municipal ya Doetinchem, engumba moko na ɛsti ya Pays-Bas, epesaki balabala moko nkombo ya Bernard Polman, ye mpe azalaki Motatoli ya Yehova oyo babomaki na etumba.
MPO na nini Banazi banyokolaki Jacob, Bernard mpe Batatoli mosusu ya Yehova na Pays-Bas na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba? Mpe nini esalisaki Batatoli yango bátikala sembo liboso ya minyoko makasi oyo esalaki bambula mpe na nsuka bato ya mboka mpe mokonzi-mwasi na bango bápesa bango limemya mpe básepela na bango? Mpo na koyeba yango, tózongela mwa makambo oyo esalaki ete Davidi na Goliata bábunda, elingi koloba etuluku moke ya Batatoli ya Yehova na bokonzi makasi ya Nazi.
Bapekisi bango kasi bazali koteya lisusu koleka
Mokolo ya 10 Mai 1940, basoda ya Nazi bakɔtaki na Pays-Bas. Lokola mikanda oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kokabola ezalaki komonisa makambo mabe ya Banazi mpe ezalaki kokumisa Bokonzi ya Nzambe, Banazi baumelaki te koluka kosukisa misala ya Batatoli. Ntango Banazi bakɔtaki na Pays-Bas, ekokaki ata pɔsɔ misato te, babimisaki mobeko oyo epekisaki Batatoli ya Yehova kasi balingaki te ete bato nyonso báyeba. Mokolo ya 10 Marsi 1941, zulunalo moko elobelaki yango, mpe elobaki ete Batatoli bazali koteya makambo oyo ezali “kotɛmɛla bibongiseli nyonso ya Leta mpe ya lingomba.” Yango wana, bakómaki konyokola Batatoli makasi.
Likambo ya kokamwa, Gestapo, to basirete ya Banazi babandaki kolandela makambo ya mangomba nyonso, kasi bazalaki konyokola mingi koleka bobele baklisto ya lingomba moko. Louis de Jong, moto ya mayele na istware, moto ya Pays-Bas akomaki na mokanda na ye boye: “Bazalaki konyokola, ata mpe koboma bato ya lingomba kaka moko: Batatoli ya Yehova.”—Het Koninkrijk der Nederlanden in de Tweede Wereldoorlog (Bokonzi ya Pays-Bas na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba).
Bapolisi ya Pays-Bas bazalaki kosalisa Gestapo mpo na koluka mpe kokanga Batatoli. Lisusu, mokɛngɛli-motamboli moko oyo akómaki kobanga mpe apɛngwaki azalaki koyebisa Banazi makambo nyonso ya Batatoli. Na nsuka ya sanza ya Aprili 1941, bakangaki Batatoli 113. Likambo yango esukisaki nde mosala ya Batatoli?
Eyano ezali na Meldungen aus den Niederlanden (Mokanda ya lapolo ya Pays-Bas), mokanda moko oyo Sicherheitspolizei (Basirete) ya Allemagne bakomaki na sanza ya Aprili 1941. Lapolo yango elobaki boye mpo na Batatoli ya Yehova: “Mwa lingomba oyo epekisami ezali kokoba na mpiko mpenza mosala na yango na ekólo mobimba, bazali kosala makita kozanga ndingisa mpe kotya batrakte oyo ezali na maloba lokola ‘Konyokola Batatoli ya Nzambe ezali mabe monene’ mpe ‘Yehova akopesa banyokoli etumbu ya liwa ya seko.’ ” Pɔsɔ mibale na nsima, na mokanda ya lapolo yango, bakomaki ete “atako Basirete bazali kosala nyonso mpo na kopekisa mosala ya Bayekoli ya Biblia, mosala na bango ezali kaka kokola.” Ya solo, atako bayebaki ete bakoki kokanga bango, Batatoli bazalaki kaka kosala mosala na bango, mpe na 1941 mpamba, bakabolaki mikanda koleka 350 000!
Nini esalisaki mwa bankama ya Batatoli oyo bazalaki se kobakisama báyika mpiko liboso ya banguna na bango? Lokola mosakoli Yisaya na ntango ya kala, Batatoli babangaki Nzambe, kasi bato te. Mpo na nini? Mpamba te batyaki elikya na bango na maloba ya kolendisa oyo Yehova ayebisaki Yisaya ete: “Ngai, ngai nazali ye oyo akobɔndisa yo; yo ozali nani ete obanga moto oyo akokufa?”—Yisaya 51:12.
Bato bapesi bango limemya mpo babangaki te
Na nsuka ya 1941, Batatoli oyo bakangamaki bakómaki 241. Kasi, mwa ndambo babangaki. Balobaki ete Willy Lages, moto moko ya sirete ya Allemagne, oyo ayebanaki mingi alobaki ete “Batatoli ya Yehova mingi (90 %) baboyaki koyebisa makambo ya lingomba na bango, nzokande mpo na mangomba mosusu, kaka bandimi moke nde baboyaki koloba.” Johannes Buskes, sango moko ya Pays-Bas oyo azalaki na bolɔkɔ na Batatoli mosusu andimi makambo oyo Lages alobaki. Na 1951, Buskes akomaki boye:
“Na ntango yango, nakómaki kopesa bango limemya mingi na ndenge batyelaka Nzambe motema mpe mpo na kondima makasi oyo bazali na yango. Nakoki te kobosana elenge mobali moko oyo azalaki ata na mbula 19 te, elenge yango akabolaki batrakte oyo ezalaki koloba ete Hitler na boyangeli na ye bakokwea. . . . Soki andimaka kotika misala ya Batatoli, mbɛlɛ alekisaki ata sanza motoba te na bolɔkɔ, balingaki kobimisa ye. Aboyaki likambo yango na motema moko, mpe bakatelaki ye etumbu ya kosala misala ya makasi mpo na ntango oyo eyebani nsuka te na Allemagne. Toyebaki bwale ya etumbu lokola oyo wana. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, ntango bayaki kozwa ye mpo bákende na ye, topesaki ye mbote, nayebisaki ye ete tokobosana ye te mpe tokobondela mpo na ye. Apesaki se eyano moko: ‘Bómitungisa mpo na ngai te. Bokonzi ya Nzambe ekoya solo.’ Likambo lokola oyo wana okobosana yango te, ata soki oboyaka mateya ya Batatoli ya Yehova.”
Atako bazalaki kotɛmɛla bango makasi, Batatoli bazalaki se kobakisama. Bazalaki soki 300 mwa moke liboso Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebanda, kasi bakómaki 1 379 na 1943. Likambo ya mawa, na nsuka ya mbula yango, Batatoli oyo bakangamaki na bakaa bazalaki koleka 350 kasi 54 bakufaki. Na 1944, Batatoli ya Yehova 141 ya Pays-Bas bazalaki naino na bakaa ya bakangami.
Mbula ya nsuka ya monyoko ya Nazi
Nsima ya mokolo monene, elingi koloba mokolo ya 6 Yuni 1944, monyoko ya Batatoli ekómaki na mbula na yango ya nsuka. Banazi na basoda ya bikólo mosusu oyo ezalaki na ngámbo na bango bazalaki lisusu kokoka bitumba te liboso ya banguna na bango. Moto akoki kokanisa ete ndenge makambo ekómaki boye Banazi bakotika konyokola baklisto oyo basalaki bango eloko te. Kasi, na mbula yango, bakangaki Batatoli mosusu 48, mpe Batatoli koleka 68 oyo bazalaki na bolɔkɔ bakufaki. Moko na bango ezalaki Jacob van Bennekom, oyo tolobelaki na ebandeli.
Jacob, elenge ya mbula zomi na mwambe, azalaki na kati ya Batatoli ya Yehova 580 oyo bazwaki batisimo na 1941. Mwa moke na nsima atikaki mosala oyo bazalaki kofuta ye malamu mpamba te yango ezalaki kosɛnga ye amitya na ngámbo moko ya bato oyo bazalaki kobunda. Abandaki mosala ya momemi-nsango mpe akómaki mosakoli ya ntango nyonso. Mokolo moko azalaki komema mikanda oyo elimbolaka Biblia, bakangaki ye. Na sanza ya Augusto 1944, Jacob azalaki na mbula 21 mpe azalaki na bolɔkɔ na engumba Rotterdam, akomelaki libota na ye mokanda oyo ezalaki na maloba oyo:
“Nazali malamu mpenza mpe nazali na esengo mingi. . . . Basambisi ngai sikoyo mbala minei. Mbala ya liboso mpe ya mibale ezalaki mpasi, mpe babɛtaki ngai na ndenge ya nsɔmɔ, kasi na nguya mpe lisungi ya Nkolo, tii sikoyo nabimisi sɛkɛlɛ ata moko te. . . . Awa nasalaka masukulu, nasali masukulu motoba, bato nyonso oyo bayokaki bazalaki 102. Bamosusu kati na bango bazali kosepela mpe balaki ete soki kaka babimi na bolɔkɔ, bakoyekola.”
Na mokolo ya 14 Sɛtɛmbɛ 1944, bamemaki Jacob na kaa ya bakangami na engumba Amersfoort, na Pays-Bas. Ata kuna azalaki kaka koteya. Ndenge nini? Moto moko oyo bazalaki na ye na bolɔkɔ alobi ete: “Bakangami bazalaki kolɔkɔta biteni ya makaya oyo bakɛngɛli ya bolɔkɔ bazalaki kobwaka mpe bazalaki kosalela bankasa ya Biblia moko mpo na kolinga makaya. Ntango mosusu Jacob azalaki kotánga mwa maloba na lokasa ya Biblia liboso bálinga na yango likaya. Soki kaka atángi, azalaki kosalela maloba yango mpo na koteya biso. Eumelaki te, topesaki Jacob nkombo ‘Moto na Biblia.’ ”
Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1944, Jacob azalaki na kati ya ebele ya bakangami oyo batindaki bango bátimola mabulu mpo na kozindisa batanki ya bitumba (chars) ya banguna. Jacob aboyaki kosala mosala yango mpamba te lisosoli na ye epekisaki ye kosangana na misala ya bitumba. Atako bakɛngɛli bazalaki kotungisa ye mbala na mbala, asalaki kaka te. Mokolo ya 13 Ɔkɔtɔbɛ mokonzi moko ya basoda abimisaki ye na kasho oyo batyaki se ye moko mpe azongaki na ye na esika mosala ezalaki kosalama. Mbala oyo lisusu, Jacob aboyaki kosala. Nsukansuka, batindaki Jacob atimola libulu oyo bakokunda ye moko mpe babɛtaki ye masasi mpe akufaki.
Monyoko ya Batatoli ezali kokoba
Mpiko oyo Jacob na Batatoli mosusu bamonisaki engalisaki nkanda ya Banazi mpe balandaki konyokola lisusu Batatoli mingi. Moko na Batatoli oyo batyelaki miso ezalaki Evert Kettelarij, elenge moko ya mbula 18. Na ebandeli, Evert azalaki kokima bango mpe kokende komibomba, kasi na nsima bakangaki ye mpe babɛtaki ye makasi mpo ayebisa makambo mosusu ya Batatoli. Aboyaki mpe batindaki ye na Allemagne kosala mosala makasi.
Kaka na sanza yango, bapolisi bakangaki Bernard Luimes, semeki ya Evert. Ntango bakutaki ye, azalaki na Batatoli mosusu mibale, Antonie Rehmeijer na Albertus Bos. Liboso Albertus akɔtaká bolɔkɔ na kaa ya bakangami mpe asalaká sanza 14. Kasi, ntango abimaki, azongelaki mosala ya kosakola na molende mpenza. Banazi babɛtaki naino Batatoli misato yango na ndenge ya nsɔmɔ mpe na nsima babɛtaki bango masasi mpe bakufaki. Na nsuka ya etumba nde bamonaki mikwa na bango mpe bakundaki yango. Mwa moke nsima ya etumba, bazulunalo mingi ya mboka elobelaki kobomama na bango. Zulunalo moko elobaki ete Batatoli misato yango baboyaki na mpiko mpenza kosalela Banazi mosala oyo eyokanaki te na mibeko ya Nzambe mpe ebakisaki ete “mpo na yango, bafutaki bomoi na bango.”
Na ntango yango, na mokolo ya 10 Novɛmbɛ 1944, bakangaki Bernard Polman, oyo tolobelaki mwa liboso, mpe batindaki ye esika oyo bazalaki kosala misala ya basoda. Azalaki kaka ye moko Motatoli na kati ya bato nyonso oyo bazalaki kosala misala makasi kuna mpe kaka ye nde aboyaki kosala mosala yango. Bakɛngɛli bamekaki mayele ndenge na ndenge mpo andima makambo oyo bazalaki kosɛnga ye. Bapimelaki ye bilei. Babɛtaki ye mabe lokola bazali kobɛta nyama na nzete, na pau, mpe na kolosi ya mondoki. Lisusu, batindaki ye na makasi atambola na kati ya mai moko ya malili oyo ezalaki kosukela ye na mabɔlɔngɔ, mpe na nsima batyaki ye na kasho moko ya mpiɔ na nse ya mabele, epai afandaki butu mobimba na bilamba oyo epolaki na mai. Kasi, Bernard andimaki makambo na bango ata moke te.
Na ntango yango, bapesaki nzela na bandeko ya Bernard mibale ya basi, baoyo bazalaki Batatoli ya Yehova te, báya kotala ye. Bandeko na ye bamekaki kondimisa ye atika makambo na ye wana, kasi yango esalaki Bernard eloko te. Ntango batunaki Bernard soki bakokaki kosala nini mpo na ye, alobaki na bango ete bázonga na ndako mpe báyekola Biblia. Banyokoli na ye bapesaki mwasi na ye oyo azalaki na zemi nzela ya kotalaka ye, bakanisaki ete akolɛmbisa Bernard motema. Kasi lokola mwasi na ye azalaki koya na maloba ya kolendisa ye, Bernard azwaki lisusu makasi ya kotikala sembo epai ya Nzambe. Mokolo ya 17 Novɛmbɛ 1944, banyokoli mitano babɛtaki Bernard masasi na miso ya bato nyonso oyo bazalaki kosala misala makasi. Ata ntango Bernard akufaki, nzoto mobimba ebebi mpenza na masasi, mokonzi moko ya basoda ayokaki nkanda makasi mpe abimisaki mondoki na ye mpe abɛtaki Bernard masasi na miso nyonso mibale.
Atako likambo yango ya nsɔmɔ esalaki Batatoli oyo bayokaki yango mpasi, batikalaki kaka sembo, babangaki te mpe bakobaki mosala na bango ya boklisto. Mwa moke na nsima, bandeko ya lisangá moko moke ya Batatoli ya Yehova na mboka moko oyo ezali penepene ya esika oyo babomaki Bernard, balobaki boye: “Na sanza oyo, atako mopɛpɛ mabe ezali mpe Satana atyeli biso minyoko na nzela na biso, tobakisi mosala na biso ya kosakola. Bangonga oyo tolekisaka na mosala ya kosakola ebakisami, liboso tosalaki ngonga 429 kasi na sanza oyo tosali ngonga 765. . . . Na mosala ya kosakola, ndeko moko akutanaki na moto moko mpe apesaki moto yango litatoli ya malamu mpenza. Moto yango atunaki ye soki azali na lingomba moko na moto oyo babomaki na masasi. Ntango ayokaki ete ezali bongo, moto yango alobaki na kokamwa ete: ‘Moto wana azalaki mobali ya solosolo, oyo wana nde kondima ya solosolo! Ngai nazali kobenga moto wana ete elombe ya kondima!’ ”
Yehova akokanisa bango
Na sanza ya Mai 1945, balongaki Banazi na etumba mpe babenganaki bango na Pays-Bas. Atako botɛmɛli ezalaki makasi na boumeli ya etumba, Batatoli ya Yehova oyo bazalaki ata nkama moko te bakómaki mingi koleka 2 000. Mpo na Batatoli yango ya ntango ya etumba, Doktɛrɛ de Jong, moto ya mayele na istware, alobi boye: “Mingi mpenza na kati na bango baboyaki kotika losambo na bango atako bazalaki kotungisa bango mpe konyokola bango.”
Yango wana, ntina mpenza oyo bakonzi mosusu bakanisaki Batatoli ya Yehova, ezali nde mpo na mpiko oyo bamonisaki liboso ya boyangeli ya Nazi. Kasi, likambo eleki ntina ezali ete Yehova na Yesu bakokanisa misala ya kokamwa ya Batatoli yango ya ntango ya etumba. (Baebele 6:10) Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Yesu Klisto oyo ekómi pene, Batatoli yango ya sembo mpe ya mpiko, lokola bapesaki bomoi na bango na mosala ya Nzambe, bakobima na malita ya ekaniseli, mpe bakopesa bango likoki ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele!—Yoane 5:28, 29.
[Elilingi na lokasa 24]
Jacob van Bennekom.
[Elilingi na lokasa 26]
Zulunalo oyo eyebisaki ete mosala ya Batatoli ya Yehova epekisami.
[Bililingi na lokasa 27]
Na lobɔkɔ ya mobali: Bernard Luimes; na nse: Albertus Bos (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Antonie Rehmeijer; na nse: Biro ya la Société na Heemstede.